1The Philistines gathered their forces for battle, assembling at Socoh in Judah and camping at Ephes-dammim, between Socoh and Azekah.OLCBBato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango mpo na bitumba, basanganaki na Soko ya Yuda mpe batongaki molako na bango na Efeze-Damimi, kati na Soko mpe Azeka.
2Saul and the men of Israel gathered, camped in the Valley of Elah, and drew up their battle line facing the Philistines.OLCBNa ngambo mosusu, Saulo mpe bato ya Isalaele basanganaki mpe batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Terebente ; batandamaki na milongo mpe babongamaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia.
3The Philistines stood on one hill, Israel on the hill opposite, the valley between them.OLCBBato ya Filisitia bazalaki na likolo ya ngomba na ngambo moko, mpe bato ya Isalaele, na likolo ya ngomba na ngambo mosusu ; kaka lubwaku nde ekabolaki bango.
4A champion named Goliath of Gath came out from the Philistine camp, standing about nine feet nine inches tall.OLCBElombe mobali moko oyo kombo na ye ezalaki « Goliati, » moto ya mboka Gati, abimaki wuta na molako ya bato ya Filisitia. Azalaki na bametele pene misato na molayi.
5On his head a bronze helmet; he wore scale armor weighing about 125 pounds.OLCBAlataki ekoti ya bronze na moto na ye mpe ebombelo ya tolo, oyo basala na bakilo pene tuku motoba ya bronze.
6Bronze guards covered his legs, and a bronze javelin hung between his shoulders.OLCBNa makolo na ye, alataki bitando ya bronze, mpe akangisaki likonga ya bronze na sima ya mokongo na ye.
7His spear's shaft was like a weaver's beam, its iron head weighed about fifteen pounds. His shield-bearer went ahead of him.OLCBMonene ya nzete ya likonga na ye ezalaki lokola libaya oyo basali bilamba basalelaka ; songe ya likonga yango ezalaki ya bakilo pene sambo. Moto oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki kotambola liboso na ye.
8He stood and shouted to Israel's ranks, "Why come out to line up for battle? Am I not a Philistine, and you Saul's servants? Choose a man and send him down to me.OLCBGoliati atelemaki mpe agangelaki mampinga ya Isalaele, alobaki : « Mpo na nini bobimi mpe bosali milongo mpo na bitumba ? Ngai nazali moto ya Filisitia te ? Mpe bino bozali basali ya Saulo te ? Bopona moto moko mpe botika ye koya kobundisa ngai.
9If he can fight and kill me, we'll be your servants; but if I overpower and kill him, you'll be our servants and serve us."OLCBSoki akokoka kolonga mpe koboma ngai, wana biso tokokoma bawumbu na bino. Nzokande soki ngai nalongi mpe nabomi ye, wana bino nde bokokoma bawumbu na biso mpe bokosalela biso. »
10Then the Philistine said, "I defy Israel's ranks today! Give me a man; let us fight."OLCBMoto ya Filisitia alobaki lisusu : « Na mokolo ya lelo, nazali kotiola mampinga ya Isalaele. Bopesa ngai moto moko mpo ete nabunda na ye. »
11When Saul and all Israel heard the Philistine's words, they were dismayed and terrified.OLCBTango bayokaki maloba ya moto ya Filisitia, Saulo mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na mawa mpe babangaki.
12David was the son of Jesse, an Ephrathite from Bethlehem in Judah who had eight sons. In Saul's day Jesse was old, advanced in years.OLCBDavidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi.
13Jesse's three oldest followed Saul to war: Eliab the firstborn, Abinadab the second, Shammah the third.OLCBBana mibali misato ya liboso ya Izayi balandaki Saulo na bitumba. Tala bakombo ya bana mibali yango misato oyo balandaki Saulo na bitumba : Eliabi, mwana mobali ya liboso ; Abinadabi, mwana mobali ya mibale ; mpe Shama, mwana mobali ya misato.
14David was the youngest. The three oldest had followed Saul,OLCBLokola Davidi azalaki leki, mpe wana bana mibali misato ya liboso balandaki Saulo,
15but David went back and forth from Saul to tend his father's sheep at Bethlehem.OLCBDavidi azalaki kokende mpe kozonga wuta na ndako ya Saulo mpo na koleisa bameme ya tata na ye na Beteleemi.
