Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then all Israel gathered to David at Hebron, saying, "Look, we are your bone and flesh. Bato nyonso ya Isalaele basanganaki na Ebron, epai ya Davidi mpe balobaki : « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko na yo.
2 Even before, while Saul was king, you led Israel out and back. Your Father told you, 'You will shepherd my people Israel; you will be ruler over my people Israel.'" Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
3 All Israel's elders came to the king at Hebron, and David made a covenant with them at Hebron before our Father. Then they anointed David king over Israel, as our Father had said through Samuel. Tango bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi, Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, kolanda Liloba na Yawe na nzela ya Samuele.
4 David and all Israel went to Jerusalem (that is, Jebus), where the Jebusites, its residents, lived. Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bakendeki kobundisa Yelusalemi oyo bazalaki kobenga « Yebusi. » Bato oyo bazalaki kovanda kuna bazali bato ya Yebusi.
5 Jebus's people told David, "You won't enter here." But David took the stronghold of Zion—the city of David. Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te ! » Kasi Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi.
6 David said, "Whoever strikes the Jebusites first becomes head and commander." Joab son of Zeruiah went up first and became head. Davidi alobaki na bato na ye : « Moto oyo akobundisa mpe akolonga bato ya Yebusi, akokoma mokonzi ya liboso ya basoda. » Joabi, mwana mobali ya Tseruya, atelemaki moto ya liboso mpo na kobundisa bato ya Yebusi mpe akomaki mokonzi ya liboso ya mampinga.
7 David then settled in the stronghold; that is why it was called the city of David. Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi ; yango wana babengaki yango « Engumba ya Davidi. »
8 He built the city all around, from the Millo to the encircling wall, while Joab restored the rest of the city. Mpe atongaki bandako zingazinga na yango, longwa na Milo kino na mir ya kati. Bongo Joabi abongisaki bisika oyo etikalaki kati na engumba.
9 And David became more and more powerful, for the Father of heaven's armies was with him. Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, azalaki elongo na ye.
10 These are the chiefs of David's mighty men, who gave him strong support in his kingdom, with all Israel, to make him king, by our Father's word concerning Israel. Tala bakombo ya bakonzi ya basoda ya mpiko ya Davidi oyo, elongo na Isalaele mobimba, basungaki ye mpo na kokomisa bokonzi na ye makasi, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele.
11 This is the list of David's mighty men: Jashobeam, a Hachmonite, head of the Three, used his spear to kill 300 men in a single encounter. Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi : Yashobeami, mwana mobali ya Akimoni, azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko ; abomaki na likonga bato nkama misato na etumba moko.
12 After him, Eleazar son of Dodo the Ahohite, one of the three mighty warriors. Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi : azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko ;
13 He was with David at Pas-dammim when Philistines gathered there for battle, in a field full of barley; the people fled from the Philistines, mpe azalaki elongo na Davidi, na engumba Pasi-Damini, tango bato ya Filisitia basanganaki mpo na bitumba, mpe basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango. Ezalaki kuna mpe na elanga moko etonda na bambuma ya orje.
14 but they stood their ground in the middle of the field, defended it, and struck down the Philistines; our Father saved them with a great victory. Kasi basoda ya Eleazari babombamaki kati na elanga, babundelaki yango mpe babomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.
15 Three of the thirty top warriors went down to David at the rock by Adullam's cave, while a Philistine unit camped in the Rephaim Valley. Kati na basoda tuku misato ya mpiko, misato bayaki epai ya Davidi, na libanga monene oyo ezalaki pene ya ebombamelo ya mabanga ya Adulami. Nzokande, basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya bakitani ya Rafa.
16 At that time David was in the stronghold, and a Philistine garrison was at Bethlehem. Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki kati na Beteleemi.
17 David craved water: "If only someone would get me a drink from Bethlehem's well by the gate!" Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki : « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela ? »
18 The three broke through the Philistine camp, drew water from Bethlehem's well by the gate, and brought it to David. But he wouldn't drink it—he poured it out to our Father. Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango ; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe.
19 He said, "May my Father forbid it! Should I drink the blood of men who put their lives at risk? They brought it by risking their lives." So he refused to drink it. These were the deeds of the three warriors. Davidi alobaki : « Tika ete Nzambe na ngai apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo ! Boni, namela penza mayi oyo ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende mpe batekaki milimo na bango mpo ete batoka yango ? » Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki.
20 Abishai the brother of Joab was chief of the Thirty. He used his spear to kill 300 men, and he made a name for himself among the Three. Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.
21 Most honored of the Thirty, he became their commander—yet not one of the Three. Kati na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya mibale, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.
