Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Timothy 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Don't sharply rebuke an older man, but appeal to him as a father, and to younger men as brothers, Kogangela mobange te, kasi lendisa ye lokola nde azali tata na yo. Lendisa bilenge mibali lokola bandeko,
2 older women as mothers, and younger women as sisters, in all purity. bamama mibange lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi, na motema peto.
3 Honor widows who are truly widows. Sunga malamu basi oyo bakufisa mibali, oyo bazali penza kokelela.
4 But if a widow has children or grandchildren, they should first learn to show devotion toward their own household, repaying their parents—this pleases our Father. Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.
5 The true widow, left alone, sets her hope on our Father, continuing night and day in petitions and prayers. Mwasi akufisa mobali, oyo atikala penza ye moko mpe azali kokelela atiaka elikya na ye kati na Nzambe mpe asambelaka butu mpe moyi mpo na kosenga lisungi epai ya Nzambe.
6 But the widow who lives for self-indulgence is dead even while she lives. Kasi mwasi akufisa mobali, oyo amipesaka na bisengo azali ya kokufa atako azali na bomoi.
7 Give these orders too, so they are above criticism. Pesa bango malako yango mpo ete batambola na bomoi ezanga pamela.
8 If anyone fails to provide for their own—especially household members—they have denied the faith and are worse than an unbeliever. Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
9 Enroll a widow only if she's at least sixty and has been faithful to one husband, Mpo ete mwasi atangama na molongo ya basi bakufisa mibali, oyo Lingomba azali na mokumba ya kosunga, asengeli kozala na mibu tuku motoba ya mbotama to koleka, kozala mwasi ya makangu te,
10 attested for good works: if she raised children, welcomed strangers, washed the feet of the saints, helped the suffering, and pursued every good work. kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.
11 But refuse to enroll younger widows; when their desires pull them from Christ, they want to marry, Kasi kotanga te bilenge basi bakufisa mibali na molongo ya basi bakufisa mibali ; pamba te soki posa na bango ya nzoto elamuki mpe epengwisi bango na miso ya Klisto, bakoluka lisusu kobala,
12 and so they bring judgment on themselves for having set aside their first pledge. mpe, likolo na yango, bakomema ngambo mpo ete balongisi te ekateli na bango ya liboso.
13 They also learn to be idle, going house to house—not just idle, but gossips and busybodies, saying what they shouldn't. Mpe tina mosusu oyo okotanga bango te na molongo ya basi bakufisa mibali ezali ete bakokoma bagoyigoyi mpe bakokoma koyengayenga na bandako ya bato mosusu. Na bongo, bakokoma bagoyigoyi kaka te, kasi mpe bato na bilobaloba, bato na songisongi mpe bato oyo balobaka makambo oyo basengeli kutu koloba te.
14 So I want younger widows to marry, bear children, manage homes, and give the opponent no chance to slander. Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.
15 For some have already turned aside to follow Satan. Likambo ya pasi ezali ete mingi kati na bango basili kobunga nzela mpo na kolanda Satana.
16 If any believing woman has widows among her relatives, she should support them, not burdening the church, so it can support true widows. Soki, kati na Lingomba, ezali na mwasi mondimi oyo, kati na libota na ye, azali na basi bakufisa mibali, tika ete asunga bango ; mpe tika ete Lingomba emema mokumba na bango te mpo ete ekoka kosunga basi bakufisa mibali, oyo basengeli penza na lisungi mpo ete bakelela.
17 Elders who lead well deserve double honor, especially those working hard at preaching and teaching. Bakambi oyo batambolisaka malamu misala ya Lingomba basengeli kozwa lifuti mbala mibale, mingi-mingi ba-oyo basalaka mosala ya kopanza Sango malamu mpe ya koteya.
18 For Scripture says: "Don't muzzle an ox while it treads out grain," and "The worker deserves his pay." Pamba te Makomi elobi : « Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma, » mpe « mosali asengeli na lifuti na ye. »
19 Do not entertain an accusation against an elder except on the evidence of two or three witnesses. Kondimaka te maloba ya moto oyo ayei ye moko kofunda mokambi ya Lingomba epai na yo ; okondima ye kaka soki ayei elongo na bato mibale to misato lokola batatoli mpo na kolendisa bosolo ya likambo yango.
20 As for those who persist in sin, rebuke them in front of everyone, so that the rest will fear. Na miso ya bato nyonso, pamelaka bakambi oyo basali masumu mpo ete bato mosusu bakoma na botosi.
21 I solemnly charge you before our Father, Christ Jesus, and the elect angels: keep these instructions without prejudice, doing nothing out of favoritism. Liboso ya Nzambe, ya Yesu-Klisto mpe ya ba-anjelu oyo baponama, napesi yo mokumba ya kobatela mitindo oyo na kozanga kopona bilongi.
22 Don't lay hands on anyone hastily, and don't share in others' sins—keep yourself pure. Kotiela moto maboko noki te mpe kosanganaka te na masumu ya bato mosusu. Mibatela peto.
23 Don't drink only water anymore—take a little wine for your stomach and your frequent illnesses. Okomelaka mayi kaka te, kasi melaka mpe mwa masanga ya vino mpo ete esunga yo mpo na pasi na yo ya libumu mpe mpo na bokono oyo ozwaka mbala na mbala.
24 Some people's sins are obvious, going ahead to judgment; others' sins follow after. Ezali na bato oyo masumu na bango emonanaka polele liboso ete basambisa bango, kasi masumu ya bamosusu emonanaka sima na tango.
25 In the same way, good works are obvious, and even those that are not cannot stay hidden. Ezali mpe ndenge moko mpo na misala malamu : emonanaka polele. Kasi misala oyo ekomonana polele te ekotikala ya kobombama te mpo na libela.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]