Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When David finished speaking with Saul, Jonathan's soul was tied to David's, and Jonathan loved him as his own soul. Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko.
2 From that day Saul kept David with him, not letting him return to his father's house. Kobanda mokolo wana, Saulo avandisaki Davidi kati na ndako na ye mpe atikaki ye te kozonga na ndako ya tata na ye.
3 Then Jonathan made a covenant with David, because he loved him as his own soul. Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.
4 Jonathan took off his robe and gave it to David, along with his tunic, sword, bow, and belt. Jonatan alongolaki kazaka oyo azalaki kolata mpe apesaki yango na Davidi. Apesaki ye mpe bilamba na ye, mopanga na ye, mokaba na ye mpe eloko na ye oyo abetelaka tolotolo.
5 David succeeded everywhere Saul sent him, so Saul put him over the soldiers, pleasing all the people and Saul's servants too. Lokola Davidi azalaki penza kosala malamu mosala nyonso oyo Saulo azalaki kotinda ye na bisika nyonso, Saulo akomisaki ye mokonzi monene ya basoda. Bato nyonso elongo na basali ya Saulo bazalaki kosepela na ye.
6 As they returned, when David came back from killing the Philistine, women from every Israelite city came out to meet King Saul, singing, dancing, joyful, with tambourines and instruments. Sima na Davidi koboma moto ya Filisitia, tango basoda bazalaki kozonga wuta na bitumba, basi babimaki wuta na bingumba nyonso ya Isalaele mpo na kokende koyamba mokonzi Saulo, na banzembo ya esengo mpe na mabina, na milolo ya esengo, na bambunda mike mpe na bangonga.
7 As they celebrated, the women sang to each other: "Saul has struck down his thousands, David his ten thousands." Basi bazalaki kobina mpe koyemba boye : « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »
8 Saul burned with anger; this word was very unwelcome to him. He said, "They credit David ten thousands, me only thousands. What's left him but the kingdom?" Maloba ya banzembo yango epesaki Saulo kanda makasi. Amilobelaki : « Soki batangi motango ya nkoto zomi mpo na Davidi, mpe motango ya nkoto moko mpo na ngai, elingi koloba ete etikali na ye kaka kozwa bokonzi ! »
9 And from that day on Saul kept a jealous eye on David. Kobanda mokolo wana, Saulo akomaki kotala Davidi miso mabe.
10 Next day a harmful spirit from our Father rushed on Saul; he raved inside his house while David played the lyre, as he did day by day. Saul had his spear in his hand. Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko.
11 He hurled the spear, thinking, "I'll pin David to the wall." But David dodged him twice. Mbala moko, Saulo abwakaki likonga na ye na koloba : « Nakobamba Davidi na mir. » Kasi Davidi akimaki ye mbala mibale.
12 Saul was afraid of David, because our Father was with him but had departed from Saul. Saulo abangaki Davidi, pamba te Yawe azalaki elongo na Davidi kasi atikaki Saulo.
13 So Saul sent David away from his presence, made him commander of 1,000, and David led the people out to battle and back. Mpo na yango, Saulo alongolaki Davidi pembeni na ye mpe akomisaki ye mokonzi ya basoda nkoto moko. Boye Davidi akomaki kotambolisa basoda na bitumba na bango.
14 David had success in all his ways, for our Father was with him. Na nyonso oyo azalaki kosala, Davidi azalaki kolonga, pamba te Yawe azalaki elongo na ye.
15 When Saul saw how greatly David succeeded, he dreaded him. Tango Saulo amonaki ete Davidi azali kolonga mingi, abangaki ye.
16 But all Israel and Judah loved David, because he led them out to battle and back. Kasi Isalaele mobimba mpe Yuda mobimba bazalaki kolinga Davidi mpo ete azalaki kotambolisa bango na bitumba na bango.
