Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 About serving the Lord's people, I don't need to write you, Mpo na ngai, ezali na tina te ya kokomela bino na tina na lisungi ya kopesa na basantu,
2 for I know your eagerness, and I boast about you to the Macedonians, that Achaia has been ready since last year, and your zeal has stirred up most of them. pamba te nayebi molende na bino mpo na kosunga, mpe nazalaki komikumisa na tina na yango epai ya bato ya Masedwane. Nazalaki koloba na bango : « Kati na Akayi, wuta na mobu oyo eleki, bazali ya kobongama mpo na kopesa. » Mpe bolingo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga.
3 So I'm sending the brothers, that our boast about you not prove empty in this case—that you'd be ready, as I said. Kasi nazali kotindela bino bandeko mpo ete, na likambo yango, lolendo na biso na tina na bino emonana te lokola ya pamba, kasi mpo ete bozala penza ya kobongama, ndenge kaka nalobaki yango.
4 Otherwise, if Macedonians come with me and find you unprepared, we—not to mention you—would be ashamed for such confidence. Pamba te soki bato ya Masedwane bayei elongo na ngai mpe bakuti bino bozali ya kobongama te, tokoyoka penza soni, mpo ete tozali penza kotiela bino motema ; mpe ekozala soni na biso kaka te, kasi soni na bino mpe lokola.
5 So I thought it necessary to urge the brothers to go on ahead to you and arrange in advance for the generous gift you had promised, so that it would be ready as a willing gift, not as something grudgingly given. Yango wana, namonaki ete ezali malamu kosenga na bandeko yango ete bakoma epai na bino liboso na ngai, mpo na kobongisa makabo oyo bolakaki. Boye ekomizalela tango ngai nakokoma, mpe ekolakisa ete bopesaki yango na esengo mpe na bonsomi, kasi na makasi te.
6 Remember this: whoever sows sparingly will also reap sparingly, and whoever sows generously will also reap generously. Bokanisaka likambo oyo : Moto oyo alonaka moke abukaka mpe moke, mpe moto oyo alonaka ebele abukaka mpe ebele.
7 Each should give as he has decided in his heart, not reluctantly or under compulsion, for our Father loves a cheerful giver. Tika ete moko na moko kati na bino apesa oyo akanaki kopesa kati na motema na ye, na mawa te mpe na makasi te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.
8 Our Father can make all grace overflow to you, so that always having all you need in everything, you overflow in every good work. Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,
9 As it is written: "He has scattered abroad his gifts to the poor; his righteousness endures forever." kolanda ndenge ekomama : « Akabelaka babola na motema ya esengo, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela. »
10 He who supplies seed to the sower and bread to eat will supply and multiply your seed, and increase the harvest of your righteousness. Mpe Ye oyo apesaka nkona epai ya moloni mpe lipa lokola bilei akopesa lisusu, akofulukisa nkona na bino mpe akokolisa bambuma ya bosembo na bino.
11 You will be enriched in everything, for all generosity, which produces thanksgiving to our Father through us. Boye bokokoma bazwi ya biloko nyonso mpo ete bokoka kokabaka tango nyonso ; bongo bato epai ya banani tokopesa makabo na bino bakozongisa matondi epai ya Nzambe.
12 This service you perform not only meets the needs of the Lord's people, but overflows in many acts of thanksgiving to our Father. Pamba te lotomo ya makabo na bino ezali kaka te mpo na kokokisa bosenga ya basantu, kasi ezali mpe mpo ete matondi mingi ezonga epai ya Nzambe.
13 Proved by this service, others will praise our Father for your submission in confessing the gospel of Christ, and for your generous sharing with them and everyone else. Mpo ete lotomo yango ekotalisa bosolo ya komipesa na bino, basantu bakokumisa Nzambe mpo na botosi ya kondima na bino kati na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na esengo oyo mitema na bino ezali na yango mpo na kokabola biloko na bino elongo na bango mpe elongo na bato nyonso.
14 In their prayers for you, they will yearn for you, because of the surpassing grace our Father has given you. Mpe bakosambela mpo na bino, mpo na kolakisa bolingo makasi oyo bazali na yango mpo na bino, likolo ya ngolu monene oyo Nzambe apesa bino.
15 Thanks be to our Father for his indescribable gift! Tika ete matondi epesamela Nzambe mpo na likabo na Ye, oyo bato bakoki kolimbola te !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]