Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Galatians 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Paul, an apostle—not from men, nor through man, but through Jesus Christ and our Father, who raised him from the dead, Ngai Polo, ntoma oyo abengamaki na bato te to na nzela ya moto te, kasi na Yesu-Klisto mpe na Nzambe Tata oyo asekwisaki Ye kati na bakufi,
2 and all the brothers and sisters who are with me, to the churches of Galatia: mpe bandeko nyonso oyo bazali elongo na ngai ; Epai ya Mangomba ya Galatia :
3 Grace and peace to you from our Father and the Lord Jesus Christ, Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
4 who gave himself for our sins, to rescue us from this present evil age, by our Father's will, Yesu amipesaki mpo na masumu na biso mpo ete, kolanda mokano ya Nzambe, Tata na biso, akangola biso longwa na ekeke oyo ya mabe.
5 to whom be the glory forever and ever. Amen. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye libela na libela ! Amen !
6 I'm amazed you're so quickly turning from the one who called you by Christ's grace to a different gospel. Nazali kokamwa ete bozali kosundola noki Ye oyo abengaki bino na nzela ya ngolu ya Klisto mpe bozali kolanda sango malamu mosusu
7 Not that another gospel exists—but some are unsettling you, wanting to twist the gospel of Christ. oyo ezalaka kutu te. Solo, ezali na bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino mpe bazali koluka kobongola Sango Malamu ya Klisto.
8 But even if we, or an angel from heaven, preach a gospel other than what we preached to you, let him be cursed. Kasi soki moto moko, ezala biso to Anjelu moko kowuta na Likolo, ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo biso toteyaki bino, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe !
9 As we said before, I now repeat: if anyone preaches to you a gospel other than what you received, let that person be cursed. Ndenge tolobaki yango liboso, mpe nazali lisusu koloba yango sik’oyo : soki moto moko ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo boyambaki, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe !
10 Am I seeking people's approval now, or our Father's? Am I trying to please people? If I were still trying to please people, I would not be Christ's servant. Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo : nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe ? Boni, nazali koluka kosepelisa bato ? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te.
11 For, brothers and sisters, I want you to know: the gospel I preached is not human in origin. Bandeko na ngai, nalingi boyeba malamu ete Sango Malamu oyo nateyaki bino ezalaki mbuma ya makanisi ya bomoto te.
12 I received it from no man, and was not taught it, but through a revelation of Jesus Christ. Nazwaki yango na moto moko te, nayekolaki yango mpe te ; kasi ezali Yesu-Klisto nde alakisaki ngai yango na nzela ya emoniseli.
13 You've heard of my past in Judaism—how fiercely I persecuted our Father's church, trying to destroy it. Solo, boyokaki sango ya bizaleli na ngai ya kala tango nazalaki nanu mondimi kati na lingomba ya Bayuda ; boyebi mpe ndenge nini nazalaki konyokola Lingomba ya Nzambe mpo na kopanza yango.
14 I advanced in Judaism beyond many contemporaries among my people, far more passionate for my ancestors' traditions. Kati na lingomba ya Bayuda, nazalaki komata koleka Bayuda ebele ya ekeke na ngai, oyo tozalaki na bango mibu moko ya mbotama ; nalekaki bango kutu na bolingo eleka ndelo mpo na bokoko ya batata na ngai.
15 But when our Father, who set me apart from my mother's womb and called me by his grace, was pleased, Kasi tango Nzambe oyo aponaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpe abengaki ngai na nzela ya ngolu na Ye, asepelaki
16 to reveal his Son in me, so I might proclaim him among the Gentiles, I did not immediately consult anyone, kotalisa ngai Mwana na Ye na nzela ya emoniseli mpo ete nakoka kosakola Ye kati na Bapagano, natunaki na mbala moko toli epai ya moto ata moko te.
17 nor did I go up to Jerusalem, to those apostles before me, but went to Arabia, then returned to Damascus. Nakendeki kutu na Yelusalemi te mpo na kokutana na bato oyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendeki nde na Arabi. Sima na yango, nazongaki na Damasi.
18 Then, three years later, I went up to Jerusalem to get to know Peter, staying with him fifteen days. Ezali sima na mibu misato nde nakendeki na Yelusalemi mpo na koyeba Petelo, mpe navandaki epai na ye mikolo zomi na mitano.
19 But I saw none of the other apostles except James, the Lord's brother. Natikalaki komona ntoma mosusu te, longola kaka Jake, ndeko ya Nkolo.
20 In what I am writing to you, I assure you before our Father, I am not lying. Nzambe azali Motatoli na ngai ete makambo oyo nazali kokomela bino ezali ya lokuta te.
21 Then I went into the regions of Syria and Cilicia. Sima na yango, nakendeki na bituka ya Siri mpe ya Silisi.
22 I was still personally unknown to the churches of Judea that are in Christ. Kasi Baklisto ya Mangomba ya Yuda bayebaki ngai te,
23 They only heard: "The one who once persecuted us now preaches the faith he once tried to destroy." bayokaki kaka sango : « Moto oyo azalaki konyokola biso na kala akomi sik’oyo koteya kondima oyo azalaki koluka kobebisa. »
24 And they glorified our Father because of me. Mpe bazalaki kokumisa Nzambe na tina na ngai.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]