Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Timothy 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The Holy Spirit clearly says: in later times some will abandon the faith, giving attention to deceiving spirits and teachings of demons, Molimo alobi polele ete, na tango ya suka, ebele bakosundola kondima, pamba te bakolanda milimo ya lokuta mpe mateya oyo ewuti na milimo mabe.
2 through the hypocrisy of liars whose own consciences have been seared as with a branding iron. Ezali bato ya bilongi mibale nde bakobanda kokosa bango na nzela ya mateya, pamba te mitema ya bato yango ya bilongi mibale ebeba lokola nde bazikisa yango na ebende ya moto.
3 They forbid marriage and demand abstaining from foods our Father made to be received with thanks by believers who know the truth. Bakopekisa libala mpe bakopesa na bato mitindo ete balia biloko mosusu te ; nzokande Nzambe akela nyonso mpo ete bandimi oyo bayebi solo basungama na yango na kozongiselaka Ye matondi.
4 For everything our Father made is good; nothing is to be rejected when received with thanks, Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango,
5 for it is made holy by the word of our Father and by prayer. pamba te ebulisamaka na nzela ya Liloba na Nzambe mpe libondeli.
6 Point these things out to the brothers and sisters, and you'll be a good servant of Christ Jesus, nourished on the words of the faith and the good teaching you've followed. Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo.
7 Have nothing to do with irreverent, silly myths. Instead, train yourself to be godly. Boye, boya masolo ya bozoba, oyo etiolaka Nzambe ; boya mpe bilobaloba ya mibange basi. Mipesa nde na botosi kati makambo ya Nzambe ;
8 Physical training helps a little, but devotion to God helps in every way—promising life now and the life to come. pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.
9 This is a trustworthy saying that deserves full acceptance. Yango nde liloba ya solo, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango.
10 For this we labor and strive, because we have hoped in the living Father, Savior of all people, especially believers. Tala mpo na nini tosalaka mpe tobundaka makasi : ezali mpo ete tosili kotia elikya na biso kati na Nzambe na bomoi oyo azali Mobikisi ya bato nyonso mpe mingi-mingi ya bandimi na Ye.
11 Command and teach these things. Teya makambo yango mpe tinda bato kosalela yango.
12 Let no one despise you for your youth, but be an example to believers in speech, conduct, love, faith, and purity. Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto.
13 Until I come, devote yourself to the public reading of Scripture, to preaching, and to teaching. Kino tango nakoya, zala na molende ya kotanga Makomi, ya koteya mpe ya kopesa malakisi.
14 Don't neglect the gift in you, given through prophecy, with the elders' hands laid on you. Kozwa na pamba te likabo oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya lisakoli, tango lisanga ya bakambi ya Lingomba batielaki yo maboko.
15 Practice these things and give yourself fully to them, so that everyone may see your progress. Zwa makambo yango na motuya mpe mipesa na yango mpo ete bato nyonso bamona ete ozali kokende liboso.
16 Watch yourself and your teaching closely. Continue in this, for doing so will save both you and your hearers. Misenzela malamu, sala keba na mateya na yo, mpe tikala ngwi kati na yango. Soki osali bongo, okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bakoyoka yo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]