Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 We know: if our earthly tent is torn down, we have a building from our Father, a house not made by hands, eternal in the heavens. Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.
2 For in this tent we groan, longing to be clothed with our heavenly dwelling, Nzokande, kati na ndako yango ya kapo, tozali penza komona pasi, wana tozali kozela na posa makasi ete tolata ndako na biso ya Lola,
3 if indeed, when we have put it on, we will not be found naked. pamba te soki penza tolati yango, tokozala motakala te.
4 While in this tent we groan, weighed down—not wanting to be unclothed, but clothed over, so life may swallow up what is mortal. Solo, wana tozali nanu kati na ndako oyo ya kapo, tozali penza komona pasi mpe konyokwama, pamba te toboyi kobanda nanu na kolongola, kasi tolingi nde kolata mbala moko ndako na biso ya Lola, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka.
5 Now the one who prepared us for this very thing is our Father, who gave us the Holy Spirit as a guarantee. Nzambe oyo abongiseli biso likambo yango apesi biso Molimo na Ye lokola ndanga ya biloko oyo esengeli koya.
6 So we're always confident, knowing that while at home in the body, we are away from the Lord, Yango wana tozalaka na mpiko tango nyonso. Mpe toyebi malamu ete, awa tozali kowumela kati na nzoto oyo, tozali mosika na Nkolo,
7 for we walk by faith, not by sight. pamba te totambolaka kolanda kondima, kasi kolanda miso te.
8 So we are confident, and prefer to leave the body and be home with the Lord. Totondi penza na mpiko, kasi tokosepela kotika nzoto oyo mpo na kokende kovanda elongo na Nkolo.
9 So whether at home or away, we make it our aim to please him. Yango wana, ezala tovandi kati na nzoto oyo to totiki yango, tokolukaka kaka kosepelisa Nkolo.
10 For we must all appear before the judgment seat of Christ, each to receive what is due for what they did in the body, good or bad. Pamba te biso nyonso tokosamba liboso ya esambiselo ya Klisto mpo ete moto nyonso azwa lifuti oyo ekoki na ye kolanda makambo oyo asalaki na nzela ya nzoto na ye, makambo ya malamu to ya mabe.
11 So knowing the fear of the Lord, we persuade people; we are plain to our Father, and I hope also plain to your conscience. Lokola toyebi makambo oyo ezali kati na kotosa Nkolo, yango wana tondimisaka bato mosusu, mpe Nzambe ayebi biso malamu. Nazali na elikya ete bino mpe boyebi yango kati na mitema na bino.
12 We are not commending ourselves to you again, but giving you reason to be proud of us, so you have an answer for those who boast in appearance, not in heart. Tozali lisusu te komilobela epai na bino, kasi tozali nde kopesa bino libaku malamu ya komikumisa na tina na biso, mpo ete bokoka koyanola bato oyo bamikumisaka te na tina na makambo oyo ebombama kati na mitema, kasi na tina na oyo emonanaka na miso.
13 Whether out of our minds, it's for our Father; whether in our right minds, it's for you. Mpo na biso, soki tozali komonana lokola bazoba, ezali kaka mpo na Nzambe ; mpe soki tozali komonana lokola bato ya mayele, ezali nde mpo na bino.
14 For Christ's love compels us, since we're convinced: one died for all, so all died. Solo, bolingo ya Klisto ekangi biso, pamba te tondimisamaki ete moko kaka akufa mpo na bato nyonso ; boye elingi koloba ete bato nyonso bakufa kati na ye.
15 He died for all, so the living would no longer live for themselves, but for the one who died for them and was raised. Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.
16 So from now on, we know no one by human standards. We once knew Christ that way too, but no longer. Boye, kobanda sik’oyo, tokotala lisusu moto moko te na ndenge ya bomoto. Atako, na kala, totalaki Klisto na ndenge ya bomoto, kasi sik’oyo tozali lisusu kotala Ye bongo te.
17 So if anyone is in Christ, new creation! The old has passed away; look, the new has come! Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika : makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.
18 All this is from our Father, who reconciled us to himself through Christ, giving us the ministry of reconciliation: Makambo oyo nyonso ewutaka na Nzambe oyo azongisaki boyokani kati na biso mpe Ye moko na nzela ya Klisto mpe apesaki biso lotomo ya boyokanisi.
19 That is, in Christ our Father was reconciling the world to himself, not counting their sins against them, and entrusting us with the message of reconciliation. Pamba te, kati na Klisto, Nzambe azalaki kozongisa boyokani kati na bato mpe Ye moko, na kotala masumu na bango te. Mpe atiaki kati na biso liloba ya boyokanisi.
20 So we are ambassadors for Christ, as though our Father were appealing through us. We appeal on behalf of Christ: be reconciled to our Father. Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso : « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.
21 For us he made him who knew no sin to be sin, so that in him we might become the righteousness of our Father. Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]