Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 25 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Samuel died, and all Israel gathered to mourn him and buried him at his home in Ramah. Then David set out and went down to the wilderness of Paran. Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esanganaki mpo na kosala matanga na tina na ye ; bongo bakundaki ye na mboka na ye, Rama. Davidi akendeki na esobe ya Parani.
2 A man in Maon had property at Carmel. He was very wealthy: 3,000 sheep and 1,000 goats. He was shearing his sheep at Carmel. Na mboka Maoni, ezalaki na moto moko ya bozwi oyo bomengo na ye ezalaki kati na mboka Karimeli. Azalaki na bameme ya mibali nkoto misato mpe bantaba ya basi nkoto moko. Na eleko oyo, azalaki kati na Karimeli epai wapi azalaki kokata bameme na ye bapwale.
3 The man's name was Nabal, his wife's Abigail. She was sensible and beautiful, but he was harsh and cruel in his dealings—a Calebite. Kombo na ye ezalaki « Nabali, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Abigayili. » Abigayili azalaki mwasi ya mayele mpe ya kitoko ; kasi mobali na ye, moto ya etuka Kalebi, azalaki motema makasi mpe moto mabe.
4 While he was in the wilderness, David heard that Nabal was shearing his sheep. Wana Davidi azali kati na esobe, ayokaki ete Nabali azali kokata bameme na ye bapwale.
5 David sent ten young men, telling them, "Go up to Carmel. Visit Nabal and greet him in my name. Davidi atindaki bilenge mibali zomi, alobaki na bango : « Bokende na Karimeli epai ya Nabali mpe bopesa ye mbote na kombo na ngai.
6 Tell him: 'Long life to you. Peace to you, peace to your household, and peace to all you have.' Boyebisa ye : ‹ Tika ete bomoi molayi epesamela yo ! Tika ete kimia ezala na yo, na libota na yo mpe na nyonso oyo ezali ya yo !
7 I hear you have shearers. Your shepherds were with us; we mistreated them in nothing, and they missed nothing the whole time at Carmel. Nayoki ete bazali kokata bameme bapwale epai na yo. Nzokande, tango nyonso oyo babateli bibwele na yo bazalaki elongo na biso na Karimeli, tosalaki bango mabe ata moko te, mpe babungisaki ata eloko moko te.
8 Ask your young men and they'll tell you. So let my young men find favor in your eyes, for we've come on a feast day. Please give whatever you can spare to your servants and your son David." Tuna basali na yo, bakoyebisa yo. Boye, tika ete bilenge mibali na ngai bazwa ngolu na miso na yo, lokola tokomi epai na yo na mokolo ya feti ! Nabondeli yo, pesa na basali na yo mpe na Davidi, mwana na yo ya mobali, eloko nyonso oyo okokoka kozwa mpo na bango. › »
9 David's young men came and spoke all these words to Nabal in David's name, then waited. Tango bilenge mibali ya Davidi bakomaki epai ya Nabali, bayebisaki ye makambo oyo nyonso na kombo ya Davidi, mpe bazelaki.
10 Nabal answered David's servants, "Who is David? Who is this son of Jesse? Many servants today are breaking away from their masters. Kasi Nabali azongiselaki basali ya Davidi : « Davidi azali nani ? Mwana mobali ya Izayi azali nani ? Mikolo oyo, basali ebele bazali kokima bankolo na bango.
11 Why take my bread, my water, the meat I killed for my shearers, and give it to men from I don't know where?" Mpo na nini nakamata mapa na ngai, mayi na ngai mpe mosuni, oyo nabongisi mpo na bato na ngai, oyo bakataka bapwale, mpo na kopesa yango epai ya bato oyo nayebi kutu epai bawuti te ? »
12 So David's young men turned back and reported every word to him when they arrived. Bilenge mibali ya Davidi babalukaki mpe bazongaki. Tango bakomaki, bayebisaki Davidi makambo oyo Nabali alobaki.
13 David told his men, "Each of you strap on your sword!" So each strapped on his sword, David too. About 400 went up after David; 200 stayed with the supplies. Davidi alobaki na basoda na ye : « Tika ete moko na moko atia mopanga na ye na loketo. » Boye, batiaki mipanga na bango na loketo, mpe Davidi atiaki mpe oyo ya ye. Bato pene nkama minei bakendeki elongo na Davidi, mpe bato nkama mibale batikalaki mpo na kobatela biloko.
14 One of the young men told Abigail, Nabal's wife, "David sent messengers from the wilderness to greet our master, and he hurled insults at them. Moko kati na basali ya Nabali alobaki na Abigayili, mwasi ya Nabali : « Davidi atindaki bantoma wuta na esobe mpo na kopambola nkolo na biso, kasi ye atombokelaki bango.
