Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Timothy 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Here is a trustworthy saying: whoever aspires to be an overseer desires a noble work. Tala liloba oyo ezali penza ya solo : Moto nyonso oyo alingi kozala mokambi kati na Lingomba aponi mosala ya kitoko.
2 So an overseer must be blameless: faithful to his wife, level-headed, disciplined, orderly, hospitable, able to teach. Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala : moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,
3 Not a drunkard, not violent but gentle, not quarrelsome, and not a lover of money. molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na boboto, moto oyo aswanaka te, moto na lokoso ya mbongo te,
4 He must manage his own household well, keeping his children submissive with all dignity, moto oyo akambaka malamu libota na ye moko, asenzelaka ete bana na ye batosa ye mpe asalaka bongo na lolenge oyo ebongi na limemia ya kokoka.
5 for if someone doesn't know how to manage his own household, how will he care for our Father's church? Moto oyo ayebi te kokamba malamu libota na ye akokoka ndenge nini kobatela Lingomba ya Nzambe ?
6 He must not be a new convert, or he may be puffed up and fall under the same condemnation as the devil. Mokambi ya Lingomba asengeli te kozala moto oyo abongoli motema sika, noki te akotonda na lolendo mpe akozwa etumbu lokola Satana.
7 He must also have a good reputation with outsiders, so he doesn't fall into disgrace and the devil's trap. Mokambi ya Lingomba asengeli mpe kozala moto oyo akenda sango ya malamu kati na bato oyo bazali bandimi te mpo ete abatela lokumu na ye mpe akweya te na mitambo ya Satana.
8 Deacons too must be dignified, not two-faced, not given to much wine, not greedy for shameful gain. Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona. Basengeli kozala : bato oyo babongi na limemia, bato ya maloba mibale te, balangwi masanga te mpe bato oyo balukaka mbongo te na banzela ya mabe.
9 They must hold to the mystery of the faith with a clear conscience. Basengeli koyeba kobatela mabombami ya kondima kati na motema ya peto.
10 They too must first be tested; then, if they prove blameless, let them serve as deacons. Esengeli komeka bango liboso ; bongo soki emonani ete bazangi pamela, wana nde bakoki kosala lokola badiakona.
11 The women likewise must be worthy of respect, not slanderers, but clear-minded and faithful in everything. Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala : basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso.
12 A deacon must be faithful to his wife and must manage his children and his household well. Diakona asengeli kozala mobali ya mwasi moko mpe asengeli kokamba malamu bana na ye mpe ndako na ye.
13 Deacons who serve well earn themselves a good standing and great confidence in faith in Christ Jesus. Pamba te badiakona oyo basalaka mosala na bango malamu bazwaka esika ya lokumu mpe bakomaka na elikya makasi kati na kondima na bango epai na Yesu-Klisto.
14 I am writing these instructions to you, though I hope to come to you soon. Atako nazali na elikya ya kokutana na yo kala mingi te, kasi nakomeli yo kaka malako oyo
15 But if I'm delayed, you will know how one ought to behave in our Father's household, the church of the living Father, pillar and foundation of the truth. mpo ete, soki nawumeli mpo na koya, oyeba ndenge nini bato basengeli kotambola kati na Ndako ya Nzambe, oyo ezali Lingomba ya Nzambe na bomoi, likonzi mpe moboko ya bosolo.
16 Undeniably, the mystery of devotion to God is great: he appeared in flesh, was proved right by the Holy Spirit, seen by angels, proclaimed among nations, believed in throughout the world, taken up in glory. Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]