Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David fled Naioth in Ramah, came to Jonathan, and said, "What have I done? What is my guilt, and how have I sinned against your father, that he wants my life?" Davidi akimaki wuta na Nayoti ya Rama mpe akendeki epai ya Jonatan. Atunaki ye : — Nasali nini ? Mabe nini nasali ? Lisumu nini nasali liboso ya tata na yo mpo ete aluka koboma ngai ?
2 "Never!" Jonathan replied. "You won't die. My father tells me everything, great or small. Why hide this from me? Not true." Jonatan azongisaki : — Te, Ekosalema te ! Okokufa te ! Tala, tata na ngai asalaka eloko moko te, ezala ya moke to ya monene, soki ayebisi ngai te. Mpo na nini tata na ngai abombela ngai kaka likambo oyo ? Ezali bongo te.
3 But David swore again, "Your father knows very well that I have your favor, and he has said, 'Don't tell Jonathan, or he'll grieve.' Yet as our Father lives, and as you live, there's only a step between me and death." Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »
4 Jonathan said to David, "Whatever you want, I will do for you." Jonatan alobaki na Davidi : — Nakosala nyonso oyo okolinga ete ngai nasala mpo na yo.
5 David said, "Tomorrow's the new moon; I should eat with the king. Let me hide in the field until the third evening. Davidi azongiselaki Jonatan : — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; nasengelaki kovanda mesa moko na mokonzi mpo na kolia. Pesa ngai nzela ete nakende kobombama na bilanga kino na pokwa ya mokolo ya misato.
6 If your father misses me, say, 'David begged leave to hurry to Bethlehem, his town, for his whole clan's yearly sacrifice.'" Soki tata na yo amitungisi mpo na kozanga na ngai komonana, okoloba na ye : « Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na engumba na ye, Beteleemi, pamba te etuka mobimba ekosepela kuna mbeka oyo babonzaka mibu nyonso. »
7 If he says, 'Good,' your servant is safe. But if he flies into a rage, you can be sure he has decided harm against me. Soki alobi : « Malamu, » wana mosali na yo akozala na kimia. Kasi soki atomboki na kanda, wana yeba malamu ete azwi mokano ya kosala ngai mabe.
8 Show your servant kindness—you brought me into a covenant with you before our Father. If I'm guilty, kill me yourself; why hand me over to your father? Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai ! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo ?
9 "Never!" Jonathan said. "If I knew my father meant to harm you, wouldn't I tell you?" Jonatan alobaki : — Te ! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te !
10 David asked, "Who will tell me if your father answers you harshly?" Davidi atunaki Jonatan : — Bongo soki tata na yo akozongisela yo eyano na kanda, nani akoyebisa ngai ?
11 "Come," Jonathan said, "let's go out to the field." So the two of them went out together. Jonatan azongiselaki Davidi : — Yaka, tokende na zamba ! Boye, bango mibale bakendeki nzela moko na zamba.
12 Jonathan said to David, "Our Father, the God of Israel, be my witness! I'll sound out my father tomorrow or the third day—if he favors you, will I not surely send word and let you know? Jonatan alobaki na Davidi : « Na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, lobi to sima na lobi, na ngonga oyo, nakoluka koyeba makanisi ya tata na ngai mpo na yo. Soki ezali malamu, bongo natindi moto te mpo na koyebisa yo yango,
13 But if my father means to harm you, may our Father punish me severely if I don't warn you and send you off safely. May our Father be with you, as he was with my father. wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye ! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai !
14 But show me our Father's unfailing love as long as I live, so I won't die. Sima na mikolo, soki nakozala nanu na bomoi, salela ngai bolamu lokola bolamu ya Yawe mpo ete baboma ngai te.