15 These men were very good to us. They never harmed us, and we lost nothing the whole time we roamed the fields with them. Nzokande bato yango basalelaki biso penza bolamu, basalaki biso mabe ata moko te, mpe, tango nyonso totambolaki elongo na bango na zamba, tobungisaki ata eloko moko te.
16 They were a wall around us night and day, the whole time we were with them tending sheep. Butu mpe moyi, tango nyonso tozalaki koleisa bibwele na biso pene na bango, bazalaki lokola mir zingazinga na biso.
17 Now know and see what you should do, for disaster is set against our master and his whole household. He's so worthless no one can speak to him." Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »
18 Abigail quickly took 200 loaves, two skins of wine, five prepared sheep, about thirty-five quarts of roasted grain, one hundred raisin clusters, and 200 fig cakes, and loaded them on donkeys. Abigayili asalaki na lombangu, azwaki mapa nkama mibale, bambeki mibale ya vino, bameme batumba mitano, bakilo tuku motoba na mibale na bagrame nkama mitano ya ble bakalinga, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka mpe bagato nkama mibale basala na bambuma ya figi ; mpe atiaki yango na likolo ya ba-ane.
19 She told her servants, "Go ahead of me; I'll follow." But she told her husband Nabal nothing. Bongo alobaki na basali na ye : « Bokende liboso na ngai, nazali kolanda bino. » Kasi ayebisaki mobali na ye, Nabali, te.
20 Riding her donkey down a hidden mountain path, she met David and his men coming down toward her. Wana Abigayili azalaki na likolo ya ane, azalaki kokita sima na ngomba. Na tango yango kaka, Davidi mpe bato na ye bazalaki mpe kokita na ngambo epai wapi Abigayili azalaki, mpe akutanaki na bango.
21 Now David had been saying, "I guarded all this man had in the wilderness for nothing—none of his went missing—and he repays me evil for good. Davidi awutaki komilobela : « Ezalaki na pamba nde nabatelaki biloko nyonso ya moto oyo kati na esobe mpo ete eloko moko te ebunga kati na biloko na ye nyonso ! Azongiseli ngai mabe na esika ya bolamu oyo nasalelaki ye !
22 May our Father do this to David's enemies, and more, if by morning I leave alive one male of all who belong to him." Tika ete Nzambe apesa ngai Davidi etumbu ya makasi soki, kino lobi na tongo, natiki na bomoi mobali moko kati na bato nyonso oyo bazali ya Nabali ! »
23 Seeing David, Abigail quickly got off her donkey and fell facedown before him, bowing to the ground. Tango Abigayili amonaki Davidi, akitaki na lombangu wuta na ane na ye mpe agumbamaki na liboso ya Davidi, elongi kino na mabele.
24 She fell at his feet and said, "Let the blame be mine alone, my lord. Please let your servant speak to you; hear your servant's words. Akweyaki na makolo ya Davidi mpe alobaki : — Oh nkolo na ngai, tika ete mbeba ezala kaka na moto na ngai ! Nabondeli yo, tika ete mwasi mosali na yo asolola na yo ! Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo alingi koyebisa yo.
25 Please, my lord, ignore this worthless man Nabal, for he's like his name—Nabal means Fool, and foolishness is with him. I, your servant, didn't see the young men my lord sent. Tika ete nkolo na ngai atala te Nabali, mobali oyo ya mabe, pamba te azali penza ndenge kombo na ye ezali ; kombo na ye ezali Nabali, mpe elingi koloba : moto ya liboma. Mpe liboma ezali penza kotambola elongo na ye. Ngai mwasi mosali na yo, namonaki te bilenge mibali oyo mokonzi na ngai atindaki.
26 Now, my lord, as surely as our Father lives and you live: since our Father kept you from shedding blood and from avenging yourself by your own hand, may your enemies and all who seek to harm my lord become like Nabal. Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.
27 Now let this gift your servant brought to my lord be given to the young men who follow my lord. Mpe tika ete bakado oyo mwasi mosali na yo amemeli nkolo na ngai epesamela mibali oyo bazali kolanda yo.
28 Forgive your servant's offense, for our Father will surely make my lord a lasting dynasty, because my lord fights our Father's battles. Let no wrongdoing be found in you as long as you live. Nabondeli yo, limbisa mabe ya mwasi mosali na yo. Yawe akosala penza ete libota ya nkolo na ngai ewumela tango nyonso na bokonzi, pamba te obundaka bitumba ya Yawe. Tika ete, tango nyonso okozala na bomoi, mabe ata moko te emonana kati na yo.