16For forty days the Philistine came forward every morning and evening and took his stand.OLCBMikolo tuku minei, moto ya Filisitia azalaki komilakisa, tongo mpe pokwa, liboso ya mampinga ya Isalaele.
17Jesse told his son David, "Take your brothers this large supply of roasted grain and these ten loaves, and hurry them to your brothers at the camp.OLCBIzayi alobaki na Davidi, mwana na ye ya mobali : « Zwela bandeko na yo ya mibali bambuma oyo ya ble bakalinga mpe mapa oyo zomi, mpe kende kotikela bango yango na lombangu na molako na bango.
18Take these ten cheeses to their unit commander. Check how your brothers are, and bring back news of them.OLCBMema lisusu ba-fromaje zomi oyo epai ya mokonzi ya limpinga ya basoda nkoto moko, limpinga oyo bango bazali. Tala soki bandeko na yo ya mibali bazali ndenge nini mpe zwa na maboko na bango elembo oyo ekolakisa ngai ete bazali malamu.
19Saul, David's brothers, and all the men of Israel were in the Valley of Elah, fighting the Philistines."OLCBBazali na lubwaku ya Terebente elongo na Saulo mpe mibali nyonso ya Isalaele mpo na kobundisa bato ya Filisitia. »
20At dawn David left the flock with a keeper, loaded up, and went as Jesse ordered. He reached the camp as the army marched to its battle line, shouting the war cry.OLCBNa tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko ; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye ; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba.
21Israel and the Philistines drew up their lines facing each other.OLCBBato ya Isalaele mpe bato ya Filisitia batandamaki mpe batalanaki ngambo na ngambo mpo na kobunda.
22David left his supplies with the supply keeper, ran to the battle line, and greeted his brothers.OLCBDavidi akitisaki mikumba na ye, apesaki yango na maboko ya mobateli mikumba, akimaki mbangu na esika ya bitumba mpe apesaki bandeko na ye ya mibali mbote.
23As he talked with them, Goliath the Philistine champion from Gath stepped out from the Philistine ranks and shouted his usual challenge, and David heard it.OLCBWana Davidi azali kosolola na bango, elombe mobali Goliati, moto ya Filisitia ya Gati, alongwaki na molongo ya mampinga na ye mpe azongelaki koloba ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Davidi azalaki koyoka ye.
24When the men of Israel saw the man, they all fled from him in great fear.OLCBKasi tango bato nyonso ya Isalaele bamonaki mobali yango, bakimaki liboso na ye na kobanga makasi.
25The men of Israel said, "Do you see this man who keeps coming out? He comes up to defy Israel. The king will give great wealth to whoever kills him, give him his daughter, and exempt his father's family from service in Israel."OLCBMoko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba : « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso ? Azali nde koya kotiola Isalaele ! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. »
26David asked the men beside him, "What does the man get who kills this Philistine and removes Israel's shame? For who is this uncircumcised Philistine, to defy the armies of the living Father?"OLCBDavidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye : — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele ? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi ?
27The people repeated to him what would be done for the man who killed him.OLCBLokola bato bazalaki kozongela kaka maloba moko, balobaki na ye : — Tala makambo oyo ekosalemela moto oyo akoboma ye.
28When Eliab, David's oldest brother, heard him speaking with the men, he flared with anger at David. "Why did you come down? Who did you leave those few sheep with in the wilderness? I know your pride and your evil heart—you came down just to watch the battle."OLCBTango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki : — Oyaki awa mpo na nini ? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe ? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.
29"What have I done now?" said David. "It was only a question."OLCBDavidi azongiselaki ye : — Nasali nini ? Nakoki kosolola lisusu te ?
30He turned to another and asked the same, and the people answered him as before.OLCBBongo Davidi abalukaki mpo na kosolola na moto mosusu mpe atunaki kaka likambo moko wana. Mpe bazongiselaki ye ndenge kaka moto ya liboso alobaki na ye.
31David's words were overheard and reported to Saul, who sent for him.OLCBMaloba ya Davidi epanzanaki na lombangu, mpe bayebisaki yango Saulo. Mpe sima na Saulo koyoka yango, abengisaki ye.
32David said to Saul, "Let no one's heart fail over him. Your servant will go fight this Philistine."OLCBDavidi alobaki na Saulo : — Tika ete moto moko te amilembisa nzoto likolo na moto oyo ya Filisitia. Mosali na yo akokende kobundisa ye.
