Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The Philistines fought Israel; Israel's men fled before them and fell slain on Mount Gilboa. Bato ya Filisitia babundisaki bana ya Isalaele. Bana ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.
2 Philistines pursued Saul and his sons, and struck down Jonathan, Abinadab, and Malchishua, sons of Saul. Nzokande, bato ya Filisitia batingamaki kolanda Saulo mpe bana na ye ya mibali, bongo babomaki Jonatan, Abinadabi mpe Maliki-Shuwa oyo bazalaki bana na ye.
3 The fighting grew fierce around Saul; the archers caught up with him and badly wounded him. Bitumba ekomaki lisusu makasi mpo na koluka bomoi ya Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki ye, Saulo alengaki na somo makasi wana asosolaki ete bakoboma ye.
4 Saul told his armor-bearer, "Draw your sword, run me through, or these uncircumcised men will come and abuse me." But he refused, afraid. So Saul took the sword himself and fell on it. Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kosakanela ngai. » Kasi soda yango abangaki mpe aboyaki koboma ye ; bongo ye moko Saulo azwaki mopanga mpe amibwakaki na likolo na yango.
5 When his armor-bearer saw that Saul was dead, he too fell on his sword and died. Tango soda yango amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga mpe akufaki.
6 So Saul died, and his three sons, and all his household died together. Ezalaki bongo nde Saulo, bana na ye misato ya mibali mpe libota na ye mobimba bakufaki elongo.
7 When the Israelites in the valley saw the army had fled and Saul and his sons were dead, they abandoned their towns and fled. The Philistines came and settled in them. Tango bana nyonso ya Isalaele, oyo bazalaki kovanda na lubwaku, bamonaki ete mampinga esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.
8 Next day, Philistines came to strip the dead and found Saul and his sons fallen on Mount Gilboa. Mokolo oyo elandaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.
9 They stripped him, took his head and armor, and sent messengers throughout Philistine land to proclaim it to their idols and the people. Bazwaki biloko na ye, bamemaki moto na ye elongo na bibundeli na ye, mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga epai ya banzambe na bango ya bikeko mpe epai ya bato na bango.
10 They put his weapons in their gods' temple and nailed his head in Dagon's temple. Batiaki bibundeli na ye na tempelo ya banzambe na bango mpe badiembikaki mokuwa ya moto na ye kati na tempelo ya Dagoni.
11 But when all the people of Jabesh-gilead heard everything the Philistines had done to Saul, Tango bavandi nyonso ya Yabeshi kati na Galadi bayokaki makambo nyonso oyo bato ya Filisitia basalaki Saulo,
12 all their fighting men set out, took Saul's body and his sons' bodies, brought them to Jabesh, buried their bones under Jabesh's oak, and fasted seven days. bilombe na bango nyonso batelemaki, bakendeki kozwa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali ; mpe bamemaki yango na Yabeshi. Sima na bango kokunda mikuwa na bango na Yabeshi, na se ya nzete ya terebente, bakilaki bilei mikolo sambo.
13 So Saul died for his unfaithfulness against our Father—he did not keep our Father's word, and even consulted a medium for guidance. Saulo akufaki mpo ete atosaki Yawe te, abatelaki Liloba na Yawe te mpe akendeki kotuna makambo epai ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi, na esika ya kotuna makambo epai na Yawe.
14 He did not seek our Father, so our Father killed him and turned the kingdom over to David son of Jesse. Boye Yawe abomaki ye mpe apesaki bokonzi epai ya Davidi, mwana mobali ya Izayi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]