Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I must keep boasting—no profit in it—yet I'll move on to visions and revelations of the Lord. Boni, nasengeli komikumisa ? Te, ezali na tina te ! Kasi tika nayebisa bino makambo oyo namonaki lokola na ndoto, mpe bimoniseli oyo Nkolo alakisaki ngai.
2 Fourteen years ago, a man in Christ—I know him—was swept up to the third heaven. Whether in the body or out, I can't say; our Father knows. Nayebi moto moko kati na Klisto, oyo, wuta mibu zomi na minei, amemamaki kino na likolo ya misato : nayebi te soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, kasi Nzambe ayebi.
3 And I know this man—whether in the body or out of the body, I do not know; our Father knows. Nzokande, ezala soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, Nzambe ayebi yango ; kasi ngai nayebi kaka ete moto yango
4 Was caught up into paradise and heard inexpressible words, things that no one is permitted to speak. amemamaki na paradizo mpe ayokaki maloba oyo moto akoki kolimbola te, makambo oyo moto azali na ndingisa te ya koloba.
5 I will boast about this man, but I will not boast about myself, except in my weaknesses. Nakomikumisa solo na tina na moto ya ndenge wana, kasi na tina na ngai moko te, longola kaka na tina na bolembu na ngai.
6 If I wanted to boast, I wouldn't be a fool, since I'd be speaking the truth. But I hold back, so no one credits me beyond what he sees in me or hears from me, Nzokande, soki nalingaki komikumisa, nalingaki kozala zoba te, pamba te nalingaki koloba kaka bosolo ; kasi naboyi kosala yango, noki te bakopesa ngai lokumu koleka oyo bato bamonaka kati na ngai to koleka sango oyo bayokaka na tina na ngai.
7 and because these revelations were so extraordinary, therefore, so I wouldn't grow arrogant, I was given a thorn in my flesh, a messenger of Satan to torment me—so I wouldn't grow arrogant. Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai.
8 Three times I pleaded with the Lord about this, that it would leave me. Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato mpo ete nzube yango elongwa na nzoto na ngai.
9 But he told me, "My grace is enough for you, for my power is perfected in weakness." So I'll gladly boast all the more in my weaknesses, so Christ's power may rest on me. Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.
10 So I'm content with weaknesses, insults, hardships, persecutions, and troubles for Christ's sake. For when I'm weak, then I'm strong. Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.
11 I've become foolish—you forced me to it. For I should have been commended by you, for I was no way inferior to the so-called super-apostles, even though I am nothing. Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.
12 A true apostle's signs were done among you with all endurance: signs, wonders, and mighty works. Bilembo oyo elakisaka ete nazali ntoma emonisamaki kati na bino : molende, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa.
13 How were you worse off than the rest of the churches—except that I didn't burden you? Forgive me this wrong! Eloko nini penza bino bozwaki te koleka Mangomba mosusu, longola kaka kozanga komemisa bino mokumba na ngai ? Boye, bolimbisa ngai mpo na mabe yango !
14 Look, this is the third time I'm ready to come to you, and I won't burden you—I don't want what's yours, but you. Children shouldn't save for their parents, but parents for their children. Sik’oyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato ; mpe nakomemisa bino mokumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Kobomba biloko mpo na baboti ezali likambo ya bana na bango te, kasi ezali baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango.
15 I will very gladly spend and be spent for your souls—loving you more, am I loved less? Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te ?
16 Let it be so—I didn't burden you. But sly as I am, I caught you by trickery. Atako nazalaki mokumba te epai na bino, kasi bato mosusu bazalaki koloba ete nazali moto ya mayele mabe, natielaki bino motambo.
17 Did I take advantage of you through any of those I sent to you? Boni, kati na bato oyo natindaki epai na bino, ezali na moko oyo natindaki mpo na kozwa bino biloko na mayele mabe ?
18 I urged Titus to go and sent the brother with him. Did Titus exploit you? Didn't we walk by the same spirit, in the same steps? Nasengaki na Tito ete aya epai na bino, mpe natindaki elongo na ye ndeko na biso. Boni, Tito azwaki biloko na bino na mayele mabe ? Tozalaki na ye likanisi moko te ? Tazalaki kosala na ye ndenge moko te ?
19 Do you think we've been defending ourselves to you all along? We speak in Christ before our Father—all of it, loved ones, for building you up. Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.
20 I fear that when I come, I won't find you as I want, and you won't find me as you want—that there'll be quarreling, jealousy, outbursts of anger, selfish ambition, slander, gossip, arrogance, and disorder. Pamba te nazali kobanga ete nakuta bino te na lolenge oyo ngai nazali kolinga ete bozala, tango nakoya epai na bino, mpe ete bino bomona ngai te na lolenge oyo bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu.
21 I fear that when I come again, my Father may humble me before you, and I'll grieve over many who sinned earlier and haven't turned from the impurity, sexual sin, and lust they practiced. Solo, nazali kobanga lisusu ete, tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe ete nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, na kindumba mpe na ekobo oyo basalaka.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]