17 Saul told David, "Here is my older daughter Merab. I'll give her to you as wife—only be brave for me and fight our Father's battles." For Saul thought, "My hand won't be against him; let the Philistines' hand be against him." Saulo alobaki na Davidi : — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »
18 David said to Saul, "Who am I, and what is my family, my father's family in Israel, that I'd become the king's son-in-law?" Davidi azongiselaki Saulo : — Ngai nazali nani, libota na ngai nde nini, etuka ya tata na ngai nde nini kati na Isalaele mpo ete nakoma bokilo ya mokonzi ?
19 But when Merab, Saul's daughter, was to be given to David, she was given to Adriel the Meholathite as wife. Boye, tango ngonga ya kobalisa Merabi, mwana mwasi ya Saulo, epai ya Davidi ekokaki, Saulo abalisaki ye epai ya Adriyeli, moto ya Meola.
20 Now Michal, Saul's daughter, loved David. When Saul heard this, it pleased him. Nzokande Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kolinga Davidi. Mpe tango bayebisaki Saulo likambo yango, asepelaki makasi.
21 Saul thought, "I'll give her to him as a trap, letting the Philistines' hand strike him." So Saul told David, "Today you have a second chance to be my son-in-law." Boye Saulo amilobelaki : « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. » Boye Saulo alobaki na Davidi : « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. »
22 Saul told his servants, "Tell David privately: 'The king likes you, and all his servants love you. Now become his son-in-law.'" Bongo Saulo apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Bosolola na Davidi na nkuku mpe boyebisa ye : ‹ Tala ndenge nini mokonzi azali kosepela na yo, mpe basali na ye nyonso balingi yo ! Koma na yo sik’oyo bokilo na ye ! › »
23 Saul's servants told David these words. David said, "Is becoming the king's son-in-law a small thing to you? I'm poor and unimportant." Basali ya Saulo bazongelaki maloba oyo epai ya Davidi, kasi Davidi alobaki : « Bokanisi ete kokoma bokilo ya mokonzi ezali likambo ya pete ? Kaka ngai oyo nazali mobola mpe moto pamba ! »
24 And Saul's servants told him, "This is what David said." Basali ya Saulo bayebisaki ye maloba ya Davidi.
25 Saul said, "Tell David: 'The king wants no bride-price, only one hundred Philistine foreskins—revenge on the king's enemies.'" He intended David to fall by Philistine hands. Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.
26 His servants told David this; he was delighted to become the king's son-in-law. Before the full time passed, Tango basali bayebisaki Davidi makambo yango, Davidi asepelaki kokoma bokilo ya mokonzi. Boye liboso ete tango oyo bakataki ekoka,
27 David and his men went out, killed 200 Philistines, and brought their foreskins to the king, counted in full to become his son-in-law. So Saul gave him his daughter Michal as wife. Davidi elongo na mampinga na ye babimaki mpe babomaki mibali nkama mibale kati na bato ya Filisitia. Davidi amemaki bangenga na bango, mpe batangaki motango na yango liboso ya mokonzi mpo ete Davidi akoma bokilo ya mokonzi. Boye Saulo apesaki na libala Mikali, mwana na ye ya mwasi, epai ya Davidi.
28 When Saul saw and knew our Father was with David, and that Michal his daughter loved him, Tango Saulo amonaki mpe asosolaki ete Yawe azali elongo na Davidi, mpe ete mwana na ye ya mwasi, Mikali, alingaka Davidi,
29 Saul feared David even more, and became David's enemy for the rest of his life. Saulo akomaki lisusu kobanga Davidi makasi, mpe akomaki monguna na ye na mikolo ya bomoi na ye, oyo etikalaki.
30 Philistine commanders kept coming out to battle, and each time David succeeded more than all Saul's officers, so his name became highly honored. Bakonzi ya basoda ya Filisitia bakobaki kobima mpo na kobunda ; mpe tango nyonso bazalaki kosala yango, Davidi azalaki kolonga, koleka bakonzi mosusu ya basoda ya Saulo. Boye kombo na ye ekendeki sango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]