Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is the third time I'm coming to you. "Every matter must be confirmed by the testimony of two or three witnesses." Ekozala mbala na ngai ya misato ya koya epai na bino. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
2 I told those who sinned before, and everyone else, in advance—as I did in person on my second visit—and I'm telling them now while away: if I come again, I won't spare them, Nasilaki kokebisa bino tango nayaki epai na bino mpo na mbala ya mibale, mpe, wana nazali nanu mosika na bino, nazali kozongela yango lisusu epai ya bato oyo basalaki masumu liboso mpe epai ya bato nyonso, ete, tango nakoya lisusu, nakoyokela moto ata moko te mawa,
3 since you want proof Christ speaks through me. He is not weak toward you but powerful among you. lokola bozali kosenga elembo oyo ezali kolakisa ete Klisto alobaka na nzela na ngai ; pamba te azali na bolembu te mpo na bino, kasi asalaka na nguya kati na bino.
4 For he was crucified in weakness, yet he lives by the power of our Father. For we too are weak in him, yet toward you we will live with him by the power of our Father. Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko : tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye na nzela ya nguya ya Nzambe, na lolenge na biso ya kosala mpo na bolamu na bino.
5 Test yourselves—are you in the faith? Examine yourselves. Don't you know Jesus Christ is in you, unless you fail the test? Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima ; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino ? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.
6 And I trust that you will discover that we ourselves have not failed the test. Kasi nazali na elikya : bokoyeba solo ete biso tokweyaki te liboso ya komekama.
7 We pray to our Father that you do nothing wrong—not to prove ourselves approved, but so you do what is right, even if we seem unapproved. Sik’oyo, tozali kobondela Nzambe mpo ete bosala mabe ata moko te ; ezali te mpo bato bamona ete biso tolonga komekama, kasi mpo ete bino bosala bolamu, mpe biso tomonana lokola bato oyo balonga te.
8 For we cannot oppose the truth, but only for the truth. Pamba te tozali na nguya te ya kotelemela solo, kasi tozali kaka na nguya ya kokokisa yango.
9 We rejoice when we are weak and you are strong; we also pray for your full restoration. Tozali na esengo ya kozala na bolembu, kasi bino bozali makasi ; mpe tosengaka na Nzambe kati na mabondeli na biso ete bokoma bato ya kokoka.
10 This is why I write these things while away, so that when present I won't need to be harsh, using the authority the Lord gave me—to build up, not tear down. Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.
11 Finally, brothers and sisters, rejoice, strive for full restoration, encourage each other, think alike, live in peace—and our Father of love and peace will be with you. Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.
12 Greet one another with a holy kiss. Bopesanaka mbote na beze ya bule. Basantu nyonso oyo bazali awa batindeli bino mbote.
13 All the holy ones greet you. Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto, bolingo ya Nzambe mpe lisanga na Molimo Mosantu ezala na bino nyonso !
14 The grace of our Lord Jesus Christ, the love of our Father, and the deep communion of the Holy Spirit be with you all. Not in this edition
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]