Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These are the men who came to David at Ziklag while he was still banned from Saul son of Kish's presence—mighty warriors who helped him in battle. Na tango oyo Davidi akimaki na Tsikilagi mpo na kobombama Saulo, mwana mobali ya Kishi, bato bayaki kosangana na ye. Bazalaki basoda ya mpiko oyo babongami mpo na kosalisa ye na bitumba.
2 Armed with bows, able to sling stones or shoot arrows with right hand or left—Benjaminites, Saul's relatives. Bazalaki kobunda na batolotolo mpe kosalela malamu loboko ya mwasi mpe ya mobali mpo na kobwaka mabanga mpe kobeta bambanzi ya batolotolo. Bazalaki bato ya ekolo moko na Saulo : ekolo ya Benjame.
3 Ahiezer the chief, then Joash, sons of Shemaah of Gibeah; Jeziel and Pelet, sons of Azmaveth; Beracah; Jehu of Anathoth; Tala bakombo na bango : Akiezeri, mokonzi na bango ; Joasi, mwana mibali ya Shemaa, moto ya Gibea ; Yezieli mpe Peleti, bana mibali ya Azimaveti ; Beraka ; Jewu, moto ya Anatoti ;
4-5 Ishmaiah of Gibeon, a mighty warrior among the thirty, commander over the thirty; Jeremiah, Jahaziel, Johanan, Jozabad of Gederah; Yishimaeya, moto ya Gabaoni, moko kati na lisanga ya basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi ya lisanga yango ; Jeremi, Yaazieli, Yoanani, Yozabadi, moto ya Gedera ;
6 Eluzai, Jerimoth, Bealiah, Shemariah, and Shephatiah the Haruphite; Elewuzayi, Yerimoti, Bealia, Shemaria, Shefatia, moto ya Arofi ;
7 Elkanah, Isshiah, Azarel, Joezer, and Jashobeam, the Korahites; Elikana, Yishiya, Azareeli, Yoezeri mpe Yashobeami : bango nyonso bazalaki bato ya libota ya Kore ;
8 and Joelah and Zebadiah, the sons of Jeroham of Gedor. Yoela mpe Zebadia, bana mibali ya Yeroami, moto ya Gedori.
9 Some Gadites defected to David at the wilderness stronghold—mighty warriors trained for battle, skilled with shield and spear, faces like lions, swift as gazelles on the mountains. Ndambo ya bato ya ekolo ya Gadi bakabwanaki na Saulo mpo na kokende epai ya Davidi, na ndako makasi ya esobe. Bazalaki basoda ya mpiko oyo bayebi kobunda malamu mpe kosalela malamu nguba mpe makonga. Bazalaki makasi lokola nkosi mpe mbangu lokola mboloko na ngomba.
10 Ezer was the chief, Obadiah second, Eliab third, Ezeri azalaki mokonzi na bango ; Abidiasi, mokonzi ya mibale ; Eliabi, mokonzi ya misato ;
11 Mishmannah fourth, Jeremiah fifth, Mishimana, mokonzi ya minei ; Jeremi, mokonzi ya mitano ;
12 Attai sixth, Eliel seventh, Atayi, mokonzi ya motoba ; Elieli, mokonzi ya sambo ;
13 Johanan eighth, Elzabad ninth, Yoanani, mokonzi ya mwambe ; Elizabadi, mokonzi ya libwa ;
14 Jeremiah tenth, Machbannai eleventh. Jeremi, mokonzi ya zomi ; mpe Makibanayi, mokonzi ya zomi na moko.
15 These Gadites were army commanders; the least matched 100, and the greatest 1,000. Bato oyo ya libota ya Gadi bazalaki bango nyonso bakonzi ya basoda. Mokonzi oyo azalaki na makasi moke akokaki kobunda na bato nkama moko, mpe oyo alekaki makasi akokaki kobunda na bato nkoto moko.
16 These were the men who crossed the Jordan in the first month, when it overflowed all its banks, and routed everyone in the valleys, east and west. Ezalaki bango nde bakatisaki mayi ya Yordani, na sanza ya liboso, tango mayi ya ebale etondaki makasi na bangambo nyonso, mpe bakimisaki bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mabwaku, ezala na ngambo ya este to ya weste.
