Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David left there and escaped to the cave of Adullam; his brothers and all his father's household heard and went down to him there. Davidi alongwaki na Gati mpe akendeki kobombama na lidusu ya libanga ya Adulami. Tango bandeko na ye ya mibali mpe ya libota ya botata na ye bayokaki sango yango, bakitaki kuna epai na ye.
2 Everyone in distress, debt, or bitter in spirit gathered to him; he became their commander—about 400 men. Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei.
3 From there David went to Mizpeh of Moab and asked its king, "Please let my father and mother come stay with you until I know what our Father will do for me." Kolongwa wana, Davidi akendeki na Mitsipe ya Moabi mpe alobaki na mokonzi ya Moabi : « Nabondeli yo : Pesa tata na ngai mpe mama na ngai ndingisa ya koya kovanda elongo na yo kino ngai nakoyeba makambo oyo Nzambe akosala mpo na ngai. »
4 He left them with Moab's king; they stayed with him while David was in the stronghold. Boye Davidi amemaki bango epai ya mokonzi ya Moabi, mpe bavandaki elongo na ye tango nyonso oyo Davidi azalaki kati na ndako ya makasi.
5 Gad the prophet told David, "Don't stay in the stronghold; leave, and go into the land of Judah." So David left and went to Hereth Forest. Kasi mosakoli Gadi alobaki na Davidi : « Kovanda te kati na ndako oyo batonga makasi, kende na mokili ya Yuda. » Boye Davidi alongwaki mpe akendeki na zamba ya Ereti.
6 Saul heard David and his men were found. He sat at Gibeah under the tamarisk on the height, spear in hand, all his servants standing around him. Saulo ayokaki ete bamonaki Davidi elongo na bato na ye. Wana Saulo azalaki na mopanga na loboko na ye mpe avandaki na Gibea, na likolo ya ngomba moke mpe na se ya nzete oyo babengi « Tamarisi » elongo na bakonzi nyonso ya mampinga na ye,
7 Saul said to his attending servants, "Listen, Benjaminites! Will Jesse's son even give you all fields and vineyards? Will he make you all commanders of thousands and commanders of hundreds, Saulo ayebisaki bango : « Bino bato ya Benjame boyoka, bokanisi ete mwana ya Izayi akopesa bino nyonso bilanga mpe bilanga ya vino ? Bokanisi ete akokomisa bino bakonzi ya bankoto to bakonzi ya bankama ya basoda ?
8 that you've all conspired against me? No one tells me my son made a covenant with Jesse's son. None of you pities me or tells me my son has stirred my servant against me to ambush me, as he does today." Ezali mpo na yango nde bino nyonso bosalelaki ngai likita ? Moto moko te alobi na ngai na tina na boyokani oyo mwana na ngai ya mobali asalaki na mwana ya Izayi, mpe moko te kati na bino ayokeli ngai mawa mpo ete ayebisa ngai ete mwana na ngai asaleli ngai likita mpo ete mosali na ngai atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ? »
9 Doeg the Edomite, with Saul's servants, said, "I saw Jesse's son come to Nob, to Ahimelech son of Ahitub. Kasi Doegi, moto ya Edomi, oyo azalaki moko kati na basali ya Saulo, alobaki : « Namonaki mwana mobali ya Izayi koya na Nobi epai ya Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi.
10 Ahimelech inquired of the LORD for him, gave him provisions and the sword of Goliath the Philistine." Ayimeleki atunaki mpo na ye makambo epai na Yawe, mpe apesaki ye bilei mpe mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia. »
11 The king summoned the priest Ahimelech son of Ahitub, his father's whole family, the priests in Nob, and they all came to the king. Boye mokonzi abengisaki Nganga-Nzambe Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi ; elongo na Banganga-Nzambe nyonso, bato ya libota na ye ya botata, oyo bazalaki na Nobi. Mpe bango nyonso bayaki epai ya mokonzi.
12 Saul said, "Listen now, son of Ahitub." He answered, "Here I am, my lord." Saulo alobaki : — Yoka sik’oyo, mwana mobali ya Ayitubi. Ayimeleki azongisaki : — Nazali koyoka yo, nkolo na ngai.
