Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 We want you to know, brothers and sisters, about our Father's grace given in the churches of Macedonia. Bandeko, tolingi koyebisa bino ndenge nini Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Mangomba ya Masedwane.
2 Tested by great trouble, their overflowing joy and deep poverty overflowed into rich generosity. Atako bazalaki na mikakatano ya ndenge na ndenge, kasi batondisamaki na esengo oyo eleka ndelo ; mpe kati na bobola na bango ya makasi, bapesaki makabo mingi koleka.
3 For I testify: they gave as they were able, and beyond, entirely willingly. Nazali kotatola ete bapesaki kolanda makoki na bango, mpe bapesaki kutu koleka. Bapesaki yango na kotindika te
4 Urgently begging us for the favor and partnership of serving the holy ones. mpe basengaki biso kutu na molende nyonso ete tosalela bango ngolu ya kosangana elongo na biso kati na mosala ya kosunga basantu.
5 It wasn't what we expected—they gave themselves first to the Lord, then to us, by our Father's will. Basalaki koleka ndenge tokanisaki : bamipesaki liboso, bango moko, epai ya Nkolo, mpe sima, epai na biso, kolanda mokano ya Nzambe.
6 So we urged Titus to also finish this act of grace among you, as he had already begun. Boye, tosengaki na Tito ete akomisa kino na suka mosala yango ya kosunga, ndenge abandaki yango kati na bino.
7 But as you excel in everything—in faith, in speech, in knowledge, in all earnestness, and in the love we have for you—see that you also excel in this generous offering. Kasi mpo ete bozali kokoba kokende liboso kati na makambo nyonso lokola kondima, liloba, boyebi, molende kati na makambo nyonso, bolingo na biso mpo na bino, tomoni ete boluka mpe kokende liboso kati na mosala yango ya kosunga.
8 This isn't a command—I'm testing your love's realness by the earnestness of others. Nazali kopesa bino mitindo te, kasi nazali nde koluka komeka bosolo ya bolingo na bino na kokokanisa yango na molende ya bato mosusu.
9 You know our Lord Jesus Christ's grace: though rich, he became poor for you, so his poverty could make you rich. Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.
10 My judgment on this: it benefits you, who a year ago began not only doing this but also wanting to. Boye, kati na likambo oyo etali kosunga, botala likanisi na ngai na tina na oyo eleki malamu mpo na bino : na mobu oyo esili koleka, bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kosunga te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosalaka bongo.
11 Now finish the doing too, so eagerness to want it matches completing it from what you have. Boye, bokokisa sik’oyo likambo yango kolanda makoki na bino ; molende oyo bozalaki na yango mpo na kolinga kosunga, bomonisa yango mpe na kokokisaka likambo yango.
12 If the eagerness is there, it's acceptable by what one has, not what one lacks. Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.
13 I do not mean that others be relieved while you are burdened, but that there be fairness. Posa na biso ezali te ya koluka ete bino bomona pasi mpo ete bato mosusu bazala na esengo, kasi ezali kaka ya koluka ete bokokana.
14 Right now your surplus should meet their need, so their surplus may meet your need, and there is equality. Mpo na tango oyo, lokola bozali kati na bofuluki, bokoki kosunga bato na biloko oyo bazali na yango na bosenga. Mokolo mosusu, tango bango mpe bakozala kati na bofuluki, bakosunga bino na biloko oyo bokozala na yango na bosenga. Na ndenge wana nde bokokokana,
15 As it is written: "the one who gathered much had no extra; the one who gathered little, no lack." kolanda ndenge ekomama : « Moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te ; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. »
16 Thanks to our Father, who put the same earnest care I have for you into Titus's heart. Tika ete Nzambe apesamela matondi mpo ete atie kati na motema ya Tito bolingo monene mpo na bino, ndenge tozali na yango mpo na bino !
17 He not only welcomed our appeal, but—more earnest himself—is going to you by his own choice. Pamba te Tito ayambaki na esengo makasi likanisi oyo topesaki ye ya koya epai na bino ; mpe ezali na mokano na ye moko nde ayei epai na bino.
18 With him we are sending the brother praised by all the churches for his work in the gospel. Elongo na ye, tozali kotinda ndeko oyo Mangomba nyonso ekumisaka mpo na Sango Malamu.
19 Not only that—the churches also appointed him to travel with us in this generous gift we carry out, for the Lord's own glory and our eagerness. Lisusu, ezali Mangomba nde eponaki ye mpo ete azala moninga na biso ya mobembo kati na mosala oyo ya kosunga. Tozali kosala mosala yango mpo na lokumu ya Ye moko Nkolo, mpe mpo na kolakisa molende na biso ya kosunga bino.
20 We arrange this so no one can fault us over this generous gift we are handling, Tozali kosala nyonso oyo ekoki mpo ete batonga biso te mpo na lolenge na biso ya kosalela ebele yango ya makabo.
21 for we aim at what is honorable not only before the Lord but also before people. Pamba te totondi na posa makasi ya kozala na etamboli ezanga pamela, na miso ya Nkolo kaka te, kasi mpe na miso ya bato.
22 We're sending with them our brother, tested often and found earnest in much, now even more earnest, given his great confidence in you. Elongo na bango, tozali kotinda ndeko na biso, oyo tondimaka mbala na mbala bolingo na ye. Mpe na mbala oyo, azali na yango lisusu koleka, pamba te azali penza kotiela bino motema.
23 As for Titus: my partner, my fellow worker for you. As for our brothers: messengers of the churches, Christ's glory. Tito azali molingami mpe moninga na ngai ya mosala kati na bino, kasi bandeko na biso bazali batindami ya Mangomba mpe nkembo ya Klisto.
24 So show them, before the churches, proof of your love and our boasting about you. Yango wana, bolakisa bango elembo ya bolingo na bino mpo ete Mangomba nyonso endima mpe eyeba ete tomikumisaka na pamba te na tina na bino liboso na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]