Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Timothy 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 All under slavery's yoke should consider their own masters worthy of full respect, so our Father's name and the teaching aren't spoken against. Bato nyonso oyo bazali bawumbu basengeli kotala bankolo na bango lokola bato oyo babongi na limemia makasi, mpo ete Kombo ya Nzambe mpe malakisi na biso efingama te.
2 Those with believing masters must not disrespect them for being brothers; instead serve better, since the ones benefiting are believers, dearly loved. Teach and urge these. Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto ; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.
3 If anyone teaches otherwise, disagreeing with the sound words of our Lord Jesus Christ and the teaching that fits devotion to God, Soki moto apesi malakisi mosusu mpe aboyi kokangama na maloba ya solo ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, elongo na malakisi oyo ekoki na botosi kati na makambo ya Nzambe,
4 he is conceited, knowing nothing, but sick with obsession over disputes and word-battles, producing envy, strife, slander, and evil suspicions, azali moto na lolendo, ayebi eloko te, azali kobela bokono ya kotia tembe mpe ya koswana na tina na maloba oyo ebotaka zuwa, koswana, kofingana, kokaniselana mabe
5 and constant conflict among people with corrupted minds, deprived of truth, who think devotion to God is a way to profit. mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.
6 Now godliness with contentment is great gain, Solo, kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela monene ya kozwa bomengo soki kaka oyebi kosepela na oyo ozali na yango.
7 for we brought nothing into the world, and we can take nothing out of it. Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba.
8 But if we have food and clothing, with these we will be content. Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.
9 But those wanting to grow rich fall into temptation, a trap, and many foolish, harmful desires that plunge people into ruin and destruction. Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.
10 Love of money is a root of all kinds of evil; craving it, some have strayed from the faith and pierced themselves with many pains. Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.
11 But you, man of our Father, flee all this. Pursue righteousness, godliness, faith, love, perseverance, and gentleness. Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.
12 Fight the good fight of the faith; take hold of the eternal life you were called to, and professed the good confession before many witnesses. Bunda etumba ya malamu ya kondima, zwa bomoi ya seko, pamba te Nzambe abengaki yo mpo oyeba yango tango otatolaki malamu kondima na yo liboso ya batatoli ebele.
13 I charge you before our Father, who gives life to all things, and Christ Jesus, who testified the good confession before Pontius Pilate, Tala makambo oyo nazali kotinda yo, liboso ya Nzambe oyo apesaka bomoi epai na bikelamu nyonso, mpe liboso ya Yesu-Klisto oyo atatolaki malamu bosolo liboso ya Ponse Pilato :
14 to keep the command spotless and blameless until our Lord Jesus Christ appears, Batela mobeko oyo, kokakola yango ata moke te, mpe sala ete bamona yo na pamela ata moko te, kino Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya
15 which the blessed and only Ruler, the King of kings and Lord of lords, will bring about at the proper time. na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo,
16 He alone is immortal, living in unapproachable light, whom no one has seen or can see. To him be honor and eternal dominion. Amen. Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !
17 Tell the rich in this present age not to be arrogant or hope in uncertain wealth, but in our Father, who richly gives us everything to enjoy. Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.
18 Command them to do good, be rich in good works, generous, willing to share, Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.
19 laying up for themselves a good foundation for the future, so they may grasp the life that is truly life. Ezali na nzela wana nde bakomibombela bomengo lokola moboko ya makasi mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bakoka kozwa bomoi ya solo.
20 Timothy, guard what's entrusted to you. Avoid godless, empty chatter and contradictions of so-called knowledge, Timote, batela malamu nyonso oyo Nzambe apesa yo. Kima bilobaloba ya bato oyo bafingaka Nzambe, mpe makanisi ya oyo babengaka « Boyebi » na kozanga koyeba, pamba te etongaka kondima te.
21 for by professing it some have wandered away from the faith. Grace be with you all. Bato mingi babungisaki kondima na bango mpo ete bakangamaki na boyebi yango. Tika ete ngolu ezala elongo na bino nyonso !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]