Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I wish you'd tolerate a little foolishness from me—and you do tolerate me. Bandeko, nabondeli bino : boyikela nanu oyo emonani lokola bozoba na ngai mpiko ! Iyo, boyikela ngai mpiko.
2 I am jealous for you with our Father's jealousy, having betrothed you to one husband, to present you as a pure virgin to Christ. Mpo na bino, natondi na zuwa kowuta na Nzambe. Nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye nde Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali peto.
3 But I fear that, as the serpent deceived Eve by his cunning, your minds may be corrupted from sincere, pure devotion to Christ. Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.
4 If someone comes and proclaims another Jesus than we proclaimed, or you receive a different spirit than you received, or a different gospel than you accepted, you tolerate it well enough. Pamba te bozali kondima ete songolo aya koteya bino Yesu mosusu oyo akeseni na Yesu oyo biso toteyaki bino ; bozali mpe kondima kozwa molimo mosusu oyo ekeseni na Molimo oyo boyambaki to mateya oyo ekeseni na Sango Malamu oyo bondimelaki !
5 Yet I consider that I am not in the least inferior to those "super-apostles." Nzokande, nakanisi ete nazali moke te na miso ya bantoma oyo bamimonaka ete bazali minene.
6 Even if unskilled in speech, I'm not unskilled in knowledge; we've made this clear to you in every way, in everything. Nakoki solo komonana lokola moto oyo ayebi nanu te koloba malamu, kasi nazali na boyebi ; mpe tolakisaki bino yango polele na banzela mpe na makambo nyonso.
7 Or did I sin by humbling myself so you'd be lifted up, since I preached our Father's gospel to you free of charge? Boni, nasalaki mabe ndenge namikitisaki mpo ete bino botombwama, wana nateyaki bino Sango Malamu ya Nzambe ?
8 I robbed other churches by accepting support from them in order to serve you. Nazwaki mbongo kowuta na Mangomba mosusu lokola lisungi na bango, wana nazalaki kokokisa lotomo na ngai kati na bino.
9 When I was with you and in need, I burdened no one—brothers from Macedonia supplied what I lacked. I kept myself from burdening you in any way, and will keep doing so. Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na bosenga. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te ; mpe nakokoba kaka komibatela mpo na likambo yango.
10 Since Christ's truth is in me, this boast won't be silenced in Achaia's regions. Lokola solo ya Klisto ezali kati na ngai, moto moko te kati na etuka ya Akayi akobotola ngai lokumu yango.
11 Why? Because I do not love you? Our Father knows that I do! Mpo na nini nalobi bongo ? Mpo nalingaka bino te ? Nzambe ayebi ete nalingaka bino !
12 And what I am doing I will keep on doing, in order to cut off the opportunity of those who want an opportunity to be regarded as our equals in the things they boast about. Mpe nakokoba kosala oyo nazali kosala sik’oyo, mpo na kopekisa bato oyo bazali koluka nzela ya komikokanisa na biso kati na makambo oyo bazali komikumisa na yango.
13 For these people are false apostles, deceitful workers, disguising themselves as apostles of Christ. Pamba te bato ya lolenge wana bazali bantoma ya lokuta, bazali bakosi oyo bazali komikomisa lokola bantoma ya Klisto.
14 And no wonder, for even Satan disguises himself as an angel of light. Ezali likambo ya kokamwa te, pamba te Satana mpe amikomisaka lokola anjelu ya pole.
15 So it's no surprise his servants also disguise themselves as servants of righteousness. Their end will be according to their deeds. Ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komikomisa lokola basali ya Nzambe ya sembo. Kasi suka na bango ekozala kolanda misala na bango.
16 Again I say, let no one think me foolish. But if you do, accept me as foolish, so I too may boast a little. Nazongeli lisusu : tika ete moto moko te azwa ngai lokola moto ya liboma ! Kasi soki bolingi bongo, boyamba ngai lokola moto ya liboma mpo ete ngai mpe namikumisa mwa moke.
