Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Galatians 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Fourteen years later I went up to Jerusalem again with Barnabas, taking Titus too. Sima na mibu zomi na minei, nazongaki lisusu na Yelusalemi elongo na Barnabasi ; namemaki mpe Tito.
2 I went up by revelation and presented to them the gospel I preach among the Gentiles—privately, to those held in esteem—so I wouldn't be running, or have run, in vain. Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo nazwaki. Natalisaki na bakambi Sango Malamu oyo nateyaka kati na Bapagano, na esika oyo tozalaki kaka biso moko mpo nalingaki ete mosala oyo nazalaki kosala mpe oyo nasilaki kosala ezwama na motuya.
3 But not even Titus, with me, though Greek, was forced to be circumcised. Nzokande, ezala Tito oyo azalaki elongo na ngai, batindaki ye kutu te na makasi ete akatisa ngenga, atako azalaki Mogreki.
4 This was because of false brothers, secretly brought in, who slipped in to spy on the freedom we have in Christ Jesus, aiming to enslave us. Esalemaki bongo likolo ya bandeko ya lokuta oyo basilaki kokota kati na biso na mayele mabe mpo na kolandela bonsomi oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto mpe mpo na koluka kokomisa biso bawumbu.
5 We did not yield to them for even a moment, so the gospel's truth would remain with you. Kasi totikelaki bango ata tango te mpo ete bosolo ya Sango Malamu etikala mpo na bino.
6 As for those held in esteem—whatever they were makes no difference to me; our Father shows no partiality—those held in esteem added nothing to me. Bato oyo bazalaki bakambi babakisaki ata eloko moko te na mateya na ngai ; lokumu nyonso oyo bazalaki na yango ezalaki na motuya moko te epai na ngai, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.
7 Instead, they saw I had been entrusted with the gospel to the uncircumcised, as Peter had to the circumcised. Kutu, bamonaki penza ete Nzambe apesaki ngai mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya bato oyo bakatama ngenga te, ndenge apesaki na Petelo mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya Bayuda.
8 For the one who worked in Peter for apostleship to the circumcised worked also in me for the Gentiles. Pamba te Nzambe oyo asalaki kati na Petelo mpo ete azala ntoma ya bato oyo bakatama ngenga asalaki mpe kati na ngai lokola mpo ete nazala ntoma ya Bapagano.
9 Recognizing the grace given me, James, Peter, and John—reputed pillars—gave me and Barnabas the right hand of fellowship: we would go to the Gentiles, they to the circumcised. Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko ; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga.
10 They asked only that we remember the poor—the very thing I was eager to do. Basengaki na biso kaka ete tokoba kokanisa babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango.
11 But when Peter came to Antioch, I opposed him to his face, because he stood condemned. Tango Petelo ayaki na Antioshe, natelemelaki ye makasi mpo ete azalaki kati na libunga.
12 Before certain men came from James, he ate with the Gentiles; but when they came, he withdrew and separated himself, fearing those of the circumcision. Pamba te liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Jake bakoma, Petelo azalaki kolia mesa moko elongo na Bapagano ; kasi sima na bango kokoma, akomaki kobenda nzoto mpe akabwanaki na Bapagano yango mpo ete azalaki kobanga Bayuda.
13 The other Jews joined him in this pretense, so even Barnabas was carried away by their pretense. Bayuda mosusu basanganaki na ye kati na lokuta na ye kino Barnabasi mpe akotaki na lokuta na bango.
14 But when I saw they weren't walking rightly by the truth of the gospel, I told Peter in front of everyone, "If you, a Jew, live like a Gentile, not like a Jew, how can you force Gentiles to live like Jews?" Kasi tango ngai namonaki ete bazali kotambola te na bomoi ya sembo kolanda bosolo ya Sango Malamu, nalobaki na Petelo na miso ya bango nyonso : « Ozali Moyuda, kasi ozali kobika bomoi na yo lokola Mopagano ! Ndenge nini ozali kosenga na makasi ete Bapagano batambola lokola Bayuda ?
15 We ourselves are Jews by birth and not Gentile sinners, Biso tobotama Bayuda, tozali Bapagano te oyo bazali basumuki.
16 yet we know a person is not made right with God by law's works, but through faith in Jesus Christ. We too trusted in Christ Jesus, to be made right by faith in Christ, not law's works—for law's works make no human right. Toyebi ete moto akoki kokoma sembo te na nzela ya kotosa maloba ya Mobeko, kasi kaka na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto. Yango wana biso mpe tondimelaki Yesu-Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima kati na Klisto, kasi na nzela te ya kotosa maloba ya Mobeko, pamba te moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya kotosa maloba ya mibeko.
17 But if, seeking to be made right in Christ, we ourselves are found sinners too, is Christ then a servant of sin? Absolutely not! Kasi soki, wana tozali koluka kokoma sembo kati na Klisto, emonani lisusu ete biso moko Bayuda tozali mpe basumuki lokola Bapagano, boni, elingi koloba ete Klisto azali kotombola masumu ? Ata moke te !
18 For if I rebuild what I tore down, I prove myself to be a transgressor. Soki ngai natomboli lisusu biloko oyo nasilaki kobebisa, wana nazali penza mobuki mibeko.
19 For through the law I died to the law, so that I might live to our Father. Pamba te, na nzela ya Mobeko, ngai nasilaki kokufa na oyo etali Mobeko mpo ete nakoka kobika bomoi na ngai mpo na Nzambe. Nabakamaki na ekulusu elongo na Klisto ;
20 I've been crucified with Christ. It is no longer I who live, but Christ who lives in me. The life I live now in the body, I live by faith in the Son of our Father, who loved me and gave himself for me. boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
21 I do not reject the grace of our Father; if righteousness comes through the law, then Christ died for nothing. Nazali kolongola te ngolu ya Nzambe, pamba te soki ezali na nzela ya kotosa Mobeko nde bato bakomaka sembo, wana Klisto akufaki mpo na pamba. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]