Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 26 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Ziphites came to Saul at Gibeah: "Isn't David hiding on Hachilah hill, facing Jeshimon?" Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo, mpe balobaki : « Boni, oyebi ete Davidi abombami na likolo ya Akila, ngomba moke oyo etalani na Yeshimoni ? »
2 Saul went down to the Wilderness of Ziph with 3,000 chosen men of Israel to search for David there. Boye Saulo atelemaki mpo na kokende na esobe ya Zifi elongo na basoda ya mpiko ya Isalaele, nkoto misato, mpo na koluka Davidi kati na esobe ya Zifi.
3 Saul camped on Hachilah hill facing Jeshimon beside the road, while David stayed in the wilderness. David saw Saul had followed him into the wilderness, Saulo atongaki molako na ye na likolo ya Akila, ngomba moke, oyo etalani na Yeshimoni, pembeni ya nzela. Na tango wana, Davidi azalaki kovanda kati na esobe. Lokola amonaki ete Saulo alandi ye kino na esobe,
4 he sent out scouts and learned that Saul had indeed arrived. Davidi atindaki banongi mpe, na nzela na bango, ayokaki ete Saulo akomi penza.
5 David went to the place where Saul had camped, and saw where Saul lay with Abner son of Ner, his army commander. Saul lay inside the camp, troops surrounding him. Davidi atelemaki mpe akendeki na esika oyo Saulo atongaki molako na ye. Amonaki esika oyo Saulo mpe Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga na ye, balalaki. Saulo azalaki ya kolala na kati-kati ya molako, mpe basoda bazingelaki ye.
6 David asked Ahimelech the Hittite and Abishai son of Zeruiah, Joab's brother, "Who'll go down with me to Saul's camp?" Abishai said, "I'll go down with you." Davidi atunaki Ayimeleki, moto ya Iti, mpe Abishayi, mwana mobali ya Tseruya mpe ndeko mobali ya Joabi : — Nani kati na bino akoki kokende elongo na ngai kino na molako epai ya Saulo ? Abishayi azongisaki : — Ngai, nakokende elongo na yo.
7 David and Abishai came to the troops at night. Saul lay asleep in camp, spear stuck in the ground by his head, Abner and the troops around him. Boye Davidi mpe Abishayi bakomaki, na butu, na esika oyo basoda bazalaki. Bakutaki Saulo alali pongi na kati-kati ya molako, mpe likonga na ye epikamaki na mabele, na pembeni ya moto na ye. Abineri mpe basoda balalaki zingazinga na ye.
8 Abishai said to David, "Our Father has given your enemy into your hand today. So let me strike him to the ground with one spear—no second thrust needed." Abishayi alobaki na Davidi : — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.
9 But David told Abishai, "Don't destroy him! Who can lift a hand against our Father's anointed and stay guiltless?" Kasi Davidi alobaki na Abishayi : — Te ! Koboma ye te ! Pamba te nani akosembola loboko na ye likolo ya mopakolami na Yawe mpe azanga kozwa etumbu ?
10 David said, "As our Father lives, our Father will strike him, or his day comes and he dies, or he goes into battle and is destroyed. Mpe Davidi alobaki lisusu : — Na Kombo na Yawe ! Ye moko Yawe nde akoboma ye : akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba.
11 Far be it, before our Father, to raise my hand against our Father's anointed. Now take the spear at his head, the water jug, and let's go." Kasi Yawe apekisi ngai kosembola loboko likolo ya mopakolami na Ye. Sik’oyo, zwa kaka likonga mpe eloko ya mayi oyo ezali pembeni ya moto na ye, mpe tokende na biso.
12 David took the spear and water jug from beside Saul's head; they left. No one saw them, no one knew, and no one woke, for a deep sleep from our Father had fallen on them all. Boye Davidi azwaki likonga mpe eloko ya mayi oyo ezalaki pembeni ya moto ya Saulo, mpe bakendeki. Moto moko te amonaki mpe ayebaki likambo yango, mpe moko te alamukaki. Bato nyonso bazalaki ya kolala, pamba te Yawe alalisaki bango pongi makasi.
