Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 30 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David and his men reached Ziklag on the third day; Amalekites had raided the Negev and Ziklag, attacked and burned it, Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango.
2 and captured the women and everyone there, young and old; killed no one, but drove them off and went their way. Bakangaki na bowumbu basi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna, ezala bilenge to mikolo, kasi babomaki moko te kati na bango. Bamemaki bango mpe bazongelaki nzela na bango.
3 David and his men reached the city, burned with fire—wives, sons, daughters taken captive. Tango Davidi mpe bato na ye bakomaki na engumba Tsikilagi, bakutaki yango ebebisama na moto. Basi na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakomaki bawumbu.
4 David and his people raised their voices and wept until they had no strength left to weep. Davidi mpe bato na ye balelaki makasi kino bazangaki makasi ya kolela.
5 David's two wives were also captured, Ahinoam of Jezreel and Abigail, widow of Nabal of Carmel. Bamemaki mpe na bowumbu basi mibale ya Davidi : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, moto ya Karimeli, oyo akufisaki mobali, Nabali.
6 David was greatly distressed—the people talked of stoning him, each bitter over his sons and daughters—but he strengthened himself in our Father. Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.
7 David told Abiathar the priest, Ahimelech's son, "Bring me the ephod." Abiathar brought David the ephod. Boye Davidi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki : « Memela ngai efode. » Mpe Abiatari amemelaki ye yango.
8 David asked our Father, "Will I chase these raiders? Will I overtake them?" "Chase," he said. "You will surely overtake them and rescue everyone." Bongo Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi ? Nakokoka na ngai kokanga bango ? Yawe azongiselaki ye : — Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami.
9 So David and his 600 men came to the Besor Valley, where some stayed behind. Davidi akendeki elongo na basoda na ye, nkama motoba. Bakomaki na moluka ya lubwaku ya Besori epai wapi ba-oyo bazalaki kotikala na sima batelemaki ;
10 David pursued with 400 men; 200 stayed back, too worn out to cross the Besor Valley. pamba te mibali nkama mibale balembaki makasi, bongo bakokaki te kokatisa moluka. Kasi Davidi elongo na basoda na ye, nkama minei, bakobaki kolanda.
11 They found an Egyptian in the fields, brought him to David, and gave him bread and water. Basoda ya Davidi bakutanaki na mobali moko ya Ejipito kati na zamba mpe bamemaki ye epai ya Davidi. Bapesaki ye mayi ya komela mpe biloko ya kolia.
12 They gave him a piece of fig cake and two clusters of raisins. He ate, and his strength returned—he'd had no bread or water for three days and three nights. Bapesaki ye gato basala na bambuma ya figi mpe maboke mibale ya bambuma ya vino ekawuka. Sima na ye kolia yango, azwaki lisusu makasi, pamba te aliaki te mpe amelaki te wuta mikolo misato mpe babutu misato.
13 David asked, "Whose are you? Where from?" He said, "A young Egyptian, an Amalekite's slave. My master abandoned me three days ago—I was sick. Davidi atunaki ye : — Ozali na ngambo ya banani mpe owuti wapi ? Azongiselaki ye : — Nazali moto ya Ejipito mpe mowumbu ya moto moko ya Amaleki. Esali mikolo misato wuta nkolo na ngai atikalaki kosundola ngai mpo ete nazalaki kobela.
14 We raided the Cherethite Negev, Judah's territory, and Caleb's Negev, and burned Ziklag with fire." Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi ; mpe totumbaki na moto Tsikilagi.
15 David asked, "Will you lead me down to this raiding band?" He said, "Swear to me by God you won't kill me or hand me to my master, and I'll bring you to them." Davidi atunaki ye : — Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali ? Azongisaki : — Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai ; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali.
