Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father said to Samuel, "How long will you mourn for Saul, since I've rejected him as king over Israel? Fill your horn with oil; go, I'm sending you to Jesse of Bethlehem—I've chosen a king from his sons." Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.
2 Samuel said, "How can I go? If Saul hears of it, he will kill me." Our Father said, "Take a heifer with you and say, 'I've come to sacrifice to the Father.' Samuele alobaki : — Nakokende ndenge nini ? Soki Saulo ayoki bongo akoboma ngai. Yawe azongiselaki ye : — Kamata mwana ngombe ya mwasi elongo na yo mpe loba : « Nakeyi kobonzela Yawe mbeka. »
3 Invite Jesse to the sacrifice; I'll show you what to do. Anoint for me the one I name." Bongo tango okotumba mbeka, okobengisa Izayi ; mpe Ngai moko nakolakisa yo nini oyo osengeli kosala. Moto oyo nakolakisa yo, okopakola ye mafuta mpo na Ngai.
4 Samuel did as our Father said and went to Bethlehem. Its elders met him trembling and asked, "Do you come in peace?" Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye : — Boni, koya na yo ezali ya kimia ?
5 "In peace," he said. "I've come to sacrifice to our Father. Dedicate yourselves and come with me to the sacrifice." Then he dedicated Jesse and his sons and called them to the sacrifice. Samuele azongisaki : — Solo, koya na ngai ezali ya kimia. Nayei mpo na kobonzela Yawe mbeka. Bomibulisa mpe boya kotumba mbeka elongo na ngai. Bongo abulisaki Izayi elongo na bana na ye ya mibali mpe abengisaki bango na kotumba mbeka elongo na ye.
6 When they arrived, Samuel saw Eliab and thought, "Surely this is our Father's anointed!" Tango bakomaki, Samuele atalaki Eliabi mpe amilobelaki : « Solo, mopakolami na Yawe atelemi awa liboso na Ye. »
7 But our Father told Samuel, "Don't look at his appearance or height; I've rejected him. People don't see as I do—they look at the outside, but I, your Father, look at the heart." Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.
8 Then Jesse called Abinadab and had him pass before Samuel. But Samuel said, "Our Father hasn't chosen this one either." Bongo Izayi abengisaki Abinadabi mpe alekisaki ye liboso ya Samuele. Kasi Samuele alobaki : « Ezali ye te nde Yawe aponi. »
9 Next Jesse had Shammah step forward. But Samuel said, "Nor has our Father chosen this one." Izayi alekisaki lisusu Shama liboso ya Samuele, kasi Samuele alobaki : « Ezali ye te nde Yawe aponi. »
10 Jesse had seven sons pass before Samuel, but Samuel said, "Our Father has not chosen these." Izayi alekisaki liboso ya Samuele bana sambo na ye ya mibali. Kasi Samuele alobaki na ye : « Yawe aponi moko te kati na bango. »
11 Samuel asked Jesse, "Are all your sons here?" "The youngest remains, tending sheep," said Jesse. "Send for him," said Samuel. "We won't sit until he comes." Bongo Samuele atunaki Izayi : — Boni, bana na yo ya mibali bakoki bango nyonso ? Izayi azongisaki : — Te ! Ezali lisusu na moko oyo aleki bolenge, kasi azali koleisa bampate. Samuele alobaki : — Bengisa ye, pamba te tokovanda na mesa te soki akomi nanu te.
12 Jesse sent and brought him in—glowing with health, with beautiful eyes and handsome. Then our Father said, "Get up, anoint him; this is the one." Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko ; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele : « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. »
13 Samuel took the horn of oil and anointed him among his brothers, and from that day on the Spirit of our Father rushed on David in power. Then Samuel left for Ramah. Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.
14 The Spirit of our Father had left Saul, and a harmful spirit from our Father tormented him. Molimo na Yawe alongwaki na Saulo, mpe molimo mabe kowuta na Yawe etungisaki ye.
15 Saul's servants said to him, "Look, a harmful spirit from our Father is tormenting you. Basali ya Saulo bayebisaki ye : — Tala, molimo moko ya mabe ewuti na Yawe mpe ezali kotungisa yo.
16 Let our lord tell your servants here to find a skilled lyre player. When the harmful spirit from our Father comes on you, he'll play and you'll recover." Tika ete nkolo na biso atinda basali na ye, oyo bazali awa mpo ete balukela ye moto moko oyo ayebi kobeta lindanda. Wana molimo mabe oyo ewuti na Yawe ekoya kotungisa yo, ye akobeta lindanda na ye, mpe yo okoyoka nzoto malamu.
17 So Saul said to his servants, "Find me someone who plays well and bring him to me." Boye Saulo alobaki na basali na ye : — Bolukela ngai moto moko oyo ayebi kobeta lindanda malamu, mpe boya na ye epai na ngai.
18 A servant answered: "I've seen a son of Jesse of Bethlehem who plays well—brave, a warrior, well-spoken, handsome, and our Father is with him." Moko kati na basali na ye azongisaki : — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza ; Yawe mpe azalaka elongo na ye.
19 Saul sent messengers to Jesse, saying, "Send me David your son, who is with the sheep." Saulo atindaki bantoma epai ya Izayi mpo na koloba na ye : « Tindela ngai Davidi, mwana na yo ya mobali, oyo azali koleisa bampate. »
20 Jesse loaded a donkey with bread, a wineskin, and a young goat, and sent them to Saul with his son David. Izayi azwaki ane moko ; atiaki na likolo na yango mapa, mbeki moko ya vino mpe mwana ntaba, mpe atindaki yango epai ya Saulo elongo na Davidi, mwana na ye ya mobali.
21 David came to Saul and entered his service. Saul loved him greatly, and David became his armor-bearer. Davidi ayaki epai ya Saulo mpe akomaki kosala epai na ye. Saulo alingaki ye makasi, mpe Davidi akomaki komemela Saulo bibundeli.
22 Saul sent to Jesse: "Let David stay in my service, for he has found favor with me." Saulo atindaki maloba epai ya Izayi : « Nabondeli yo, tika ete Davidi akoba kosala epai na ngai, pamba te nazali kosepela na ye. »
23 Whenever the harmful spirit from our Father came on Saul, David played the lyre. Saul felt relief and better, and the evil spirit left him. Tango nyonso molimo mabe kowuta na Nzambe ezalaki koya kotungisa Saulo, Davidi azalaki kozwa lindanda na ye mpe kobeta yango. Mpe pema ya Saulo ezalaki kokita, azalaki koyoka nzoto malamu, mpe molimo mabe yango ezalaki kolongwa kati na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]