Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 28 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In those days Philistines massed their forces for war, to fight Israel. Achish told David, "You understand, of course, that you and your men must march out with me in the army." Na tango wana, bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda mpo na kobundisa Isalaele. Akishi alobaki na Davidi : — Osengeli koyeba ete yo mpe bato na yo bokokende na bitumba elongo na ngai.
2 David told Achish, "So you'll know what your servant can do." Achish replied, "Very well, I'll make you my bodyguard for life." Davidi azongiselaki Akishi : — Okomona yo moko makambo oyo mosali na yo azali na makoki ya kosala. Akishi alobaki na Davidi : — Malamu mingi ! Nakokomisa yo mpo na libela soda oyo abatelaka ngai.
3 Samuel had died; all Israel mourned him and buried him in Ramah, his city. Saul had removed the mediums and fortune-tellers from the land. Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.
4 The Philistines gathered, came, and camped at Shunem; Saul gathered all Israel and camped at Gilboa. Wana bato ya Filisitia basanganaki mpe bayaki kotonga molako, na Sunemi, Saulo mpe asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe batongaki molako na Giliboa.
5 When Saul saw the Philistine army, he was afraid, and his heart trembled greatly. Tango Saulo amonaki mampinga ya bato ya Filisitia, abangaki mpe somo etondaki na motema na ye.
6 Saul asked our Father, but our Father didn't answer him—not by dreams, not by Urim, not by prophets. Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli.
7 Saul told his servants, "Find me a female medium, so I can go ask her." They said, "There's one at Endor." Bongo, Saulo alobaki na basali na ye : — Bolukela ngai mwasi oyo asololaka na bakufi mpo ete nakende kotuna ye. Basali na ye bazongisaki : — Tala, ezali na mwasi moko na Eyini-Dori.
8 Saul disguised himself, wore other clothes, went with two men to the woman by night, and said, "Consult a spirit for me—bring up the one I name." Boye Saulo amibongolaki, alataki bilamba mosusu mpe akendeki epai ya mwasi yango, na butu, elongo na mibali mibale. Alobaki : — Nabondeli yo, solola na bakufi mpo na ngai, mpe bimisela ngai moto oyo nakotanga kombo na ye.
9 The woman said, "You know what Saul did—cut off the mediums and the spiritists from the land. Why trap my life to kill me?" Kasi mwasi yango alobaki na ye : — Oyebi solo makambo oyo Saulo asalaki. Abenganaki na mokili, bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. Bongo mpo na nini otieli bomoi na ngai motambo mpo na kobomisa ngai ?
10 Saul swore to her by our Father, "As our Father lives, no guilt will reach you for this." Saulo alapaki ndayi epai na ye na Kombo na Yawe, alobaki : « Na Kombo na Yawe, okozwa solo etumbu te mpo na yango. »
11 The woman said, "Whom should I bring up for you?" He said, "Bring up Samuel for me." Bongo mwasi yango atunaki : — Nabimisela yo nani ? Saulo azongisaki : — Bimisela ngai Samuele.
12 Seeing Samuel, the woman cried out loudly and said to Saul, "Why did you deceive me? You are Saul!" Tango mwasi yango amonaki Samuele, agangaki makasi mpe alobaki na Saulo : — Mpo na nini okosi ngai ? Ozali Saulo !
13 The king said, "Don't be afraid. What do you see?" The woman told Saul, "I see a divine being rising from the ground." Mokonzi alobaki na ye : — Kobanga te, omoni nini ? Mwasi alobaki na Saulo : — Namoni nzambe moko kobima na mabele.
14 He asked, "What does he look like?" "An old man rising, wrapped in a robe," she said. Saul knew it was Samuel and bowed face-down, prostrating himself. Saulo atunaki ye : — Azali ndenge nini ? Mwasi azongisaki : — Ezali mobange mobali moko nde azali komata mpe alati kazaka. Bongo tango Saulo asosolaki ete ezali Samuele, akitaki mpe agumbamaki elongi kino na mabele.
15 Samuel said to Saul, "Why disturb me, bringing me up?" Saul said, "I'm in deep distress. The Philistines fight me, and our Father has turned away from me—no answer by prophets or dreams. So I called you, to know what to do." Samuele alobaki na Saulo : — Mpo na nini otungisi ngai mpe obimisi ngai ? Saulo alobaki : — Nazali na pasi makasi : bato ya Filisitia bazali kobundisa ngai ; bongo Nzambe apesi ngai mokongo, azali koyanola ngai te, ezala na nzela ya basakoli to ya bandoto. Yango wana nabengi yo mpo ete oyebisa ngai likambo nini nakoki kosala.
16 Samuel said, "Why ask me, when our Father has left you and become your enemy? Samuele alobaki : — Mpo na nini ozali kotuna ngai, awa Yawe asili kopesa yo mokongo mpe akomi monguna na yo ?
17 Our Father did as he said through me, tearing the kingdom from your hand and giving it to your neighbor, to David. Yawe akokisi kaka makambo oyo asakolaki na nzela na ngai : Yawe abotoli bokonzi na maboko na yo mpe apesi yango na moninga na yo, Davidi,
18 Because you did not obey our Father's voice or execute his burning anger against Amalek, so he has done this to you today. pamba te otosaki Yawe te mpe okweyiselaki te bato ya Amaleki kanda ya Yawe na koboma bango nyonso. Yango wana Yawe asali yo bongo lelo.
19 Our Father will hand you and Israel to the Philistines; tomorrow you and your sons will join me, and our Father will hand Israel's army to the Philistines." Yawe akokaba yo mpe Isalaele na maboko ya bato ya Filisitia.
20 Saul instantly fell full length on the ground, terrified by Samuel's words. He had no strength, having eaten no food all day and night. Mbala moko, Saulo abombamaki na mabele mpe ayokaki maloba ya Samuele somo mingi. Nzoto na ye elembaki mpo ete aliaki eloko moko te mokolo mobimba mpe butu mobimba.
21 The woman came to Saul, saw his shock, and said, "Look, your servant obeyed you. I took my life in my hand and did what you told me. Tango mwasi apusanaki pembeni ya Saulo mpe amonaki ete azali lisusu na kimia te, alobaki na ye : — Tala, mwasi mosali na yo atosaki yo. Nandimaki kokufa mpo na kaka kosala makambo oyo otindaki ngai.
22 Now please, you too, listen to me, your servant. Let me give you a piece of bread; eat, and get strength for the road." Sik’oyo, yo mpe, nabondeli yo : yoka mwasi mosali na yo, mpe tika ete ngai napesa yo bilei mpo ete olia mpe ozwa makasi ya kokoba nzela na yo.
23 He refused: "I won't eat." But his servants and the woman urged him until he gave in, rose from the ground, and sat on the bed. Kasi Saulo aboyaki mpe alobaki : — Nakolia te. Kasi lokola basali na ye elongo na mwasi batiaki molende, Saulo ayokelaki bango. Saulo alamukaki mpe avandaki na mbeto.
24 The woman had a fattened calf at home, hurried, slaughtered it, took flour, kneaded, and baked bread without yeast. Mwasi azalaki na mwana ngombe ya mafuta epai na ye, na etonga. Abonzaki yango noki-noki lokola mbeka. Akamataki farine, asangisaki yango mpe atumbelaki bango mapa ezanga levire.
25 She served it to Saul and his servants; they ate, then got up and left that night. Atiaki yango liboso ya Saulo mpe liboso ya basali na ye, mpe baliaki. Bongo na butu wana kaka, batelemaki mpe bakendeki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]