Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 They reported to David, "Look, the Philistines are fighting against Keilah and looting the threshing floors." Tango bayebisaki Davidi ete bato ya Filisitia bazali kobundisa engumba Keila mpe bazali kozwa na makasi ble na bilanga na yango,
2 David asked our Father, "Should I go and attack these Philistines?" And our Father answered, "Go, attack the Philistines and rescue Keilah." Davidi atunaki Yawe, alobaki : — Nakoki na ngai kokende kobundisa bato oyo ya Filisitia ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, bundisa bato ya Filisitia mpe bikisa engumba Keila.
3 David's men said, "Look, we're afraid here in Judah—how much more if we go to Keilah against Philistine battle lines!" Kasi basoda ya Davidi bayebisaki ye : — Soki awa kati na Yuda, tozali kobanga, ekozala boni soki tokeyi na Keila kobundisa bato ya Filisitia ?
4 David asked our Father again, and our Father answered: "Get up, go down to Keilah, for I'm giving the Philistines into your hand." Davidi atunaki lisusu Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : — Telema, kende na Keila, pamba te nazali kokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
5 David and his men went to Keilah, fought the Philistines, drove off their livestock, and struck them a great blow—rescuing Keilah's residents. Boye Davidi elongo na basoda na ye bakendeki na engumba Keila mpe babundisaki bato ya Filisitia, babotolaki biloko mpe bibwele na bango. Davidi abetaki makasi bato ya Filisitia, mpe, na bongo, abikisaki bato ya Keila.
6 Abiathar son of Ahimelech had fled to David at Keilah; he arrived with an ephod in his hand. Nzokande, tango Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki, akimaki epai ya Davidi, na engumba Keila, amemaki elongo na ye efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.
7 When Saul heard David was in Keilah, he said, "God has handed David to me; he has trapped himself, entering a town with gates and bars." Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki : « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. »
8 Saul summoned all the people to war: go down to Keilah, besiege David and his men. Saulo asangisaki mampinga na ye nyonso mpo na bitumba, mpo ete bakende na Keila kozingela Davidi elongo na bato na ye.
9 David learned Saul was plotting evil against him and told Abiathar the priest, "Bring the ephod here." Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.
10 David said, "O my Father, the God of Israel, your servant has heard for certain: Saul plans to come to Keilah and destroy the city because of me. Davidi alobaki : — Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, mosali na Yo ayoki malamu ete Saulo azali komibongisa mpo na koya na Keila, mpo na kobebisa engumba likolo na ngai.
11 Will Keilah's citizens hand me over to him? Will Saul come down, as your servant has heard? O my Father, the God of Israel, please tell your servant." And our Father said, "He will come down." Boni, bakambi ya Keila bakokaba ngai penza na maboko na ye ? Saulo akoya solo ndenge mosali na Yo ayoki yango ? Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, yebisa mosali na yo. Yawe alobaki : — Iyo, akoya penza.
12 David asked, "Will the citizens of Keilah hand me and my men over to Saul?" And our Father said, "They will hand you over." Davidi atunaki lisusu : — Bakambi ya Keila bakokaba penza ngai mpe bato na ngai na maboko ya bato ya Saulo ? Yawe alobaki : — Iyo, bakokaba yo.
13 David and his roughly 600 men left Keilah and wandered from place to place. Told that David had escaped Keilah, Saul stopped pursuing him. Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te.
14 David remained in the wilderness strongholds and the hill country of the wilderness of Ziph. Saul searched for him every day, but our Father did not give him into his hand. Davidi avandaki na bisambelo ya likolo ya bangomba kati na esobe, mpe avandaki na likolo ya ngomba kati na esobe ya Zifi. Saulo alukaki ye mikolo nyonso, kasi Nzambe akabaki Davidi te na maboko na ye.
15 David was at Horesh in the Ziph wilderness when he saw Saul had come out to seek his life. Wana Davidi azalaki na Oreshi kati na esobe ya Zifi, ayokaki ete Saulo abimaki mpo na koluka koboma ye.
16 Jonathan, Saul's son, set out and went to David at Horesh, then strengthened him in our Father. Jonatan, mwana mobali ya Saulo, akendeki na Oreshi epai ya Davidi mpo na kolendisa ye na Kombo ya Nzambe.