17 Some of the men of Benjamin and Judah also came to David at the stronghold. Bato mosusu ya libota ya Benjame mpe ya Yuda bayaki lisusu kosangana na Davidi na ndako na ye ya makasi.
18 David went out to meet them and said to them, "If you have come to me in peace to help me, my heart will join with you; but if to betray me to my enemies, though my hands hold no violence, may the God of our fathers see it and judge you." Davidi abimaki mpo na kokutana na bango mpe alobaki : « Soki boyei epai na ngai na makanisi ya kimia mpo ete bosunga ngai, wana ngai mpe bino tokosala boyokani ; kasi soki boyei mpo na koteka ngai epai ya banguna na ngai wana maboko na ngai esali mabe te, tika ete Nzambe ya batata na biso azala motatoli mpe akata likambo ! »
19 Then the Spirit of our Father clothed Amasai, chief of the thirty, who said: "We are yours, David! We are with you, son of Jesse! Peace, peace to you, peace to your helpers, for your Father helps you." David received them, making them leaders of his raiders. Boye, Molimo na Nzambe akitelaki Amasayi, mokonzi ya lisanga ya basoda tuku misato, mpe alobaki : « Oh Davidi, tozali ya yo ! Tozali elongo na yo, oh mwana mobali ya Izayi ! Tika ete kimia ezala na yo, ezala na yo penza ; tika ete kimia ezala na moto oyo azali kosunga yo, pamba te Nzambe na yo azali kosunga yo. » Boye Davidi ayambaki bango mpe akomisaki bango bakonzi ya mampinga na ye.
20 Some from Manasseh defected to David when he marched with the Philistines against Saul. But David and his men gave the Philistines no help—after consulting, the Philistine rulers sent David away, saying, "He'll defect to his master Saul, costing us our heads." Ndambo ya bato ya Manase bakendeki kosala boyokani elongo na Davidi tango akendeki elongo na basoda ya Filisitia, mpo na kobundisa Saulo. Kasi Davidi elongo na bato na ye balongaki te kosunga bato ya Filisitia, pamba te sima na bakambi na bango koyokana, babenganaki Davidi mpe balobaki : « Davidi alingi kobomisa biso mpo ete azongisa boyokani na nkolo na ye Saulo ! »
21 Going to Ziklag, these from Manasseh defected to him: Adnah, Jozabad, Jediael, Michael, Jozabad, Elihu, Zillethai—commanders of Manasseh's thousands. Tango Davidi akendeki na Tsikilagi, tala bato ya ekolo ya Manase oyo bakendeki kosala boyokani elongo na ye : Adina, Yozabadi, Yediayeli, Mikaeli, Yozabadi, Eliwu mpe Tsilitai. Moko na moko kati na bango azalaki mokonzi ya bato nkoto moko kati na libota ya Manase.
22 They helped David against the raiders, for all were mighty warriors, and became commanders in his army. Basungaki makasi Davidi mpe mampinga na ye, pamba te bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko mpe bakomaki bakonzi ya basoda.
23 Day after day men came to help David, until he had an army as great as our Father's army. Mokolo na mokolo, bato bazalaki koya kosunga Davidi kino mampinga na ye ekomaki monene makasi lokola mampinga ya Nzambe.