33Saul said, "You can't fight this Philistine. You're just a boy, and he's been a warrior since his youth."OLCBKasi Saulo alobaki na Davidi : — Okoki te kokende kobundisa moto wana ya Filisitia ! Ozali mwana moke, nzokande ye azali mobundi ya bitumba wuta bolenge na ye.
34David told Saul, "Your servant tended his father's sheep. When a lion or bear came and carried off a sheep from the flock,OLCBDavidi azongiselaki Saulo : — Mosali na yo azalaki kobatela bameme ya tata na ye. Tango ngombolo to nkosi ezalaki koya kokamata meme moko kati na etonga,
35I chased it, struck it, and rescued the sheep from its mouth. When it turned on me, I grabbed its mane, struck it, and killed it.OLCBnazalaki kolanda mpe kobeta yango, nazalaki kokangola mpe kobotola meme na monoko ya tambwe to ya nkosi yango. Tango ezalaki kobalukela ngai, nazalaki kokanga yango, kobeta mpe koboma yango.
36Your servant killed both lion and bear; this uncircumcised Philistine will be like one of them, for he defied the armies of the living Father."OLCBLokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.
37David added, "Our Father, who saved me from the lion's paw and the bear's, will save me from this Philistine's hand." Saul said, "Go—may our Father be with you."OLCBYawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo. Saulo alobaki na Davidi : — Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo.
38Then Saul dressed David in his own armor. He put a bronze helmet on his head and dressed him in a coat of armor.OLCBBongo Saulo alatisaki Davidi bibundeli na ye moko : atiaki ye ekoti ya bronze na moto mpe alatisaki ye ebombelo ya tolo.
39David strapped the sword over the armor and tried to walk, but wasn't used to it. "I can't go in these," he told Saul, "I'm not used to them." So he took them off.OLCBNa likolo ya elamba ya ebende, Davidi atiaki lisusu, na mokaba na ye, mopanga ya Saulo ; mpe amekaki kotambola na yango, pamba te atikalaki nanu komesana na yango te. Davidi alobaki na Saulo : — Nakokoka te kotambola na biloko oyo nyonso, pamba te namesana na yango te ! Bongo Davidi alongolaki yango na nzoto na ye.
40He took his staff, chose five smooth stones from the streambed, put them in his shepherd's bag pouch, and with sling in hand approached the Philistine.OLCBAsimbaki kaka lingenda na ye na loboko, aponaki mabanga mitano ya moselu kati na moluka ya lubwaku mpe atiaki yango na libenga na ye ya mobateli bibwele ; asimbaki ebambelo mabanga na loboko mpe apusanaki epai ya moto ya Filisitia.
41Meanwhile the Philistine, with his shield-bearer ahead of him, kept coming closer to David.OLCBKaka na tango yango, moto ya Filisitia elongo na moto oyo amemelaki ye nguba bapusanaki pene ya Davidi ; moto oyo amemaki nguba nde azalaki liboso.
42The Philistine looked David over, saw he was just a boy—ruddy and handsome—and despised him.OLCBTango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye ; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko.
43He said to David, "Am I a dog, that you come at me with sticks?" The Philistine cursed David by his gods.OLCBMoto ya Filisitia alobaki na Davidi : — Boni, ngai nazali mbwa mpo ete oya kobundisa ngai na lingenda ? Bongo alakelaki Davidi mabe na nzela ya banzambe na ye.
44"Come here," he said, "and I'll give your flesh to the birds of the sky and beasts of the field."OLCBMoto ya Filisitia alobaki lisusu na Davidi : — Pusana awa, nakopesa mosuni na yo epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya zamba.
45David told the Philistine, "You come at me with sword, spear, and javelin, but I come at you in the name of the Father of heaven's armies, the Father of the ranks of Israel, whom you have defied.OLCBDavidi alobaki na moto ya Filisitia : — Ozali koya kobundisa ngai na mopanga, na likonga ya monene mpe na likonga ya moke. Kasi ngai nayei kobundisa yo na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya mampinga ya Isalaele, oyo yo ozali kotiola.
