Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 All Israel was registered by genealogy, recorded in the Book of the Kings of Israel. And Judah was exiled to Babylon for their unfaithfulness. Batangaki bana nyonso ya Isalaele mpe bakomaki bakombo na bango na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. Bato ya Yuda bakendeki na bowumbu na Babiloni mpo na kozanga boyengebene.
2 The first to resettle their own property in their cities were Israel, the priests, the Levites, and the temple servants. Bato ya liboso kati na bana ya Isalaele oyo bazongaki lisusu kovanda na bingumba na bango, ezalaki : ndambo ya bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe basali ya Tempelo ya Yawe.
3 And in Jerusalem lived some of the people of Judah, of Benjamin, and of Ephraim and Manasseh: Nzokande, ndambo ya bana mibali ya Yuda, ya Benjame, ya Efrayimi mpe ya Manase bazalaki kovanda na Yelusalemi :
4 Uthai son of Ammihud son of Omri son of Imri son of Bani, of the sons of Perez son of Judah. Utayi, mwana mobali ya Amiwudi, mwana mobali ya Omiri, mwana mobali ya Imiri, mwana mobali ya Bani, moko kati na bakitani ya Peretsi, mwana mobali ya Yuda.
5 And of the Shilonites: Asaiah the firstborn, and his sons. Kati na bato ya Shiloni : Asaya, mwana ya liboso, mpe bana na ye ya mibali.
6 From Zerah's sons: Jeuel and their relatives, 690. Kati na bakitani ya Zera : Yeuweli. Mpe bandeko na bango bazalaki nkama motoba na tuku libwa.
7 And of Benjamin's sons: Sallu son of Meshullam, son of Hodaviah, son of Hassenuah, Kati na bakitani ya Benjame : Salu, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Odavia, mwana mobali ya Asenuwa ;
8 Ibneiah son of Jeroham; Elah son of Uzzi son of Michri; Meshullam son of Shephatiah son of Reuel son of Ibnijah, Yibinea, mwana mobali ya Yeroami ; Ela, mwana mobali ya Uzi mpe koko ya Mikiri ; mpe Meshulami, mwana mobali ya Shefatia mpe koko ya Reweli, mwana mobali ya Yibiniya.
9 and their relatives, listed by family line, 956. All these were heads of their ancestral families. Motango ya bato ya Benjame kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango, ezalaki nkama libwa na tuku mitano na motoba. Bato oyo nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango.
10 And of the priests: Jedaiah, Jehoiarib, Jachin, Kati na Banganga-Nzambe : Yedaeya, Yeoyaribi, Yakini ;
11 and Azariah son of Hilkiah, son of Meshullam, son of Zadok, son of Meraioth, son of Ahitub, chief officer of our Father's house. Azaria, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi oyo azalaki mokambi ya Ndako ya Nzambe.
12 Adaiah son of Jeroham, of Pashhur, of Malchijah; and Maasai son of Adiel, of Jahzerah, of Meshullam, of Meshillemith, of Immer; Ezalaki mpe na Adaya, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Pashuri, mwana mobali ya Malikiya ; mpe Maesayi, mwana mobali ya Adieli, mwana mobali ya Yazera, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Meshilemiti, mwana mobali ya Imeri.
13 and their relatives—heads of their families—1,760, capable men for serving in the house of our Father. Banganga-Nzambe oyo bazalaki bakambi ya bituka, bazalaki nkoto moko na nkama sambo na tuku motoba ; bazalaki na molende makasi mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe.
14 Of the Levites: Shemaiah son of Hasshub, son of Azrikam, son of Hashabiah, of the sons of Merari, Kati na Balevi : Shemaya, mwana mobali ya Ashubi, mwana mobali ya Azirikami, mwana mobali ya Ashabia, mokitani ya Merari ;
15 and Bakbakkar, Heresh, Galal, and Mattaniah son of Mica, son of Zichri, son of Asaph; mpe Bakibakari, Ereshi, Galali mpe Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zikiri, mwana mobali ya Azafi ;
16 and Obadiah son of Shemaiah, son of Galal, son of Jeduthun, and Berechiah son of Asa, son of Elkanah, who lived in the villages of the Netophathites. Abidiasi, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Galali, mwana mobali ya Yedutuni ; Berekia, mwana mobali ya Asa, mwana mobali ya Elikana oyo azalaki kovanda na mboka Netofa.
17 The gatekeepers: Shallum, Akkub, Talmon, Ahiman, and their relatives; Shallum was chief. Ezalaki mpe na bakengeli bikuke : Shalumi, Akubi, Talimoni, Ayimani mpe bandeko na bango ya mibali. Shalumi nde azalaki mokonzi na bango.
18 To this day they stand at the King's Gate, on the east side. These were the gatekeepers of the Levite camps. Kino lelo, bakitani ya Shalumi bakengelaka ekuke ya ngambo ya este ya Ndako ya Nzambe, ekuke oyo babengaka ekuke ya Mokonzi. Bango wana nde bakengeli bikuke kati na Balevi.
