Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
2 After Saul returned from chasing the Philistines, he was told, "David is in the En Gedi wilderness." Sima na Saulo kolanda bato ya Filisitia, azongaki ; bongo bayebisaki ye : « Davidi azali sik’oyo kati na esobe ya Eyini-Gedi. »
3 Saul took 3,000 chosen men from all Israel to search for David and his men in front of the Wild Goats' Rocks. Na bongo, Saulo azwaki basoda ya mpiko nkoto misato kati na Isalaele mobimba mpe akendeki koluka Davidi mpe bato na ye pene ya etando ya bantaba ya zamba.
4 He reached the sheep pens by the road, where a cave was. Saul went in to relieve himself; David and his men sat deep in the cave. Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.
5 David's men said, "This is the day our Father meant when he told you, 'I am giving your enemy into your hand to do to him as you wish.'" David got up and quietly cut a corner off Saul's robe. Bato ya Davidi balobaki na ye : Tala mokolo oyo Yawe alobelaki tango alobaki na yo : « Nakokaba monguna na yo na maboko na yo mpo ete osala ye nyonso oyo olingi. » Boye Davidi apusanaki na kobombama mpe akataki songe ya kazaka ya Saulo.
6 Afterward David's conscience struck him because he had cut off the corner of Saul's robe. Sima na yango, Davidi ayokaki motema na ye kobeta mpo ete akataki songe ya kazaka ya Saulo.
7 He told his men, "May our Father forbid I do this to my lord, his anointed—raise my hand against him, for he is our Father's anointed." Alobaki na basoda na ye : « Tika ete Yawe apesa ngai te nzela ya kosala likambo ya boye epai ya nkolo na ngai, mopakolami na Yawe ! Loboko na ngai ekoki te kosimba nzoto na ye, pamba te Yawe nde apakolaki ye mafuta. »
8 With these words David restrained his men from attacking Saul. Then Saul left the cave and went on his way. Na maloba oyo, Davidi agangelaki bato na ye mpe apekisaki bango kobundisa Saulo. Saulo abimaki na ebombamelo yango mpe akobaki nzela na ye.
9 David rose, left the cave, and called after Saul, "My lord the king!" Saul looked back, and David bowed his face to the ground. Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo : « Mokonzi, nkolo na ngai ! » Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele.
10 David said to Saul, "Why listen to the men who say, 'Look, David is seeking to harm you'? Alobaki na Saulo : — Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe ?
11 Today your eyes saw how our Father gave you into my hand in the cave. Some urged me to kill you, but I spared you and said, 'I won't raise my hand against my lord—our Father's anointed.' Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »
12 See, my father—your robe's corner in my hand! I cut it but didn't kill you. Know and see there's no evil or rebellion in my hand. I haven't sinned against you, yet you hunt my life to take it. Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai ! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai.
13 May our Father judge between you and me, and our Father avenge me on you—but my hand won't touch you. Tika ete Yawe azala Mosambisi kati na ngai mpe yo, mpe tika ete Yawe azongisela yo mabe na mabe oyo osali ngai ! Kasi loboko na ngai ekosimba yo te.
14 As the old proverb says, 'From the wicked comes wickedness.' My hand won't be against you. Ndenge kaka lisese ya kala elobi : « Misala mabe ewutaka epai ya bato mabe, » loboko na ngai ekosimba yo te.
15 Who has Israel's king come out against? Who are you chasing? A dead dog? A single flea? Mokonzi ya Isalaele abimi mpo na kobundisa nani ? Azali kolanda nani ? Mbwa ya kokufa ? Nzinzi ?
16 May our Father judge between you and me, see it, plead my case, and rescue me from your hand." Tika ete Yawe azala Mosambisi na biso mpe akata likambo kati na biso. Tika ete atala likambo na ngai mpe akata yango ! Tika ete alongisa ngai mpe akangola ngai wuta na loboko na yo.
17 When David finished saying this to Saul, Saul said, "Is that your voice, my son David?" and wept aloud. Tango Davidi asilisaki koloba na Saulo, Saulo atunaki : — Oyo nazali koyoka ezali solo mongongo na yo Davidi, mwana na ngai ? Mpe Saulo alelaki makasi.
18 He told David, "You are more just than I; you did me good, I did you harm. Alobaki na Davidi : — Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo !
19 Today you showed the good you did me: our Father put me in your hand, yet you did not kill me. Owuti sik’oyo kotalisa ngai bolamu oyo osaleli ngai : Yawe akabaki ngai penza na maboko na yo, kasi oboyaki na yo koboma ngai.
20 If a man finds his enemy, would he let him go unharmed? May our Father repay you well for what you did for me today. Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia ? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo.
21 Now I know you will surely be king, and Israel's kingdom will stand firm in your hand. Tala, nayebi sik’oyo ete okozala penza mokonzi, mpe bokonzi ya Isalaele ekolendisama na maboko na yo.
22 So swear to me by our Father: you won't cut off my descendants after me or wipe out my name from my father's house." Lapa sik’oyo ndayi epai na ngai na Kombo na Yawe ete okoboma bakitani na ngai te to okolimwisa kombo na ngai te wuta na libota ya botata na ngai.
23 David swore to Saul. Saul went home; David and his men went up to the stronghold. Boye Davidi alapaki ndayi yango epai ya Saulo. Sima na yango, Saulo azongaki epai na ye. Bongo Davidi mpe bato na ye bazongaki na ebombamelo na bango kati na ngomba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]