Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
2 David came to Ahimelech the priest at Nob. Ahimelech came trembling to meet him and asked, "Why are you alone, no one with you?" Davidi akendeki na mboka Nobi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki. Ayimeleki alengaki mpe akimaki mbangu mpo na kokende koyamba ye. Atunaki na Davidi : — Mpo na nini ozali yo moko ? Mpo na nini ezali na moto moko te elongo na yo ?
3 David told Ahimelech the priest, "The king ordered me and said, 'No one must know anything about the mission I'm sending you on and what I've commanded you.' I've directed my young men to a certain place. Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe Ayimeleki : — Mokonzi apesaki ngai mosala moko boye mpe alobaki na ngai : « Tika ete moto moko te ayeba ata likambo moko na mosala oyo natindi yo. » Na tina na yango nde nasengaki na bato na ngai ete tokutana na esika moko.
4 So what do you have? Give me five loaves, or whatever you can find." Bongo sik’oyo, osimbi eloko nini na loboko na yo ? Pesa ngai mapa mitano to eloko nyonso oyo okoki kozala na yango.
5 The priest told David, "I have no ordinary bread, only holy bread—if the young men have kept from women." Kasi Nganga-Nzambe azongiselaki Davidi : — Na loboko na ngai, nazali na mapa te oyo toliaka mikolo nyonso, kasi ezali kaka na mapa oyo ebulisama. Bato na yo bakoki kolia yango soki kaka basangisaki banzoto te na basi.
6 David answered the priest, "Women have been kept from us, as always when I set out. The young men's bodies are holy even on an ordinary journey; how much more so today will their bodies be holy?" Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe : — Solo, bapekisa biso basi ndenge kaka ezalaka tango nyonso na makambo ya boye. Kutu tango nakendaka bitumba, biloko ya bato na ngai ebulisamaka. Atako mosala ya mokolo ya lelo ezalaki bule te, kasi ekomi bule mpo ete bibundeli ebulisami.
7 So the priest gave him the holy bread, since only the bread of the Presence was there—removed from before our Father to be replaced with warm bread the day it was taken away. Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso.
8 One of Saul's servants was there that day, detained before our Father: Doeg the Edomite, chief of Saul's shepherds. Nzokande na mokolo yango wana, ezalaki na mosali moko, kati na basali ya Saulo, oyo atikalaki kuna liboso ya Yawe. Kombo na ye ezalaki « Doegi. » Azalaki moto ya Edomi, mpe mokonzi ya babateli bibwele ya Saulo.
9 David asked Ahimelech, "Have you a spear or sword here? I brought neither my sword nor weapons, because the king's order was urgent." Davidi atunaki Ayimeleki : — Boni awa, ozali te ata na likonga moko to na mopanga na se na loboko na yo ? Ngai namemaki te ezala mopanga na ngai to ebundeli na ngai mosusu, pamba te mosala ya mokonzi esengelaki kosalema na lombangu.
10 The priest said, "Goliath the Philistine's sword—Goliath, whom you killed in the Valley of Elah—is here, wrapped in cloth behind the ephod. Take it if you want; there's no other here." David said, "None compares; give it to me." Nganga-Nzambe azongisaki : — Ezali awa na mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia, oyo obomaki na lubwaku ya Terebente ; balinga yango na elamba sima na efode. Soki olingi kozwa yango, zwa na yo ; pamba te ezali awa na mopanga mosusu te, bobele oyo wana. Davidi alobaki : — Mopanga moko te ekokani na yango ; pesa ngai yango.
11 That day David rose and fled from Saul, and came to Achish king of Gath. Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati.
12 But Achish's servants said to him, "Isn't this David, king of the land? Isn't he the one they sing about in their dances: 'Saul has struck down his thousands, and David his tens of thousands'?" Kasi basali ya Akishi balobaki na ye : « Moto oyo azali Davidi te, mokonzi ya mboka ? Ezali ye te oyo bazali koyemba boye na kobina na tina na ye : ‹ Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi ? › »
13 David took these words to heart and was very much afraid of Achish the king of Gath. Davidi asimbamaki na maloba oyo mpe abangaki makasi Akishi, mokonzi ya Gati.
14 So he changed his behavior before them and acted insane in their presence; he scrawled on the gate doors and let his saliva run down his beard. Mpe wana akosaki kobela liboma na miso ya bato ya Filisitia, akomaki kosala kati na bango makambo lokola moto ya liboma : kokoma na bikuke ya bandako, mpe kotika soyi kotanga ye na mandefu.
15 Achish told his servants, "Look, you see the man is insane. Why bring him to me? Akishi alobaki na basali na ye : « Botala tata oyo, azali moto ya liboma ! Mpo na nini boyei na ye epai na ngai ?
16 Am I short of madmen, that you brought this one to rave at me? Should he enter my house?" Boni, nazangi penza bato ya maboma mpo ete bomema mobali oyo awa, na tina ete aya kosala makambo na ye ya liboma ? Boni, moto ya boye asengeli penza kokota na ndako na ngai ? »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]