29 If someone rises to pursue you and seek your life, my lord's life will be bound securely in the bundle of the living with your Father; but your enemies' lives he will hurl away as from a sling's pocket. Ezala soki moto moko atelemi mpo na kolanda yo to mpo na koboma yo, Yawe, Nzambe na yo, akobatela malamu bomoi ya nkolo na ngai kati na bato ya bomoi, kasi akobwaka banguna na yo mosika lokola na ebambelo mabanga.
30 When our Father has done for my lord all the good he promised about you, and made you ruler over Israel, Tango Yawe akokokisela nkolo na ngai bolamu nyonso oyo alakaki yo mpe akokomisa yo mokambi ya Isalaele,
31 my lord will feel no grief or guilt for shedding blood without cause or taking his own revenge. And when our Father deals well with my lord, remember your servant." nkolo na ngai akoyoka mawa te na motema na ye mpe akomitungisa te na makanisi mpo ete asopaki makila na pamba mpe azongisaki ye moko mabe na mabe. Bongo tango Yawe akosalela nkolo na ngai bolamu, okokanisela mwasi mosali na yo.
32 David said to Abigail, "Blessed be our Father, the God of Israel, who sent you today to meet me. Davidi azongiselaki Abigayili : — Tika ete apambolama, Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo atindi yo kokutana na ngai na mokolo ya lelo !
33 Blessed be your good judgment, and blessed be you, who kept me today from shedding blood and avenging myself by my own hand. Tika ete mayele na yo epambolama ! Tika ete yo moko mpe opambolama mpo ete opesi ngai nzela te ya koboma mpe ya kozongisa ngai moko mabe na mabe !
34 As surely as our Father, the God of Israel, lives, who kept me from harming you—if you hadn't hurried to meet me, not one male of Nabal's would have survived till morning." Nzokande, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo apesi ngai nzela te ya kosala yo mabe, soki oyaki noki te mpo na kokutana na ngai, mobali moko te kati na ndako ya Nabali alingaki kotikala na bomoi kino lobi na tongo.
35 David took from her hand what she brought, and said to her, "Go home in peace. See, I have heard your voice and granted your request." Boye Davidi azwaki bakado oyo Abigayili amemelaki ye mpe alobaki : — Zonga epai na yo na kimia. Nayoki maloba na yo mpe nakosala ndenge osengi ngai.
36 When Abigail reached Nabal, he was hosting a feast in his house fit for a king. His heart was merry and he was very drunk, so she told him nothing until morning. Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki.
37 In the morning, when the wine left Nabal, his wife told him everything. His heart died within him, and he became like stone. Kasi na tongo, lokola milangwa na ye esilaki, mwasi na ye ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. Nabali ayokaki pasi na motema mpe akangamaki lokola libanga.
38 About ten days later, our Father struck Nabal, and he died. Sima na mikolo zomi, Yawe abetaki Nabali, mpe akufaki.
39 When David heard Nabal was dead, he said, "Blessed be our Father, who pleaded my cause against the insult I suffered from Nabal and kept his servant from evil. Our Father has brought Nabal's evil back on his own head." Then David sent word asking Abigail to become his wife. Tango Davidi ayokaki ete Nabali akufi, alobaki : « Tika ete apambolama, Yawe oyo akoti likambo na ngai na ndenge Nabali atiolaki ngai ! Apesi te na mosali na Ye nzela ya kosala mabe, kasi akweyisi mabe ya Nabali na moto na ye moko ! » Bongo Davidi atindaki maloba epai ya Abigayili mpo na kosenga ye ete akoma mwasi na ye.
40 David's servants came to Abigail at Carmel and told her, "David sent us to take you as his wife." Basali ya Davidi bakendeki na Karimeli mpe balobaki na Abigayili : — Davidi atindi biso epai na yo mpo ete toya kozwa yo mpo okoma mwasi na ye.
41 She got up, bowed facedown to the ground, and said, "Here is your servant, ready to serve and to wash the feet of my lord's servants." Abigayili agumbamaki elongi kino na mabele mpe alobaki : — Mwasi mosali na yo, ye oyo ! Abongami mpo na kosalela bino mpe mpo na kosukola makolo ya basali ya nkolo na ngai.
42 Abigail quickly got ready, mounted her donkey, and with her five attendants followed David's messengers and became his wife. Abigayili amataki na ane na lombangu mpe akendeki nzela moko na bantoma ya Davidi elongo na basali na ye mitano ya basi. Mpe akomaki mwasi ya Davidi.
43 David had also married Ahinoam of Jezreel, so both of them were his wives. Davidi abalaki lisusu Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe bango mibale bakomaki basi na ye.
44 Saul had given his daughter Michal, David's wife, to Paltiel son of Laish, from Gallim. Kasi Saulo abalisaki Mikali, mwana na ye ya mwasi, oyo azalaki mwasi ya Davidi, epai ya Paliti, mwana mobali ya Laishi, moto na Galimi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]