Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Hiram king of Tyre sent messengers to David, with cedar logs, masons, and carpenters, to build him a house. Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, bato oyo bapasolaka mabanga mpe basharipantie ; mpe batongelaki ye ndako.
2 David knew our Father had made him king over Israel, for his kingdom was raised high for the sake of his people Israel. Davidi asosolaki ete Yawe nde akomisaki ye mokonzi ya Isalaele mpe ete azalaki kotombola bokonzi na ye makasi mpo na Isalaele, bato na Ye.
3 And David took more wives in Jerusalem, and he fathered more sons and daughters. Davidi abalaki lisusu basi ebele kati na Yelusalemi mpe abotaki lisusu bana ebele ya mibali mpe ya basi.
4 These are the names of the children born to him in Jerusalem: Shammua, Shobab, Nathan, and Solomon, Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi : Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo,
5 Ibhar, Elishua, Elpelet, Yibari, Elishuwa, Elipeleti,
6 Nogah, Nepheg, Japhia, Noga, Nefegi, Yafia,
7 Elishama, Beeliada, and Eliphelet. Elishama, Beliada mpe Elifeleti.
8 When the Philistines heard David was anointed king over all Israel, all of them went up seeking David. David heard and went out to face them. Tango bato ya Filisitia bayokaki sango ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele mobimba, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, abimaki mpo na kokutana na bango.
9 Now the Philistines had come and raided the Valley of Rephaim. Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya bakitani ya Rafa.
10 David asked our Father, "Will I go up against the Philistines? Will you hand them over to me?" So our Father told him, "Go up, and I will hand them over to you." Davidi atunaki Nzambe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bango na maboko na yo.
11 They went up to Baal-perazim; David struck them there. David said, "Our Father broke through my enemies by my hand like a breaking flood." So they named that place Baal-perazim. Bato ya Filisitia bamataki na Bali-Peratsimi, mpe Davidi alongaki bango kuna. Bongo Davidi alobaki : « Na nzela ya loboko na ngai, Nzambe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. » Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi.
12 And the Philistines abandoned their gods there, and David gave orders, and they were burned. Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango, mpe Davidi apesaki mitindo ete batumba yango na moto.
13 Once more the Philistines raided the valley. Sima na mwa tango, bato ya Filisitia bayaki mpe bapanzanaki lisusu kati na lubwaku.
14 David asked our Father again, and our Father said, "Don't go up after them. Circle around them and come at them from opposite the balsam trees. Bongo Davidi atunaki lisusu Nzambe, mpe Nzambe azongiselaki ye : « Tango okobundisa bango, kolanda bango na sima te ; kasi tambola mopanzi, mosika na bango. Bongo tango okokoma epai bango bazali, bimela bango na liboso, liboso ya zamba ya banzete ya mirie.
15 When you hear marching sound in the balsam treetops, then go out to battle—for your Father has gone out ahead of you to strike the Philistine troops." Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya mirie, na tango wana nde okobima mbala moko mpo na kobunda ; pamba te ekolakisa ete Nzambe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »
16 David did as our Father commanded him, and they struck the Philistine army from Gibeon to Gezer. Davidi asalaki ndenge Nzambe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Gabaoni kino na Gezeri.
17 And David's fame spread throughout all the lands, and our Father made all the nations dread him. Kombo ya Davidi ekendeki sango na mokili mobimba mpe Yawe asalaki ete bikolo nyonso ebanga Davidi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]