16 The Egyptian led David down, and there they were, spread out over the land, eating, drinking, celebrating over the vast plunder taken from Philistine and Judean land. Boye amemaki Davidi na esika oyo bato ya Amaleki bazalaki. Mpe bamonaki ete bazalaki ya kopanzana na mboka mobimba, bazalaki kolia, komela mpe kobina mpo na ebele ya bomengo ya bitumba oyo babotolaki na mokili ya bato ya Filisitia mpe ya Yuda.
17 David struck them from twilight to the next evening; only 400 young men who rode off on camels escaped. Davidi alongaki bango kobanda na tongo kino na pokwa ya mokolo oyo elandaki. Moko te abikaki, longola kaka bilenge mibali nkama minei oyo bamataki na likolo ya bashamo mpe bakimaki.
18 David recovered everything the Amalekites had taken, and he rescued his two wives. Davidi akangolaki biloko nyonso oyo bato ya Amaleki bazwaki elongo na basi na ye mibale.
19 Nothing was missing—small, great, sons, daughters, plunder, or anything else taken—all David brought back. Moto na bango moko te azangaki : ezala elenge, mokolo, mwana mobali, mwana mwasi, eloko moko kati na bomengo ya bitumba to eloko moko kati na biloko oyo babotolaki bango. Davidi azongaki na biloko nyonso.
20 David took all the flock and herd; his men drove it ahead of the other livestock, saying, "This is David's plunder." Davidi akamataki bameme mpe bangombe nyonso. Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya bibwele mpo na kolakisa yango nzela bazalaki koloba : « Tala bomengo ya bitumba ya Davidi. »
21 David reached the 200 men too exhausted to follow him, left at the Besor Valley. They came out to meet David and his people; he greeted them as he approached. Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote.
22 But all the wicked, worthless men among David's followers said, "Since they didn't go with us, we won't give them any recovered plunder—only each man's wife and children, to lead away and go." Kasi kati na bato oyo bakendeki elongo na Davidi, bato nyonso ya mabe mpe batomboki balobaki : — Lokola bakendeki na biso te, tokoki kokabola na bango te bomengo ya bitumba. Tika ete moto na moto azwa kaka mwasi na ye elongo na bana na ye mpe akende.
23 But David said, "Don't do this, my brothers, with what our Father gave us. He guarded us and gave the raiders who came against us into our hands. Kasi Davidi alobaki : — Te, bandeko na ngai ya mibali ! Bokoki kosala boye te mpo na biloko oyo Yawe apesi biso ! Pamba te abateli biso mpe akabi na maboko na biso mampinga nyonso oyo eyaki kobundisa biso.
24 Who would listen to you on this? The one who goes into battle and the one who stays with the supplies share alike." Nani akoki kondima bino na makambo oyo bozali koloba ? Eteni ya moto oyo atikalaki kokengela biloko mpe eteni ya moto oyo akendeki na bitumba esengeli kozala ndenge moko. Tokokabola nyonso ndenge moko.
25 From that day on, David made it a statute and ordinance for Israel, lasting to this day. Kobanda mokolo wana kino lelo, Davidi akomisaki yango mobeko mpe malako kati na Isalaele.
26 When David reached Ziklag, he sent plunder to Judah's elders, his friends, saying, "A gift for you from the plunder of our Father's enemies." Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki : « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. »
27 He sent it to those in Bethel, in Ramoth of the Negev, and in Jattir; Atindaki ndambo epai ya ba-oyo bazalaki na Beteli, na ngambo ya sude ya Ramoti mpe na Yatiri ;
28 to those in Aroer, Siphmoth, and Eshtemoa; mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Aroeri, na Sipimoti, na Eshitemoa ;
29 to those in Rachal, in the towns of the Jerahmeelites and the Kenites; mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Rakali, kati na bingumba ya bato ya Yerameeli, ya bato ya Keni ;
30 to those in Hormah, Bor-ashan, and Athach; epai ya ba-oyo bazalaki na Orima, na Bori-Ashani, na Ataki ;
31 and to those in Hebron and all the places where David and his men had roamed. epai ya ba-oyo bazalaki na Ebron mpe na bisika nyonso oyo Davidi mpe bato na ye balekaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]