Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Therefore, since we have this ministry through the mercy shown to us, we do not lose heart. Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te ;
2 Instead, we renounced hidden, shameful things. We don't act with cunning or distort our Father's word. Rather, by openly declaring the truth, we commend ourselves to everyone's conscience before our Father. toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.
3 Even if our gospel is veiled, it is veiled to those who are perishing. Mpe soki Sango Malamu oyo toteyaka ezali kaka ya kozipama, ezali ya kozipama kati na bato oyo bazali kobunga,
4 For them, the god of this age has blinded unbelievers' minds, so they can't see the light of the gospel—the glory of Christ, who is our Father's image. ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.
5 We don't preach ourselves, but Jesus Christ as Lord—we are your servants for Jesus' sake. Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.
6 For our Father, who said, "Let light shine out of darkness," has shone in our hearts, giving light—knowledge of our Father's glory in the face of Jesus Christ. Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
7 We have this treasure in clay jars, so this surpassing power is our Father's, not from us. Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.
8 We are afflicted in every way, but not crushed; perplexed, but not driven to despair; Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te ; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te ;
9 persecuted, but not abandoned; struck down, but not destroyed. tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te ; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.
10 We always carry Jesus's death in the body, so Jesus's life may also show in our body. Solo, tomemaka tango nyonso mpe bisika nyonso kufa ya Yesu kati na nzoto na biso, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso.
11 We who live are always handed over to death because of Jesus, so Jesus' life may also show in our mortal flesh. Pamba te, biso oyo tozali na bomoi, tokutanaka na kufa mpo na Yesu, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso, oyo ekufaka.
12 So then, death is at work in us, but life in you. Boye, kufa esalaka mosala na yango kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala na yango kati na bino.
13 With the same spirit of faith as it is written: "I believed, so I spoke," we too believe, so we too speak, Mpe awa tozali na molimo wana moko ya kondima, kolanda ndenge ekomama : « Nandimaki, yango wana nalobaki, » biso mpe tondimaka, mpe yango wana tolobaka.
14 knowing the one who raised the Lord Jesus will also raise us with Jesus and set us, with you, before him. Pamba te toyebi malamu ete Ye oyo asekwisaki Nkolo Yesu kati na bakufi akosekwisa mpe biso elongo na Yesu, mpe akobimisa biso elongo na bino liboso na Ye.
15 All this is for you, so that grace, reaching more and more, may overflow thanksgiving to our Father's glory. Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.
16 So we don't give up. Even as our outer person decays, our inner person is renewed day by day. Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
17 For this light, momentary suffering produces for us an eternal weight of glory beyond all comparison, Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.
18 so we fix attention not on visible things but invisible ones, for the visible is passing but the invisible is eternal. Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]