Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Galatians 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Foolish Galatians, who bewitched you? Jesus Christ was displayed crucified before your eyes. Oh bato ya Galatia, bozali penza babolole ! Nani aloki bino ? Balimbolelaki bino polele ndenge nini babakaki Yesu-Klisto na ekulusu.
2 I want to learn only this from you: did you receive the Holy Spirit by works of the law, or by hearing with faith? Nalingi kotuna bino motuna moko kaka : « Bozwaki Molimo mpo botosaki Mobeko to mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ? »
3 Are you so foolish? Having begun by the Spirit, are you now being perfected by human effort? Ndenge nini bokoki kokoma babolole boye ? Ndenge nini bino oyo bobandaki na Molimo bozali sik’oyo kosukisa na mosuni ?
4 Did you suffer so many things in vain—if it really was in vain? Boni, bomonaki kaka pasi ya pamba, soki penza ezalaki mpe mpo na pamba ?
5 So does our Father, who lavishly gives you the Holy Spirit and works miracles among you, do this by works of the law, or by hearing with faith? Boni, ezali mpo botosaki Mobeko nde Nzambe apesi bino Molimo na Ye mpe azali kosala bikamwa kati na bino to ezali mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ?
6 So it was with Abraham: "He believed our Father, and it was credited to him as righteousness." Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; mpe mpo na kondima na ye, Nzambe akomisaki ye moto ya sembo.
7 Understand, then, that those who have faith are the children of Abraham. Boye, boyeba malamu ete ezali kaka bato oyo bazali na kondima kati na Nzambe nde bazali bana ya Abrayami.
8 Scripture, seeing ahead that our Father would justify the nations by faith, told Abraham the good news in advance: "In you all nations will be blessed." Makomi esilaki kobongisa ete Nzambe akokomisa Bapagano sembo na nzela ya kondima, mpe etatolaki Sango Malamu oyo epai ya Abrayami : « Bato ya bikolo nyonso bakopambolama mpo na yo. »
9 So those who have faith are blessed along with Abraham, the man of faith. Boye, bato oyo bazali na kondima bazali ya kopambolama elongo na Abrayami, moto na kondima.
10 For all who rely on works of law are under a curse, since it is written: "Cursed is everyone who does not keep doing everything written in the Book of the Law." Pamba te bato nyonso oyo batiaka elikya na botosi na bango liboso ya Mobeko bazali na se ya elakeli mabe, kolanda ndenge ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobaka te kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko. »
11 Clearly, no one is justified before our Father by the law: "The righteous will live by faith." Solo, moto moko te akoki kokoma sembo na miso ya Nzambe na nzela ya Mobeko, pamba te moto ya sembo akobika na nzela ya kondima.
12 But the law isn't grounded in faith; instead, "Whoever does them will live by them." Nzokande, Mobeko ewuti na kondima te, pamba te ekomama : « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. »
13 Christ redeemed us from the law's curse by becoming a curse for us—for Scripture says, "Cursed is everyone hung on a tree." Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »
14 He did this so that Abraham's blessing would come to the nations in Christ Jesus, so that we would receive the promised Holy Spirit through faith. Asalaki bongo mpo ete, kati na Klisto Yesu, Bapagano bazwa mapamboli ya Abrayami, mpe mpo ete biso tozwa, na nzela ya kondima, Molimo oyo Nzambe alakaki.
15 Brothers and sisters, let me speak in human terms: no one annuls or adds to a ratified human covenant. Bandeko na ngai, tozwa nanu ndakisa moko kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo : Soki moto atiki maloba na ye ya suka kati na mokanda, moko te akoki kolongola to kobakisa eloko kati na makambo oyo esili kokomama.
16 The promises were spoken to Abraham and his offspring. It doesn't say "and to offsprings," plural, but "and to your offspring," singular, who is Christ. Nzokande, Nzambe apesaki bilaka na Ye epai ya Abrayami mpe epai ya mokitani na ye. Makomi elobi te « Epai ya bakitani » lokola nde ezalaki likambo ya bato ebele, kasi elobi « Epai ya mokitani na yo » mpo na kolakisa ete etali moto se moko kaka, ye nde Klisto.
17 Here's my point: the law, coming 430 years later, doesn't cancel a covenant our Father already confirmed, so as to nullify the promise. Nalobi boye : « Mobeko oyo eyaki sima na mibu nkama minei na tuku misato ezali na makoki te ya koboma boyokani oyo Nzambe asala wuta kala elongo na Abrayami ; soki te, elaka ekomi eloko pamba. »
18 If the inheritance comes from law, it's no longer from promise—but our Father gave it to Abraham through promise. Pamba te soki libula ezwami na nzela ya Mobeko, wana elaka ezali lisusu na esika te. Nzokande ezali penza na nzela ya elaka nde Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Abrayami.
19 Why then the law? It was added for wrongdoings, until the offspring to whom the promise was made would come—arranged through angels by a mediator's hand. Bongo mpo na nini Mobeko ? Mobeko ebakisamaki mpo na kobimisa polele bozangi botosi ya bato, kino na boyei ya Mokitani epai ya nani Nzambe apesaki elaka. Mobeko yango epesamaki na nzela ya ba-anjelu, mpe mokumba na yango epesamaki na maboko ya moyokanisi.
20 Now a mediator is not for one party only; but our Father is one. Nzokande soki ezalaki na moyokanisi, elingi koloba ete ezalaki mpe na masanga ebele ya koyokanisa. Kasi mpo na oyo etali elaka, Nzambe azali kaka Ye moko.
21 Is the law then against our Father's promises? Absolutely not! If a law could give life, righteousness would truly come from law. Boni, Mobeko eyaki mpo na kotelemela bilaka ya Nzambe ? Ata moke te ! Soki mobeko moko epesamaki, mobeko oyo ezali na makoki ya kopesa bato bomoi, bato balingaki penza kokoma sembo na nzela ya mobeko yango.
22 But Scripture locked everything under sin, so the promise, through faith in Jesus Christ, might be given to those who believe. Kasi tala makambo oyo Makomi eloba : Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto.
23 Before faith came, we were guarded under the law, shut in until the coming faith was revealed. Liboso ete kondima eya, tozalaki na se ya bokonzi ya Mobeko, tozalaki ya kokangama mpo na kozela kondima oyo esengelaki komonisama.
24 So the law was our guardian until Christ, so faith could justify us. Boye Mobeko ezalaki lokola mokengeli, ezalaki na mokumba ya komema biso epai ya Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima.
25 But now that faith has come, we are no longer under a guardian. Lokola sik’oyo kondima eyei, tozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te.
26 For in Christ Jesus you are all children of our Father through faith. Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto ;
27 For all of you who were baptized into Christ have clothed yourselves with Christ. pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.
28 There is neither Jew nor Greek, there is neither slave nor free, there is no male and female—for you are all one in Christ Jesus. Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.
29 And if you belong to Christ, then you are Abraham's offspring, heirs according to the promise. Mpe soki bozali ya Klisto, bozali mpe bokitani ya Abrayami, bakitani ya libula kolanda elaka oyo Nzambe apesaki na Abrayami.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]