22 Benaiah son of Jehoiada, a valiant man from Kabzeel, did great deeds: he struck down two of Moab's mightiest, and went down into a pit on a snowy day and killed a lion. Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya mboka Moabi ; mpe na mokolo moko ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
23 He also killed an Egyptian, a man of great size, about seven and a half feet tall, who had a spear like a weaver's beam. Benaiah went at him with a club, tore the spear from the Egyptian's hand, and killed him with his own spear. Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo azalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe asimbaki na loboko na ye likonga moko lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. Abundisaki moto ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.
24 These were Benaiah son of Jehoiada's deeds; he gained a name among the three mighty men. Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki ; ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko.
25 He was honored above the Thirty, but not among the Three. David put him in charge of his own guard. Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.
26 The mighty warriors were: Asahel the brother of Joab, Elhanan son of Dodo of Bethlehem, Basoda ya mpiko bazalaki : Asaeli, ndeko mobali ya Joabi ; Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi ;
27 Shammoth the Harorite, Helez the Pelonite, Shamoti, moto ya Arori ; Eletsi, moto ya Peloni ;
28 Ira son of Ikkesh of Tekoa, Abiezer of Anathoth, Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa ; Abiezeri, moto ya Anatoti ;
29 Sibbecai the Hushathite, Ilai the Ahohite, Sibekayi, moto ya Usha ; Ilayi, moto ya Aoyi ;
30 Maharai of Netophah, Heled son of Baanah of Netophah, Maarayi, moto ya Netofa ; Eledi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa ;
31 Ithai son of Ribai of Gibeah of the Benjaminites, Benaiah of Pirathon, Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame ; Benaya, moto ya Piratoni ;
32 Hurai of the brooks of Gaash, Abiel the Arbathite, Urayi, moto ya mabwaku ya Gashi ; Abieli, moto ya Beti-Ariba ;
33 Azmaveth of Baharum, Eliahba the Shaalbonite, Azimaveti, moto ya Baarumi ; Eliaba, moto ya Shaaliboni ;
34 the sons of Hashem the Gizonite, Jonathan son of Shagee the Hararite, Beni-Ashemi, moto ya Gizoni ; Jonatan, mwana mobali ya Shage, moto ya Arari ;
35 Ahiam son of Sachar the Hararite, Eliphal son of Ur, Ayami, mwana mobali ya Sakari, moto ya Arari ; Elifali, mwana mobali ya Uri ;
36 Hepher the Mecherathite, Ahijah the Pelonite, Eferi, moto ya Mekera ; Ayiya, moto ya Peloni ;
37 Hezro of Carmel, Naarai son of Ezbai, Etsiro, moto ya Karimeli ; Naarayi, mwana mobali ya Ezibayi ;
38 Joel the brother of Nathan, Mibhar son of Hagri, Joeli, ndeko mobali ya Natan ; Mibiari, mwana mobali ya Agiri ;
39 Zelek the Ammonite, Naharai of Beeroth, the armor-bearer of Joab son of Zeruiah, Tseleki, moto ya Amoni ; Naarayi, moto ya Beroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ;
40 Ira the Ithrite, Gareb the Ithrite, Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri ;
41 Uriah the Hittite, Zabad son of Ahlai, Iri, moto ya Iti ; Zabadi, mwana mobali ya Akilayi ;
42 Adina son of Shiza the Reubenite, a leader of the Reubenites, and thirty with him, Adina, mwana mobali ya Shiza ya ekolo ya Ribeni mpe mokambi ya mampinga tuku misato ya mpiko ;
43 Hanan son of Maacah, Joshaphat the Mithnite, Anani, mwana mobali ya Maaka ; Jozafati, moto ya Mitini ;
44 Uzzia the Ashterathite, Shama and Jeiel the sons of Hotham the Aroerite, Uzia, moto ya Ashitaroti ; Shama mpe Yeyeli, bana mibali ya Otami, moto ya Aroeri ;
45 Jediael son of Shimri, and Joha his brother, the Tizite, Yediayeli, mwana mobali ya Shimiri ; Yoa, ndeko na ye ya mobali, moto ya Tishi ;
46 Eliel the Mahavite, Jeribai and Joshaviah the sons of Elnaam, Ithmah the Moabite, Elieli, moto ya Maavimi ; Yeribayi mpe Yoshavia, bana mibali ya Elinaami ; Yitima, moto ya Moabi ;
47 Eliel, Obed, and Jaasiel the Mezobaite. Elieli, Obedi mpe Yaasieli, bato ya Metsobaya.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]