Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 31 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The Philistines fought Israel; Israel's men fled them and fell dead on Mount Gilboa. Bato ya Filisitia bazalaki kobundisa Isalaele, kasi bato ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.
2 The Philistines overtook Saul and his sons, and the Philistines struck down Jonathan, Abinadab, and Malchishua, sons of Saul. Bato ya Filisitia balandaki Saulo elongo na bana na ye ya mibali, kasi babomaki bana na ye ya mibali : Jonatan, Abinadabi mpe Maliki-Shuwa.
3 The battle pressed heavily against Saul. The archers found him, and he was badly wounded by them. Bongo bitumba ekomaki mpo na koboma Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki Saulo, ye Saulo alengaki na somo.
4 Saul told his armor-bearer, "Draw your sword and run me through, or these uncircumcised men will come, run me through, and torment me." His armor-bearer refused—he was terrified. So Saul took his own sword and fell on it. Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye : « Bimisa mopanga na yo na ebombelo na yango mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kotuba ngai mpe kosakanela ngai. » Kasi soda oyo amemaki bibundeli na ye aboyaki, pamba te azalaki kobanga. Bongo Saulo akamataki mopanga na ye mpe amibwakaki na likolo na yango.
5 When his armor-bearer saw Saul was dead, he too fell on his sword and died with him. Tango soda oyo amemaki bibundeli na ye amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga na ye mpe akufaki elongo na Saulo.
6 So Saul died that day, together with his three sons, his armor-bearer, and all his men. Ezalaki bongo nde Saulo, bana na ye misato ya mibali, soda oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe basoda na ye nyonso bakufaki bango nyonso elongo mokolo wana.
7 When Israel's men across the valley and across the Jordan saw that Israel's army had fled and Saul and his sons were dead, they abandoned their towns and fled. The Philistines came and settled in them. Tango bato ya Isalaele, oyo bazalaki na ngambo mosusu ya lubwaku mpe ba-oyo bazalaki na ngambo mosusu ya Yordani bamonaki ete mampinga ya Isalaele esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.
8 The next day, Philistines came to strip the dead and found Saul and his three sons fallen on Mount Gilboa. Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.
9 They cut off his head, stripped his armor, and sent messengers through Philistia to report it at their idols' temples and among the people. Bakataki moto ya Saulo, bazwaki bibundeli na ye mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko mpe kati na bato na bango.
10 They set his armor in Ashtoreth's temple and fastened his body to Beth-shan's wall. Batiaki bibundeli ya Saulo kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko, Asitarite, mpe badiembikaki nzoto na ye na mir ya Beti-Sheani.
11 When the inhabitants of Jabesh-gilead heard what the Philistines had done to Saul, Tango bavandi ya Yabeshi kati na Galadi bayokaki makambo oyo bato ya Filisitia basalaki Saulo,
12 all their fighting men marched through the night, took Saul's body and his sons' bodies from Beth-shan's wall, brought them to Jabesh, and burned them there. bilombe na bango nyonso batelemaki mpe batambolaki butu mobimba mpo na kokoma na Beti-Sheani. Bongo sima na bango kokitisa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali wuta na mir, bazongaki na Yabeshi epai wapi batumbaki yango.
13 They took their bones, buried them under the tamarisk at Jabesh, and fasted seven days. Bazwaki mikuwa na bango, bakundaki yango na Yabeshi, na se ya nzete ya tamarisi, mpe bakilaki bilei mikolo sambo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]