13 Saul asked, "Why have you and Jesse's son conspired against me? You gave him bread and a sword and asked God for him, so he'd rise against me and lie in wait, as he does today." Saulo alobaki na ye : — Mpo na nini yo mpe mwana mobali ya Izayi bosalelaki ngai likita mpo na kotelemela ngai ? Mpo na nini opesaki ye bilei mpe mopanga, mpe otunaki mpo na ye makambo epai na Nzambe, mpo ete atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ?
14 Ahimelech answered the king, "Who among all your servants is as faithful as David, the king's son-in-law, your guard captain, and honored in your house? Ayimeleki azongiselaki mokonzi : — Boni, ezali na moto moko kati na basali na yo nyonso oyo azali na boyengebene lokola Davidi ? Ye oyo azali bokilo ya mokonzi, mokambi ya basoda oyo bakengelaka yo mpe moto oyo aleki na lokumu kati na libota na yo ?
15 Did I begin asking our Father for him today? Far be it from me! Let the king charge his servant nothing—nor my father's whole household—for your servant knew nothing of all this, small or great." Boni, mokolo wana ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kotuna mpo na ye makambo epai ya Nzambe ? Nakanisi ete ezali bongo te. Boye tika ete mokonzi atangela mosali na ye to moko kati na libota ya botata na ngai ngambo te ; pamba te mosali na yo ayebi ata eloko moko te kati na likambo oyo nyonso.
16 But the king said, "You will surely die, Ahimelech, you and all your father's household." Kasi mokonzi alobaki : — Ayimeleki, okokufa solo ; yo mpe libota mobimba ya botata na yo.
17 The king told the guards standing beside him, "Turn and kill the priests of our Father, their hand too is with David; they knew he was fleeing and did not tell me." But the king's servants would not lift a hand against the priests of our Father. Boye, mokonzi atindaki bakengeli na ye, oyo bazalaki na mopanzi na ye : « Bobaluka mpe boboma Banganga-Nzambe ya Yawe ; pamba te bango mpe basungaki Davidi : bayebaki ete Davidi azalaki kokima kasi bayebisaki ngai te. » Kasi basoda oyo bakengelaka mokonzi baboyaki kosembola maboko na bango mpo na koboma Banganga-Nzambe ya Yawe.
18 The king told Doeg, "Turn and strike down the priests." Doeg the Edomite turned and struck them down, killing eighty-five men who wore linen ephod that day. Mokonzi apesaki mitindo epai ya Doegi : « Yo, baluka mpe boma Banganga-Nzambe. » Boye Doegi, moto ya Edomi, abalukaki mpe abomaki bango. Na mokolo wana, abomaki bato tuku mwambe na mitano oyo balataki efode ya lino.
19 He struck Nob, the priests' city, by the sword—men, women, children, infants, oxen, donkeys, sheep—all by the sword. Abomaki lisusu na mopanga kati na Nobi, engumba ya Banganga-Nzambe, mibali, basi, bana mpe bana mike, bangombe, ba-ane mpe bameme.
20 But one son of Ahimelech son of Ahitub, named Abiathar, escaped and fled to David. Kaka Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki mpe koko ya Ayitubi, nde abikaki mpe akimaki mpo na kokende kosangana na Davidi.
21 Abiathar told David that Saul had killed the priests of our Father. Abiatari ayebisaki Davidi ete Saulo asili koboma Banganga-Nzambe ya Yawe.
22 David told Abiathar, "I knew that day Doeg the Edomite was there—he'd tell Saul. I caused the death of everyone in your father's house. Boye Davidi alobaki na Abiatari : « Mokolo wana, nayebaki malamu ete lokola Doegi, moto ya Edomi, azalaki wana, akokaki kozanga te koyebisa Saulo. Boye ezali mpo na ngai nde bato nyonso ya libota ya botata na yo bakufi !
23 Stay with me; don't be afraid. Whoever seeks my life seeks yours. With me you are safe." Sik’oyo, vanda awa elongo na ngai, kobanga te. Pamba te moto oyo azali koluka bomoi na yo azali koluka mpe bomoi na ngai. Okobatelama malamu epai na ngai. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]