46Today our Father will hand you over to me, and I'll strike you down and cut off your head. This very day I'll give the Philistine army's corpses to the birds of the sky and the wild animals of the earth, and all the earth will know there is our Father in Israel.OLCBNa mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.
47Everyone gathered here will know our Father saves without sword or spear; the battle belongs to our Father, and he will give you all into our hands."OLCBBato nyonso oyo basangani awa bakoyeba ete ezali na mopanga te to na likonga ya monene te nde Yawe abikisaka. Pamba te bitumba ezali ya Yawe, mpe Ye akokaba bino na maboko na biso.
48As the Philistine moved to attack him, David ran quickly toward the battle line to meet him.OLCBWana moto ya Filisitia amibongisaki mpo na kokende kobundisa Davidi, Davidi akimaki mbangu na molongo ya liboso ya bitumba mpo na kokutana na moto ya Filisitia.
49David reached into his bag, took a stone, slung it, and struck the Philistine on the forehead. The stone sank into his forehead, and he fell facedown on the ground.OLCBDavidi akotisaki loboko na ye kati na libenga na ye, azwaki libanga moko mpe abambaki yango na nzela ya ebambelo na ye ya mabanga ; abetaki moto ya Filisitia na elongi. Libanga ekotaki kati na elongi ya moto ya Filisitia, mpe akweyaki elongi kino na mabele.
50So David overpowered the Philistine with a sling and a stone; with no sword in hand, he struck him down and killed him.OLCBBoye, Davidi alongaki moto ya Filisitia na nzela ya ebambelo mabanga na ye mpe na nzela ya libanga moko. Davidi abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye, azalaki ata na mopanga te na loboko na ye.
51David ran and stood over him. He took the Philistine's sword, drew it from its sheath, and killed him, cutting off his head with it. Seeing their hero dead, the Philistines fled.OLCBDavidi akimaki mbangu mpe atelemaki na likolo ya moto ya Filisitia, asimbaki mopanga ya moto ya Filisitia, abimisaki yango na ebombelo na yango, abomaki ye, mpe akataki moto na ye na nzela ya mopanga yango. Tango mampinga ya Filisitia bamonaki ete elombe na bango akufi, bakimaki.
52Then the men of Israel and Judah rose with a shout and chased the Philistines to Gath's entrance and Ekron's gates. Philistine dead lay along the Shaaraim road to Gath and Ekron.OLCBBato ya Isalaele mpe bato ya Yuda babimaki na mbala moko, bagangaki mpe balandaki bato ya Filisitia kino na ebandeli ya lubwaku mpe kino na bikuke ya Ekroni. Bibembe ya bato ya Filisitia etandamaki na nzela oyo ekenda na Shaarayimi kino na Gati mpe kino na Ekroni.
53When the Israelites returned from chasing the Philistines, they plundered their camp.OLCBTango bato ya Isalaele batikaki kolanda bato ya Filisitia, bazongaki mpo na kozwa na makasi biloko oyo ezalaki kati na molako ya bato ya Filisitia.
54David took the Philistine's head to Jerusalem and put Goliath's weapons in his own tent.OLCBDavidi azwaki moto ya moto ya Filisitia mpe amemaki yango na Yelusalemi ; bongo azwaki bibundeli ya moto ya Filisitia mpe atiaki yango kati na ndako na ye ya kapo.
55Watching David go out to meet the Philistine, Saul asked Abner, his army commander, "Whose son is this young man, Abner?" "As you live, my king, I don't know," Abner answered.OLCBTango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga : — Elenge mobali oyo azali mwana ya nani ? Abineri azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nayebi te.
56"Find out whose son this young man is," the king said.OLCBMokonzi alobaki : — Tuna mpo na koyeba soki elenge mobali oyo azali mwana ya nani ?
57When David returned from killing the Philistine, Abner took him and brought him before Saul, the Philistine's head in his hand.OLCBTango kaka Davidi azongaki sima na ye koboma moto ya Filisitia, Abineri azwaki ye mpe amemaki ye na liboso ya Saulo. Davidi asimbaki na loboko na ye moto ya moto ya Filisitia.
58"Whose son are you, young man?" Saul asked. David said, "The son of your servant Jesse of Bethlehem."OLCBSaulo atunaki Davidi : — Ozali mwana ya nani ? Elenge mobali Davidi azongisaki : — Nazali mwana ya mosali na yo, Izayi, moto ya Beteleemi.