Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 As his co-workers, we urge you not to receive our Father's grace in vain. Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ;
2 For he says, "At the right time I heard you; on the day of salvation I helped you." Look, now is the right time; look, now is the day of salvation. pamba te Nzambe alobi : « Na tango ya malamu, nayanolaki yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
3 We put no obstacle in anyone's way, so that no fault may be found with our ministry. Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso.
4 Instead, we commend ourselves in everything as servants of our Father: with great endurance, in sufferings, in hardships, in distresses, Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;
5 in beatings, in imprisonments, in riots, in labors, in sleepless nights, in hunger; kati na kobetama, boloko mpe mobulu ; kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei ;
6 by purity, by knowledge, by patience, by kindness, by the Holy Spirit, by genuine love, kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ; kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo ;
7 by truthful speech, by our Father's power, with weapons of righteousness for right hand and left, kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe ; kati na bibundeli ya bosembo mpo na kobundisa monguna mpe komibatela ;
8 through honor and dishonor, through slander and praise. We are treated as impostors, and yet are true; kati na lokumu mpe soni, kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe. Mpe lisusu, kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta, nzokande tolobaka solo ;
9 as unknown, yet well known; as dying, and look, we live; as punished, yet not killed; koyebana lokola bato oyo bayebani te, nzokande toyebani makasi ; koyebana lokola bakufi, nzokande tozali bato ya bomoi ; koyebana lokola bato bakweyisama, nzokande baboma biso te ;
10 as grieving, yet always joyful; as poor, yet enriching many; as owning nothing, yet possessing everything. koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.
11 We have spoken freely to you, Corinthians; our heart is wide open to you. Bandeko ya Kolinto, tolobi na bino na bosembo nyonso mpe na mitema ya kofungwama.
12 You are not restricted by us, but you are restricted in your own hearts. Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino.
13 In return—I speak as to my children—open wide your hearts also. Nazali koloba na bino lokola na bana na ngai ya bolingo : Bosala lokola biso ! Bino mpe bofungolela biso mitema na bino !
14 Don't team up with unbelievers. For what do righteousness and lawlessness share? Or what fellowship does light have with darkness? Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ?
15 What harmony exists between Christ and the devil? What does a believer share with an unbeliever? Klisto akoki solo koyokana na Satana ? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima ?
16 What partnership does our Father's temple have with idols? For we are the temple of the living Father, as he said: "I will live among them and walk among them; I will be their Father, and they will be my children." Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko : « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. »
17 Therefore, "Come out from among them and be separate, says our Father, and touch no unclean thing; then I will welcome you, Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »
18 and I will be a Father to you, and you will be sons and daughters to me, says our Father, the Almighty." Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]