Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Timothy 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 First of all, then, I urge that petitions, prayers, intercessions, and thanksgivings be offered for all people, Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso,
2 for kings and all in authority, so we may live peaceful, quiet lives in full godliness and dignity. mpo na bakonzi mpe mpo na bakambi nyonso, mpo ete tokoka kobika bomoi ya boboto, ya kimia, ya botosi kati na makambo ya Nzambe, mpe bomoi ya bosantu.
3 This is good and pleasing to our Father, our Savior, Pamba te yango nde ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso,
4 who wants all people to be saved and to come to know the truth. oyo alingi ete bato nyonso babikisama mpe bayeba solo.
5 For there is one Father, and one mediator between the Father and humanity, the man Christ Jesus, Solo, ezali na Nzambe kaka moko. Ndenge moko mpe ezali na Moyokanisi kaka moko kati na Nzambe mpe bato : ezali moto moko, Yesu-Klisto
6 who gave himself as a ransom for all—the testimony given at the proper time. oyo amikabaki lokola mbeka mpo na kokangola bato nyonso. Yango nde litatoli oyo epesamaki na tango oyo abongisa.
7 For this I was made a preacher and apostle—I'm telling the truth, not lying—a teacher of the nations in faith and truth. Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.
8 I want the men in every place to pray, lifting up holy hands without anger or argument. Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.
9 Likewise, women should dress properly, with modesty and self-control, not in braided hair, gold, pearls, or costly clothing, Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi,
10 but with good works, as is right for women who profess reverence for our Father. kasi balata nde misala ya malamu, misala oyo ebongi mpo na basi oyo batatolaka polele ete bagumbamelaka Nzambe.
11 A woman should learn quietly, in full submission. Na tango ya mateya, basi basengeli kovanda nye mpe kozala na botosi.
12 I don't allow a woman to teach or have authority over a man; instead, she should stay quiet. Napesi te na mwasi nzela ya koteya to ya kozala na bokonzi na likolo ya mobali ; mwasi asengeli nde kovanda nye.
13 For Adam was formed first, then Eve. Solo Nzambe asalaki liboso Adamu, mpe sima, Eva.
14 And Adam was not deceived, but the woman was deceived and became a transgressor. Ezali Adamu te moto akosamaki ; ezali mwasi nde akosamaki mpe abukaki mobeko ya Nzambe,
15 But she will be saved through childbearing, if they remain in faith, love, holiness, with self-control. kasi mwasi akobikisama na nzela ya kobota. Basi bakobikisama soki bakobi kati na kondima, kati na bolingo mpe kati na bosantu oyo ezangi lolendo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]