15 Never cut off your kindness from my family—even when our Father cuts off every enemy of David from the face of the earth." Mpe kolemba te kosalela libota na ngai bolamu, ata tango Yawe akolongola banguna nyonso ya Davidi, na etando ya mokili. »
16 Jonathan made a covenant with the house of David, saying, "May our Father hold David's enemies accountable." Boye Jonatan asalaki boyokani elongo na libota ya Davidi na maloba oyo : « Tika ete Yawe azongisa mabe na mabe na banguna ya Davidi ! »
17 Jonathan again made David swear by his love for him, for he loved him as his life. Mpe Jonatan asengaki ete Davidi alapa lisusu ndayi na ye na kombo ya bolingo na ye Davidi epai ya Jonatan, pamba te azalaki kolinga ye ndenge ye moko amilingaka.
18 Then Jonathan said, "Tomorrow is the new moon. You'll be missed, since your seat will be empty. Bongo Jonatan alobaki na Davidi : — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; bato bakomitungisa mpo na yo mpo ete okozala te, mpe bakomona ete esika na yo ekozala pamba.
19 The day after tomorrow, toward evening, hurry down to where you hid when this trouble began, and stay by the stone Ezel. Sima na lobi, na pokwa, okokende kino na esika epai wapi obombamaki tango likambo oyo ebandaki mpe okovanda pembeni ya libanga Ezeli.
20 I'll shoot three arrows to its side, as if aiming at a target. Ngai nakobwaka makonga misato na ngambo moko ya libanga yango lokola nde nazali kobwaka na elembo moko.
21 I'll send the boy and say, 'Go, find the arrows.' If I tell him, 'Look, they're on this side of you—bring them here,' then come; as our Father lives, you're safe, no danger. Bongo nakotinda elenge mobali moko kokende koluka makonga yango. Soki nalobi na ye : « Tala, makonga ezali pembeni na yo, lokota mpe yaka na yango awa, » wana nalingi koloba : « Na Kombo na Yawe, yaka mpo ete ozali na kimia, likambo ezali te. »
22 But if I tell the boy, 'Look, the arrows are beyond you,' go—our Father has sent you away. Kasi soki nalobi na elenge mobali : « Tala, makonga ezali mosika na yo ; » wana nalingi koloba : « Kima na yo, pamba te Yawe akimisi yo. »
23 And about what you and I spoke of—remember, our Father stands as witness between you and me forever." Bongo mpo na liloba oyo tosololaki ngai na yo, yeba ete Yawe azali Motatoli kati na ngai mpe yo mpo na libela.
24 So David hid in the field. When the new moon came, the king sat down to eat. Davidi abombamaki kati na zamba. Bongo na tango ya feti ya Sanza ya Sika, mokonzi avandaki na mesa mpo na kolia.
25 The king sat in his usual seat by the wall, Jonathan opposite, Abner beside Saul—David's place empty. Mokonzi avandaki lokola momesano na esika na ye pembeni ya mir. Jonatan atelemaki, mpe Abineri avandaki pembeni ya Saulo, kasi esika ya Davidi ezalaki polele.
26 That day Saul said nothing, thinking, "Something happened to David to make him ceremonially unclean—surely he is unclean." Saulo alobaki eloko moko te na mokolo wana, pamba te akanisaki kaka ete eloko moko esalemi epai ya Davidi oyo ekomisi ye mbindo.
27 Next day, the second of the month, David's place was empty again. Saul asked his son Jonathan, "Why hasn't Jesse's son come to eat, yesterday or today?" Kasi mokolo oyo elandaki, mokolo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, lokola esika ya Davidi ezalaki lisusu polele, Saulo alobaki na mwana na ye ya mobali, Jonatan : — Mpo na nini mwana mobali ya Izayi ayei te mpo na kolia, ezala lobi oyo eleki to lelo ?
28 Jonathan replied, "David earnestly begged me to let him go to Bethlehem. Jonatan azongiselaki Saulo : — Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na Beteleemi.
