Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Saul spoke to his son Jonathan and all his servants about killing David. But Jonathan, Saul's son, delighted greatly in David. Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi.
2 Jonathan told David, "Saul my father wants to kill you, so be careful in the morning—stay hidden and out of sight. Jonatan ayebisaki Davidi : « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge ! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna.
3 I will go out, stand beside my father in the field where you are, and speak to my father about you—then tell you whatever I discover." Ngai nakobima mpe nakozala elongo na tata na ngai kati na zamba epai wapi yo okozala. Nakoloba na tina na yo epai ya tata na ngai, nakoluka koyeba makambo ndenge ezali mpe nakoyebisa yo. »
4 Jonathan spoke well of David to his father Saul and said to him: "The king must not sin against his servant David, for he hasn't sinned against you. On the contrary, his deeds have been very good for you. Jonatan alobaki malamu na tina na Davidi epai ya tata na ye, Saulo : « Tika ete mokonzi asala mabe te na mosali na ye, Davidi, pamba te asali yo mabe te. Yo nde kutu moto ozwi lisungi monene na makambo oyo ye asali.
5 He risked his life to strike down the Philistine, and our Father won a great victory for all Israel. You saw it and rejoiced. Why would you sin against innocent blood, killing David for no reason?" Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »
6 Saul listened to Jonathan and swore, "As our Father lives, David will not be put to death." Saulo ayokaki Jonatan mpe alapaki ndayi boye : « Na Kombo na Yawe, bakoboma Davidi te. »
7 Jonathan called David and told him all this, then brought him to Saul, and David served him as before. Bongo Jonatan abengaki Davidi mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo basololaki na tata na ye. Jonatan amemaki Davidi epai ya Saulo, mpe Davidi asalelaki Saulo lokola na ebandeli.
8 War broke out again. David went out, fought the Philistines, struck them with a great blow, and they fled from him. Lokola bitumba ezongelaki, Davidi abimaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia mpe alongaki bango na elonga monene, mpe bato ya Filisitia bakimaki liboso na ye.
9 But a harmful spirit from our Father came on Saul while he sat in his house, spear in hand, and David played the lyre. Kasi molimo moko ya mabe kowuta na Yawe ekitelaki Saulo, wana avandaki kati na ndako na ye mpe asimbaki likonga na loboko na ye. Lokola Davidi azalaki kobeta lindanda,
10 Saul tried to pin David to the wall with his spear, but David dodged, and the spear struck the wall. David fled and escaped that night. Saulo alukaki koboma ye na nzela ya likonga na ye. Kasi Davidi akimaki ye, mpe likonga ekotaki na mir. Na butu wana, Davidi alongaki kokima mpe abikaki.
11 Saul sent men to watch David's house and kill him at dawn. Michal, David's wife, warned him: "If you don't flee tonight, you'll be dead by morning." Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye : « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi ! »
12 So Michal let David down through a window, and he fled and escaped. Boye Mikali akitisaki Davidi na nzela ya lininisa, mpe Davidi akimaki mpe abikaki.
13 Then Michal took the household idol, laid it on the bed, put a goat-hair blanket at its head, and covered it with a cloth. Bongo Mikali azwaki nzambe ya ekeko oyo ezalaki na lolenge ya moto ; alalisaki yango na mbeto, afinikaki yango elamba mpe atiaki yango bapwale ya bantaba na moto.
14 When Saul sent messengers to seize David, Michal said, "He is ill." Tango Saulo atindaki bato kokanga Davidi, Mikali alobaki : « Azali kobela. »
15 So Saul sent the messengers back to see David, saying, "Bring him to me in the bed, to kill him." Saulo azongisaki bato mpo ete batala Davidi mpe alobaki na bango : « Bomemela ngai ye na mbeto na ye mpo ete naboma ye. »
16 When the messengers came in, the household idol was on the bed, goat-hair quilt at its head. Kasi tango mibali bakotaki, bamonaki, na likolo ya mbeto, nzambe ya ekeko oyo ezalaki lokola moto mpe ezalaki na bapwale ya bantaba na moto na yango.
17 Saul said to Michal, "Why did you deceive me like this and let my enemy escape?" Michal said to Saul, "He told me, 'Let me go, why should I kill you?'" Saulo alobaki na Mikali : — Mpo na nini oyokisi ngai soni mpe okimisi monguna na ngai, mpe sik’oyo abiki ? Mikali alobaki na Saulo : — Davidi alobaki na ngai : « Tika ngai nakima, noki te nakoboma yo. »
18 David fled and escaped, came to Samuel at Ramah, and told him all Saul had done to him. Then he and Samuel went and stayed in Naioth. Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama.
19 Saul was told, "David is at Naioth in Ramah." Sango ekomaki epai ya Saulo : « Davidi azali na Nayoti ya Rama. »
20 Saul sent messengers to seize David. But seeing the band of prophets prophesying, with Samuel standing as their leader, the Spirit of our Father came on Saul's messengers, and they too prophesied. Saulo atindaki bato kokende kokanga Davidi. Kasi tango bamonaki lisanga ya basakoli kosakola mpe Samuele atelemi wana lokola mokambi na bango, Molimo na Nzambe akitelaki bato oyo Saulo atindaki, mpe bakomaki bango mpe kosakola.
21 Saul was told; he sent other messengers, and they too prophesied. Saul again sent messengers, a third time, and they also prophesied. Sango ekomaki epai ya Saulo, mpe ye atindaki bato mosusu ; kasi bango mpe basakolaki. Saulo atindaki bato mosusu na mbala ya misato, kasi bango mpe basakolaki.
22 Finally Saul himself went to Ramah, reaching the great well at Secu. He asked, "Where are Samuel and David?" "At Naioth in Ramah," someone said. Sima, ye moko Saulo akendeki na Rama mpe akomaki na libulu monene ya mayi, na Seku. Atunaki : — Samuele mpe Davidi bazali wapi ? Bazongiselaki ye : — Bazali na Nayoti ya Rama.
23 He went to Naioth in Ramah, but the Spirit of our Father came upon him too, and he walked along, prophesying, until he reached Naioth in Ramah. Boye Saulo akendeki na Nayoti ya Rama. Kasi ye mpe, wana azalaki kokoba nzela na ye, Molimo na Nzambe akitelaki ye, mpe akomaki kosakola kino akomaki na Nayoti ya Rama.
24 He too stripped off his clothes, prophesied before Samuel, and lay naked all that day and night. So people say, "Is Saul also among the prophets?" Ye mpe alongolaki bilamba na ye mpe asakolaki liboso ya Samuele ; akweyaki mpe atikalaki bolumbu mokolo yango mobimba mpe butu mobimba. Yango wana bato batunaka : « Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]