Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 29 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now the Philistines gathered all their forces at Aphek, while Israel camped by the spring in Jezreel. Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.
2 As the Philistine rulers marched out by hundreds and thousands, David and his men marched at the rear with Achish. Wana bakambi ya bato ya Filisitia batambolaki liboso ya mampinga na bango ya bankama mpe ya bankoto ya basoda, Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na sima elongo na mokonzi Akishi.
3 The Philistine commanders asked, "What are these Hebrews doing here?" Achish told them, "This is David, servant of Saul king of Israel. He's been with me these days—no, these years—and from the day he deserted to me until now I've found no fault in him." Bakonzi ya basoda ya Filisitia batunaki : — Ba-Ebre oyo bazali kosala nini awa ? Akishi alobaki na bango : — Ezali Davidi, mosali ya Saulo, mokonzi ya Isalaele. Azali elongo na ngai wuta mibu mpe mikolo ; mpe natikali nanu kokanga ye ata na mbeba moko te.
4 But the Philistine commanders were angry with him and said, "Send the man back to the place you gave him. He must not go into battle with us, or he may turn against us during the fighting. How better could he win back his master's favor than with the heads of our own men? Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia batombokelaki Akishi mpe balobaki : — Zongisa moto oyo ! Tika ete azonga na esika oyo otiaki ye ; asengeli te kokende elongo na biso na bitumba, noki te akobalukela biso na tango ya bitumba. Mpe ndenge nini moto oyo akoki kosepelisa lisusu mokonzi na ye, soki na komema mito ya bato na biso moko te ?
5 Isn't this the David they sang of in their dances: 'Saul struck down his thousands, David his tens of thousands'?" Ezali Davidi wana te oyo na tina na ye babandaki koyemba mpe kobina : « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »
6 So Achish called David and said, "As the LORD lives, you are honest, and I'd be glad to have you march out and in with me in the camp. I've found no fault in you since the day you came to me until now. But the rulers don't approve of you. Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye : — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te ; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te.
7 Now turn back and go in peace, so that you do nothing to displease the Philistine rulers." Boye, zonga mpe kende na kimia ; kosala eloko moko te oyo ekosepelisa te bakambi ya bato ya Filisitia.
8 "But what have I done?" David protested. "What have you found against your servant since I came to you until now, that I should not go fight the enemies of my lord the king?" Davidi atunaki Akishi : — Nasali nini ? Eloko nini ya mabe oyo omoni epai ya mosali na yo wuta mokolo oyo nayaki epai na yo kino lelo ? Mpo na nini nakoki te kokende kobundisa banguna ya mokonzi, nkolo na ngai ?
9 Achish told David, "I know that to me you're as good as an angel of God. Still, the Philistine commanders have said, 'He must not go up with us into battle.' Akishi azongiselaki Davidi : — Nayebi ete osepelisaka ngai lokola Anjelu na Nzambe, Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia balobi : « Asengeli te kokende elongo na biso na bitumba. »
10 So get up early in the morning, you and your master's servants who came with you; get up early and leave when it's light." Boye, lamuka na tongo makasi, yo mpe basoda ya nkolo na yo, oyo bayaki elongo na yo. Bolamuka na tongo makasi mpe bokende wana moyi ekobima.
11 So David and his men rose early to head back to Philistia at daybreak, while the Philistines went up to Jezreel. Boye, Davidi mpe bato na ye batelemaki na tongo makasi mpo na kozonga na mokili ya bato ya Filisitia ; mpe bato ya Filisitia bakendeki na Jizireyeli.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]