29 He said, 'Let me go—our family has a sacrifice in town, and my brother ordered me there. If I have your favor, let me slip away and see my brothers.' That's why he hasn't come to the king's table." Alobaki : « Pesa ngai nzela ya kokende mpo ete etuka na ngai esengeli kobonza mbeka kati na engumba, mpe ndeko na ngai ya mobali abengisi ngai mpo ete nazala kuna. Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ngai kokende kotala bandeko na ngai. » Yango wana ayei te na mesa ya mokonzi.
30 Saul raged at Jonathan: "Son of a rebellious, perverse woman! Don't I know you've sided with Jesse's son—to your shame, and to the shame of the mother who bore you? Saulo asilikelaki makasi Jonatan mpe alobaki na ye : — Yo mwana mobali ya mwasi ya yawuli mpe motomboki, nayebi solo ete okoteli mwana mobali ya Izayi ; kasi ezali mpo na soni na yo mpe ya mama oyo abota yo.
31 As long as Jesse's son lives on earth, neither you nor your kingdom is secure. Send and bring him to me; he must die." Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa.
32 "Why should he be put to death? What has he done?" Jonathan asked his father. Jonatan atunaki Saulo, tata na ye : — Basengeli koboma ye mpo na nini ? Asali nini ?
33 Saul threw his spear at him to strike him down, so Jonathan knew his father was determined to kill David. Saulo abwakelaki Jonatan likonga na ye mpo na koboma ye, mpe Jonatan asosolaki ete tata na ye azali na makanisi ya koboma Davidi.
34 Jonathan rose from the table in burning anger, ate nothing that month's second day, grieved for David because his father had disgraced him. Jonatan alongwaki na mesa na kanda makasi mpe atikalaki kolia te na mokolo oyo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, pamba te ayokaki pasi na motema na ndenge tata na ye afingaki Davidi.
35 At morning Jonathan went out to the field to meet David, a young boy with him. Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jonatan akendeki na zamba kokutana na Davidi. Azalaki elongo na elenge mobali moko.
36 He told his boy, "Run, find the arrows I shoot." As he ran, Jonathan shot the arrow past him. Alobaki na elenge mobali : « Kima mbangu mpe lokota makonga oyo nazali kobwaka. » Tango elenge mobali azalaki kokima mbangu, Jonatan abwakaki likonga liboso na ye.
37 As the boy reached the arrow Jonathan shot, Jonathan called after him, "Isn't the arrow beyond you?" Mpe tango elenge mobali akomaki na esika oyo likonga ya Jonatan ekweyaki, Jonatan alobaki na ye na mongongo makasi : « Boni, likonga ezali liboso na yo te ? »
38 Jonathan called after the boy, "Hurry! Quick! Don't stop!" He gathered the arrows and came to his master. Bongo Jonatan agangaki lisusu : « Sala noki ! Kima mbangu, kotelema te ! » Elenge mobali alokotaki likonga mpe azongaki epai ya nkolo na ye.
39 The boy knew nothing of all this; only Jonathan and David knew what it meant. Elenge mobali ayebaki ata eloko moko te na makambo oyo nyonso ; kaka Jonatan mpe Davidi nde bayebaki.
40 Then Jonathan gave his weapons to the boy and told him, "Go, carry them back to town." Bongo Jonatan apesaki bibundeli na ye epai ya elenge mobali mpe alobaki : « Kende kozongisa yango na engumba. »
41 When the boy left, David rose from beside the stone's south side, fell facedown, and bowed three times. They kissed and wept together, David weeping most. Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka.
20:42-21:1 Jonathan told David, "Go in peace—we both swore in our Father's name: 'Our Father is witness between you and me, and between your descendants and mine, forever.'" David rose and left; Jonathan returned to town. Jonatan alobaki na Davidi : « Kende na kimia, pamba te biso mibale tolapanaki ndayi na Kombo na Yawe na koloba : ‹ Yawe azali Motatoli kati na yo mpe ngai, mpe kati ya bakitani na yo mpe bakitani na ngai mpo na libela. › » Bongo Davidi akendeki, mpe Jonatan azongaki na engumba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]