13 Then David crossed over and stood on a distant hilltop, a wide gap between them. Davidi akatisaki lubwaku, akendeki na ngambo mosusu mpe atelemaki mosika, na songe ya ngomba, mosika penza ya molako.
14 He called to the troops and Abner son of Ner: "Won't you answer, Abner?" "Who are you, calling to the king?" Abner replied. Davidi abelelaki epai ya mampinga mpe epai ya Abineri, mwana mobali ya Neri ; alobaki : — Abineri, okoyanola ngai ? Abineri azongisaki : — Yo nani oyo ozali koganga na matoyi ya mokonzi ?
15 David said to Abner, "Aren't you a man? Who is like you in Israel? Why didn't you guard your lord the king? Someone came to destroy the king, your lord. Davidi alobaki na Abineri : — Ozali mobali, boye te ? Nani akokani na yo kati na Isalaele ? Mpo na nini obateli te mokonzi, nkolo na yo ? Moto moko ayaki mpo na koboma mokonzi na yo.
16 You've done wrong. As our Father lives, you all deserve death for not guarding your lord, our Father's anointed. Now look—where are the king's spear and water jug by his head?" Likambo oyo osali ezali malamu te. Na Kombo na Yawe, yo mpe bato na yo bosengeli kokufa ; pamba te bobateli te nkolo na bino, mopakolami na Yawe. Botala zingazinga na bino ! Wapi likonga mpe eloko ya mayi ya mokonzi, oyo ezalaki pembeni ya moto na ye ?
17 Saul recognized David's voice: "Is that your voice, my son David?" David said, "My voice, my lord the king." Saulo asosolaki ete ezali mongongo ya Davidi mpe alobaki : — Oyo wana ezali mongongo na yo Davidi, mwana na ngai. Davidi azongisaki : — Solo, ezali mongongo na ngai, oh mokonzi, nkolo na ngai.
18 He said, "Why does my lord chase his servant? What have I done, what wrong in my hand? Bongo Davidi alobaki lisusu : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolanda mosali na ye ? Nasali nini ? Likambo nini ya mabe nasali mpo ete namema ngambo ?
19 May my lord the king hear his servant's words: if our Father stirred you against me, may he accept an offering; but if it is people who have done it, may they be cursed before him—for today they've driven me from my share in his inheritance, saying, 'Go, serve other gods.' Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »
20 Don't let my blood fall to the ground, far from our Father's presence—Israel's king comes out to hunt one flea, like chasing a partridge in the mountains." Sik’oyo, tika ete makila na ngai esopana na mabele te, mosika na miso ya Yawe ! Pamba te mokonzi ya Isalaele abimaki mpo na koluka ngenga kaka moko, ndenge balandaka soso ya zamba, na bangomba.
21 Saul said, "I have sinned. Come back, David my son. I will never harm you again, since my life was precious in your eyes today. I have been foolish and gravely mistaken." Boye Saulo alobaki : — Solo, nasali masumu ! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga ! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.
22 David answered, "Here is the king's spear. Let a young man come get it. Davidi azongisaki : — Likonga ya mokonzi, yango oyo ! Tika ete moko kati na bilenge mibali na yo aya kozwa yango.
23 Our Father repays everyone for their righteousness and faithfulness. Today he gave you into my hand, but I wouldn't raise my hand against his anointed. Yawe oyo afutaka moto nyonso kolanda bosembo mpe boyengebene na ye, akabaki yo na maboko na ngai lelo ; kasi naboyaki kosembola loboko na ngai likolo ya mopakolami na Yawe.
24 As I valued your life highly today, may our Father value my life highly and rescue me from all trouble." Ndenge bomoi na yo ezalaki lelo motuya makasi na miso na ngai, ndenge wana mpe bomoi na ngai ekozala motuya makasi na miso ya Yawe, mpe akokangola ngai na pasi nyonso.
25 Saul told David, "Blessed are you, my son David—you will do great things, and surely prevail." David went his way; Saul returned home. Saulo alobaki na Davidi : — Tika ete opambolama, Davidi, mwana na ngai ya mobali ! Solo, okosala penza makambo minene mpe, solo, okolonga. Bongo Davidi akobaki nzela na ye, mpe Saulo azongaki epai na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]