Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David consulted with the commanders of thousands and of hundreds, with every leader. Davidi asangisaki bakonzi ya basoda, bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama elongo na bato mosusu ya lokumu.
2 David said to Israel's whole assembly, "If it seems good to you, and if it is from our Father, let us send word far and wide to our remaining brothers in all the lands of Israel, and with them the priests and Levites in their cities and pasturelands, to gather to us. Davidi alobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Soki bomoni yango malamu mpe soki yango ezali mokano na Yawe, Nzambe na biso, tika ete totinda sango epai ya bandeko na biso oyo batikali na bituka nyonso ya Isalaele mpe epai ya Banganga-Nzambe elongo na Balevi, kati na bingumba oyo bango bazali kovanda mpo ete baya kosangana na biso.
3 Let us bring the ark of our Father back to us, since we did not seek it in Saul's days." Tozongisa Sanduku ya Nzambe na biso epai na biso, pamba te tolandelaki yango te tango Saulo azalaki mokonzi. »
4 And the whole assembly agreed to do so, for it seemed right to all the people. Lisanga mobimba endimaki ete basala bongo, pamba te likambo yango emonanaki malamu na miso ya bato nyonso.
5 David gathered all Israel from Shihor of Egypt to Lebo-hamath, to bring the ark of our Father from Kiriath-jearim. Davidi asangisaki bana nyonso ya Isalaele longwa na moluka ya Ejipito kino na Lebo-Amati, mpo na kozongisa Sanduku ya Nzambe wuta na Kiriati-Yearimi.
6 David and all Israel went up to Baalah, Kiriath-jearim in Judah, to bring up from there the ark of our Father, seated above the cherubim, where his Name is proclaimed. Davidi elongo na basoda nyonso ya Isalaele bakendeki na Baala, na Kiriati-Yearimi oyo ezali kati na Yuda, mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo ya Yawe oyo avandaka kati na basheribe.
7 They carried the ark of our Father on a new cart from Abinadab's house; Uzza and Ahio drove it. Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi. Uza mpe Ayiyo nde bazalaki kotambolisa shario yango.
8 David and all Israel celebrated before our Father with all their strength—songs, lyres, harps, tambourines, cymbals, trumpets. Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela makasi na liboso ya Nzambe, na koyemba mpe na kobeta mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, manzanza mpe bakelelo.
9 When they came to Kidon's threshing floor, Uzza reached out to grab the ark, because the oxen stumbled. Tango bakomaki na etando ya Kidoni, Uza asembolaki loboko na ye mpo na kosimba Sanduku ya Nzambe, pamba te bangombe eselumukaki mpe elingaki kokweyisa Sanduku ya Nzambe.
10 Then our Father's anger burned against Uzza, and he struck him down for reaching out his hand to the ark; he died there before our Father. Yawe asilikelaki Uza makasi mpe abetaki ye mpo ete asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe. Boye, Uza akufaki kaka wana liboso ya Nzambe.
11 David was angry that our Father burst out against Uzza, so the place is called Perez-uzza to this day. Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza ; yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza. »
12 David feared our Father that day, saying, "How can I bring the ark of our Father to me?" Na mokolo wana, Davidi abangaki Nzambe mpe amitunaki : « Ndenge nini namema Sanduku ya Nzambe epai na ngai ? »
13 So David did not bring the ark to the city of David; he turned it aside to Obed-edom the Gittite's house. Boye, Davidi amemaki te Sanduku ya Nzambe epai na ye, kati na engumba ya Davidi ; kasi atiaki yango na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati.
14 The ark of our Father stayed with Obed-edom's household in his house three months, and our Father blessed Obed-edom's household and all he owned. Sanduku ya Nzambe evandaki sanza misato kati na ndako ya Obedi-Edomi, mpe Yawe apambolaki libota ya Obedi-Edomi mpe biloko na ye nyonso.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]