Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I, Paul, myself appeal to you by the meekness and gentleness of Christ—I who am humble face to face with you, but bold toward you when away. Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :
2 I beg that when present I won't need to be bold—with the confidence I plan to use against those who think we live by human standards. Nabondeli bino, tango nakoya epai na bino, bopesa ngai nzela te ya kosalela makambo makasi oyo nazali kokanisa kolakisa epai ya bato oyo bakanisaka ete biso totambolaka na mosuni.
3 For though we live in the body, we do not wage war by human standards. Pamba te atako ezali penza ya solo ete tozali bato, mpe tozali kobika bomoi na biso kati na nzoto, kasi tobundaka te kolanda nzoto.
4 For our weapons of war are not merely human but powerful through our Father to demolish strongholds. Bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe mpo na kokweyisa bandako batonga makasi. Solo, tobukaka makanisi ya mabe,
5 We tear down arguments and every proud thing raised against the knowledge of our Father, taking every thought captive to obey Christ. tokweyisaka makanisi ya lokuta mpe nguya nyonso oyo etelemelaka boyebi ya Nzambe ; tolongaka makanisi nyonso ya bomoto mpe tosalaka ete yango etosa Klisto.
6 And we are ready to punish every act of disobedience, once your obedience is complete. Lisusu, tomilengeli mpo na kopesa bozangi botosi nyonso etumbu, tango kaka botosi na bino ekokoka.
7 You look at things by appearance. If anyone is sure he belongs to Christ, let him consider this again: as he belongs to Christ, so do we. Botala penza makambo ndenge ezaleli. Soki ezali na moto oyo andimisami solo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe tozali ya Klisto lokola ye.
8 For even if I boast a little too much about the authority the Lord gave us—to build you up, not tear you down—I won't be ashamed. Bongo, ata namikumisaka koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso, mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te
9 I do not want to seem as though I am trying to frighten you with my letters. mpo ete namonana te lokola nde nazali kobangisa bino na nzela ya mikanda na ngai.
10 For they say, "His letters are weighty and forceful, but in person he's weak and his speaking counts for nothing." Pamba te bato mosusu balobaka : « Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka ; kasi soki ye moko azali elongo na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te. »
11 Such a person should realize: what we say by letter when absent, we will do when present. Boye tika ete moto oyo akanisaka bongo asimba likambo oyo : ndenge tolobaka kati na mikanda na biso tango tozalaka mosika na bino, ndenge wana mpe tokosala tango tokozala epai na bino.
12 We dare not classify or compare ourselves with some who commend themselves. Measuring themselves by themselves, comparing themselves with themselves, they show no understanding. Toboyi komikokanisa to komekana na bato mosusu oyo bamikumisaka bango moko, tango balukaka komikokanisa mpe komekana bango na bango. Solo, bazangi mayele !
13 But we won't boast beyond limits, only within the measure of the sphere our Father assigned us—a measure reaching even to you. Kasi biso, tokomikumisa te koleka ndelo ; tokomikumisa kaka kati na bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, oyo mpe esali ete tokoma kino epai na bino.
14 We aren't overreaching, as if we had not reached you, for we were the first to reach as far as you with the gospel of Christ. Solo, toleki bandelo na biso te lokola nde tokomaki te kino epai na bino, pamba te tokomaki penza kino epai na bino mpo na komemela bino Sango Malamu ya Klisto.
15 We don't boast beyond limit in others' labors, but hope that as your faith grows, our sphere among you will expand greatly, Tomikumisaka te mpo na mosala ya bato mosusu ; nzokande, tozali na elikya ete, wana kondima na bino ezali kokola, mosala na biso mpe ezali kokoba koya monene kati na bino kolanda bandelo ya mosala, oyo Nzambe apesa biso.
16 so we can preach the gospel in regions beyond you, without boasting in work already done in someone else's territory. Boye, tokoteya Sango Malamu kati na bituka oyo ezali mosika na bino. Pamba te toboyi na biso komikumisa na tina na mosala oyo bato mosusu basali kati na elanga na bango ya mosala.
17 But "let the one who boasts, boast in our Father." Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa kati na Nkolo !
18 For it is not the one commending himself who is approved, but the one our Father commends. Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka bosolo na tina na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]