24 These are the counts of men armed for battle who came to David at Hebron to turn Saul's kingdom over to him, just as our Father had said, Tala motango ya basoda oyo babongisami mpo na bitumba, mpe bayaki epai ya Davidi, na Ebron, mpo na kokweyisa bokonzi ya Saulo mpe kopesa yango epai ya Davidi ndenge Yawe alobaki :
25 from Judah, carrying shield and spear—6,800 armed for battle; Bato ya Yuda oyo bamemaka nguba mpe makonga : basoda nkoto motoba na nkama mwambe ;
26 from Simeon, mighty warriors ready for battle—7,100; bato ya libota ya Simeoni : basoda ya mpiko nkoto sambo na nkama moko ;
27 from Levi—4,600, bato ya libota ya Levi : basoda nkoto minei na nkama motoba ;
28 with Jehoiada, leader of the family of Aaron, and 3,700 with him, mpe lisusu Yeoyada, mokonzi ya libota ya Aron, elongo na basoda na ye nkoto misato na nkama sambo,
29 and Zadok, a brave young warrior, with twenty-two officers from his own family. mpe Tsadoki, elenge soda ya mpiko elongo na bakambi ya libota na ye tuku mibale na mibale ;
30 From Benjamin, Saul's relatives—3,000; most had still kept guard for Saul's house, kati na libota ya Benjame, bato ya libota ya Saulo : basoda nkoto misato, pamba te mingi kati na bango bandimaki kaka kosalela ndako ya Saulo ;
31 from Ephraim—20,800, mighty warriors, famous men in their own families; kati na libota ya Efrayimi : basoda ya mpiko nkoto tuku mibale na nkama mwambe oyo bakenda sango kati na mabota na bango ;
32 from the half-tribe of Manasseh—18,000, designated by name to come and make David king; kati na ndambo ya libota ya Manase : basoda ya mpiko nkoto zomi na mwambe oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokomisa Davidi mokonzi ;
33 from Issachar: 200 chiefs who understood the times, knew what Israel should do, with all their relatives at their command. kati na libota ya Isakari : bakambi nkama mibale bayaki elongo na bato oyo bango bazalaki kokamba kati na libota na bango ; bazalaki na mayele ya kososola tango mpo na kolakisa Isalaele lolenge ya kosala liboso ya makambo ;
34 From Zebulun: 50,000 seasoned troops, equipped for battle with every weapon, ready to help David wholeheartedly, kati na libota ya Zabuloni : basoda ya mpiko nkoto tuku mitano oyo bayebi kosalela bibundeli nyonso mpe babundaka na motema moko ;
35 from Naphtali—1,000 officers, and with them 37,000 men carrying shield and spear; kati na libota ya Nefitali : bakonzi ya basoda nkoto moko, elongo na basoda nkoto tuku misato na sambo oyo babundaka na nguba mpe makonga ;
36 from Dan—28,600 men ready for battle; kati na libota ya Dani : basoda oyo babongisama mpo na bitumba, nkoto tuku mibale na mwambe na nkama motoba ;
37 from Asher—40,000 seasoned troops ready for battle; kati na libota ya Aseri : basoda oyo babongisama mpo na bitumba, nkoto tuku minei ;
38 from east of the Jordan—Reuben, Gad, half the tribe of Manasseh—120,000, armed with every weapon of war. kati na mabota oyo ezalaki na este ya Yordani : libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ndambo ya libota ya Manase, basoda nkoto nkama moko na tuku mibale elongo na bibundeli nyonso ya bitumba.
39 All these were warriors in battle formation who came to Hebron wholeheartedly to make David king over all Israel; the rest of Israel too were of one mind to make David king. Basoda oyo nyonso bayaki na Ebron, na milongo ya bitumba mpe na motema moko mpo na kokomisa Davidi mokonzi na Isalaele mobimba. Bana ya Isalaele oyo batikalaki, bango mpe bazalaki na motema moko mpo na kokomisa Davidi mokonzi.
40 They stayed there three days with David, eating and drinking; their relatives had prepared food for them. Basalaki kuna mikolo misato elongo na Davidi ; bazalaki kolia mpe komela biloko oyo bandeko na bango babongiselaki bango.
41 Their neighbors as far as Issachar, Zebulun, and Naphtali brought food by donkey, camel, mule, and ox—flour, fig cakes, raisin cakes, wine, oil, cattle, and sheep in abundance, for there was joy in Israel. Ezala bato oyo bawutaki na libota ya Isakari, ya Zabuloni, ya Nefitali : bango mpe bamemaki bilei likolo ya ba-ane, bashamo, bamile mpe bangombe : farine, gato oyo basala na bambuma ya figi, gato oyo basala na bambuma ya vino ekawuka, masanga ya vino, mafuta, bangombe mpe bameme ebele, pamba te esengo ezalaki kati na Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]