17 "Don't be afraid," he said. "My father Saul's hand won't find you. You'll be king over Israel, and I'll be second to you. Even my father Saul knows it." Alobaki na ye : « Kobanga te ! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo ; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »
18 Both made a covenant before our Father. David stayed at Horesh; Jonathan went home. Bango mibale basalaki boyokani liboso ya Yawe. Jonatan azongaki epai na ye, mpe Davidi atikalaki na Oreshi.
19 Then the Ziphites went up to Saul at Gibeah, saying, "Isn't David hiding among us in the strongholds at Horesh, on Hachilah's hill south of Jeshimon? Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo mpe balobaki na ye : — Boni, Davidi abombami te kati na biso, na bisambelo ya likolo ya bangomba ya Oreshi, kati na esobe, na likolo ya ngomba moke ya Akila oyo ezali na ngambo ya sude ya Yeshimoni ?
20 Now, king, come down, do come down, whenever you wish; our task is handing him to the king." Sik’oyo, oh mokonzi, tango nyonso okosepela kokita, kita na yo ; mpe biso moko tozwi mokumba ya kokaba ye na maboko ya mokonzi.
21 Saul replied, "May our Father bless you, for you have taken pity on me. Saulo azongisaki : — Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai !
22 Go, prepare further; learn where he sets foot, who has seen him there—I'm told he is very cunning. Bokende, botala lisusu malamu, bononga mpe boluka koyeba esika nini Davidi akendaka mikolo nyonso mpe nani amonaki ye kuna ; pamba te bayebisaka ngai ete azali na mayele mabe makasi.
23 Learn all the hiding places where he hides, then bring me solid facts. I'll go with you, and if he's in the land, I'll search him out among all the clans of Judah." Botala mpe boyeba bisika nyonso epai wapi abombamaka, mpe bozongela ngai mpo na koyebisa ngai makambo nyonso ndenge yango ezali. Bongo na sima, soki azali kati na mboka, ngai nakokende elongo na bino mpe nakolukisa ye kati na bituka nyonso ya Yuda.
24 They set out for Ziph ahead of Saul. David and his men were in the wilderness of Maon, in the Arabah south of Jeshimon. Boye, batelemaki mpe bakendeki na Zifi liboso na Saulo. Nzokande Davidi elongo na bato na ye bazalaki kati na esobe ya Maoni, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Yeshimoni.
25 Saul and his men set out to search, and David was told. He went down to the rock and stayed in the wilderness of Maon. Saul heard, and pursued David into the wilderness of Maon. Saulo elongo na bato na ye bakomaki koluka Davidi. Tango bayebisaki Davidi ete bazali koluka ye, akitaki kati na libanga monene mpe avandaki kati na esobe ya Maoni. Mpe tango Saulo ayokaki bongo, akotaki kati na esobe yango ya Moani mpo na kolanda Davidi.
26 Saul went along one side of the mountain, David and his men along the other, David hurrying to escape Saul while Saul and his men closed in to capture David and his men. Saulo azalaki kotambola na ngambo moko ya ngomba, bongo Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na ngambo mosusu mpe kokima mbangu mosika na Saulo. Lokola Saulo mpe mampinga na ye bazalaki koluka kozingela Davidi mpe bato na ye mpo na kokanga bango,
27 But a messenger came to Saul, saying, "Come quickly! The Philistines are raiding the land." momemi sango moko ayaki epai ya Saulo mpe alobaki na ye : « Yaka noki ! Bato ya Filisitia bakoti na mokili. »
28 So Saul stopped pursuing David and went against the Philistines. That's why they named that place Sela-hammahlekoth. Mbala moko, Saulo atikaki kolanda Davidi mpo na kokende kokutana na bato ya Filisitia. Yango wana babengaka esika yango « Sela-Amalekoti » oyo elakisi « Libanga ya bokabwani. »
24:1 And David went up from there and lived in the strongholds of En Gedi. Davidi alongwaki wana mpe akendeki kovanda na ebombamelo kati na mabanga ya Eyini-Gedi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]