Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 27 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David thought, "One day I'll be swept away by Saul's hand. Nothing is better for me than to escape at once to Philistine land. Then Saul will give up searching for me anywhere in Israel's borders, and I'll escape his hand." Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. »
2 David set out and crossed over, he and the 600 men with him, to Achish son of Maoch, king of Gath. Bongo Davidi elongo na bato nkama motoba oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakendeki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maoki, mokonzi ya Gati.
3 David lived with Achish at Gath, he and his men, each with his household—David with his two wives, Ahinoam of Jezreel and Abigail of Carmel, Nabal's widow. Davidi mpe bato na ye bavandaki na Gati epai ya Akishi : mobali nyonso azalaki na libota na ye, mpe Davidi azalaki na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli, mpe Abigayili oyo azalaki liboso mwasi ya Nabali, moto ya Karimeli.
4 When Saul was told that David had fled to Gath, he no longer searched for him. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akimi na Gati, atikaki koluka ye.
5 David said to Achish, "If you favor me, give me a place in one of the country towns to live in. Why should your servant live with you in the royal city?" Davidi alobaki na Akishi : « Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ete bapesa ngai esika epai wapi nakoki kovanda kati na moko ya bingumba ya mokili. Mpo na nini mosali na yo avanda na mboka mokonzi elongo na yo ? »
6 That day Achish gave him Ziklag; so Ziklag has belonged to Judah's kings to this day. Na mokolo wana, Akishi apesaki ye engumba ya Tsikilagi. Yango wana Tsikilagi ekoma kino na mokolo ya lelo engumba ya bakonzi ya Yuda.
7 The length of time David lived in Philistine territory was a year and four months. Davidi awumelaki na mokili ya bato ya Filisitia mobu moko mpe sanza minei.
8 David and his men went up and raided the Geshurites, Girzites, and Amalekites, for they had lived in that land from ancient times, toward Shur and to the land of Egypt. Na tango wana, Davidi mpe bato na ye bazalaki kobundisa bato ya Geshuri, ya Girizi mpe ya Amaleki ; pamba te wuta kala, bato ya bikolo yango bazalaki kovanda na mokili longwa na Shuri kino na Ejipito.
9 Whenever David attacked the land, he left no man or woman alive, took the sheep, cattle, donkeys, camels, and clothing, then returned to Achish. Tango nyonso Davidi azalaki kobundisa mboka moko, azalaki kotika te na bomoi ezala mobali to mwasi. Nzokande azalaki kobotola bameme, bangombe, ba-ane, bashamo mpe bilamba. Bongo azalaki kozonga epai ya Akishi.
10 Achish would ask, "Where did you raid today?" David would say, "The Negev of Judah," "the Negev of the Jerahmeelites," or "the Negev of the Kenites." Tango Akishi atunaki : — Bobundi wapi lelo ? Davidi azongisaki : — Tobundi na sude ya Yuda, na sude ya mokili ya bato ya Yerameeli, mpe na sude ya mokili ya bato ya Keni.
11 David left no man or woman alive to bring to Gath, thinking, "They might report on us, saying, 'This is what David did.'" This was his practice the whole time he lived in Philistine territory. Davidi azalaki kotika te ete bamema na Gati, ezala mobali to mwasi, noki te bapanza sango na ye na maloba oyo : « Tala makambo oyo Davidi asalaki. » Davidi azalaki kosala kaka bongo, tango nyonso oyo avandaki na mboka ya bato ya Filisitia.
12 Achish trusted David, thinking, "He has made himself utterly detestable to his people Israel; he will be my servant forever." Akishi atielaki Davidi motema mpe alobaki : « Lokola Davidi amiyinisi na miso ya Isalaele, bato na ye, akozala mosali na ngai mpo na libela. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]