17 What I say in this confident boasting, I say not as the Lord would, but as a fool. Makambo oyo nalingi koloba, nakoloba yango te ndenge Nkolo alingi, kasi nakoloba yango lokola moto ya liboma, mpe nazali na elikya ete nakozwa nzela ya komikumisa.
18 Since many boast by human standards, I too will boast. Lokola bato mingi bazali komikumisa na tina na makambo ya mokili, ngai mpe nakomikumisa.
19 For you gladly put up with fools, since you are so wise! Bino oyo bozali bato ya bwanya, bozali kondima na esengo nyonso bato ya maboma.
20 You tolerate it if someone enslaves you, if someone devours you, if someone takes advantage of you, if someone acts superior, if someone slaps your face. Bozali penza kondima ete bato bakomisa bino bawumbu, babotola bozwi na bino, banyokola bino, bamonela bino, babeta bino na bilongi !
21 I say this to my shame: we were too weak for that. But whatever anyone dares to boast of—I speak foolishly—I dare too. Nalobi yango na soni ete tozalaki penza babolole mpo na komitika bongo. Nzokande, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na tina na yango —nazali koloba lokola moto ya liboma— ngai mpe nakoki komikumisa na tina na yango.
22 Are they Hebrews? So am I. Israelites? So am I. Descendants of Abraham? So am I. Bazali Ba-Ebre ? Ngai mpe nazali Mo-Ebre. Bazali bana ya Isalaele ? Ngai mpe nazali mwana ya Isalaele ! Bazali bakitani ya Abrayami ? Ngai mpe nazali mokitani ya Abrayami.
23 Servants of Christ? I speak as a madman—I am more so: with far more labors, more imprisonments, beatings beyond measure, and often near death. Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.
24 Five times I received from the Jews the forty lashes minus one. Mbala mitano, Bayuda babetaki ngai bafimbu tuku misato na libwa ;
25 Three times beaten with rods, once stoned, three times shipwrecked; a night and day I spent in the deep. mbala misato, babetaki ngai banzete ; mbala moko, babambaki ngai mabanga ; mbala misato, nazindaki na mayi ; nasalaki mokolo moko mpe butu moko kati na ebale monene.
26 Always traveling: in danger from rivers, in danger from robbers, in danger from my own people, in danger from Gentiles, in danger in the city, in danger in the wilderness, in danger at sea, in danger among false brothers; Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo ; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya Bapagano, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta.
27 in toil and hardship, through many sleepless nights, in hunger and thirst, often without food, in cold and exposure. Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata.
28 Besides all else, daily pressure weighs on me: anxiety for all the churches. Longola makambo nyonso oyo etikali, mokumba na ngai ya mokolo na mokolo ezalaki : komitungisa na tina na Mangomba nyonso.
29 Who is weak, and I am not weak? Who is made to stumble, and I do not burn with indignation? Nani oyo alembi, bongo ngai nalemba nzoto te ? Nani oyo akweyi na masumu, bongo ngai nayoka motema pasi te ?
30 If I must boast, I will boast of the things that show my weakness. Soki nasengeli komikumisa, nakomikumisa mpo na bolembu na ngai.
31 Our Father, the Father of our Lord Jesus and blessed forever, knows I'm not lying. Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Ye oyo akumisama mpo na seko, ayebi ete nazali kokosa te.
32 In Damascus, Aretas the king's governor guarded the city to seize me, Kati na Damasi, moyangeli ya mokonzi Aretasi apesaki mitindo ete bakengela engumba ya bato ya Damasi mpo ete bakanga ngai.
33 but through a window in the wall I was lowered in a basket, and escaped his hands. Kasi bakitisaki ngai na nzela ya lidusu kati na mir, kati na kitunga, libanda ya mir ; bongo nalongaki kokima ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]