19 Shallum son of Kore, of Ebiasaph, of Korah, and his relatives of his father's house, the Korahites, oversaw the work of service, guarding the tent's thresholds; their fathers oversaw the camp of our Father, guarding the entrance. Shalumi, mwana mobali ya Kore, mwana mobali ya Ebiazafi, mwana mobali ya Kore elongo na bandeko na bango mosusu ya libota ya Kore, bazalaki na mokumba ya kokengela ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani ndenge bakoko na bango bazalaki kokengela ekuke ya molako ya Yawe.
20 Phinehas son of Eleazar was leader over them formerly; our Father was with him. Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, azalaki kala mokonzi na bango, bongo Yawe azalaki elongo na ye.
21 Zechariah the son of Meshelemiah was gatekeeper at the entrance of the tent of meeting. Zakari, mwana mobali ya Meshelemia, azalaki mpe mokengeli ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
22 All of them, chosen as gatekeepers of the gates, numbered 212, registered by genealogy in their villages. David and Samuel the seer had appointed them to this trusted office. Bango nyonso oyo baponamaki mpo ete bazala bakengeli bikuke bazalaki nkama mibale na zomi na mibale. Bakomaki bakombo na bango na buku ya mabota kolanda bamboka na bango. Ezali Davidi mpe Samuele oyo azalaki momoni makambo nde batiaki bango na misala na bango.
23 They and their sons guarded the gates of the house of our Father, the house of the tent, as guards. Boye, bango elongo na bana na bango bazalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe ; elingi koloba bikuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
24 The gatekeepers were posted on the four sides: east, west, north, and south. Bakengeli bikuke bazalaki na bangambo minei : este, weste, nor mpe sude.
25 Their relatives in their villages were to come every seven days, from time to time, to be with them. Bandeko na bango ya mibali oyo bazalaki na bamboka na bango, basengelaki koyaka tango na tango kosunga bango mikolo sambo.
26 The four chief gatekeepers, Levites, were entrusted with the chambers and treasuries of the house of our Father. Kasi bakonzi minei ya bakengeli bikuke bazalaki Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kokengela bashambre mpe bomengo ya Ndako ya Nzambe.
27 They stayed the night around our Father's house, since the guard duty was theirs, and the opening, morning by morning. Bazalaki kolekisa butu na zingazinga ya Ndako ya Nzambe mpo ete basengelaki kokengela yango mpe kofungola yango tongo nyonso.
28 Some were in charge of the service vessels, counting them in and out. Bamoko kati na bango bazalaki na mokumba ya kobatela bisalelo ya losambo mpe kotanga yango tango nyonso bazalaki kokotisa to kobimisa yango.
29 Others were in charge of the furnishings, sacred utensils, fine flour, wine, oil, incense, and spices. Bamosusu kati na bango bazalaki na mokumba ya kobatela bambeki mpe bisalelo nyonso ya Esika ya bule : farine, vino, mafuta, ansa mpe malasi.
30 And some of the priests' sons blended the spices. Kasi bana mibali ya Banganga-Nzambe bazalaki kosala malasi.
31 Mattithiah, one of the Levites, firstborn of Shallum the Korahite, was in charge of baking the flat cakes. Moto moko kati na Balevi, Matitia, mwana mobali ya liboso ya Shalumi, moto ya Kore, azalaki na mokumba ya kotumba mapa na kikalungu.
32 Some Kohathite relatives were responsible for preparing the rows of bread every Sabbath. Bamosusu kati na bango, bato ya Keati, bazalaki na mokumba ya kobongisa mapa na milongo mpo na basaba nyonso.
33 These singers, heads of Levite families, stayed in the temple chambers, exempt from other duties—on duty day and night. Bayembi oyo bazalaki bakambi ya libota ya Levi, bazalaki tango nyonso kovanda na bashambre ya Ndako ya Nzambe. Bazalaki kosala mosala mosusu te kaka kosala kati na Ndako ya Nzambe butu mpe moyi.
34 These were heads of Levite families, leaders listed by family line; and they lived in Jerusalem. Bango nyonso wana bazalaki bakambi ya libota ya Levi kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango ; mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.
35 In Gibeon lived Jeiel the father of Gibeon, and the name of his wife was Maacah, Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni elongo na Maaka, mwasi na ye.
36 and his firstborn son was Abdon, then Zur, Kish, Baal, Ner, Nadab, Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso ; mpe sima, abotaki lisusu Tsuri, Kishi, Bala, Neri, Nadabi,
37 Gedor, Ahio, Zechariah, and Mikloth. Gedori, Ayiyo, Zakari mpe Mikiloti.
38 Mikloth fathered Shimeam; they too lived with their relatives in Jerusalem, opposite their relatives. Mikiloti abotaki Shimeami. Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na bandeko na bango ya mibali.
39 And Ner fathered Kish, Kish fathered Saul, and Saul fathered Jonathan, Malchi-shua, Abinadab, and Esh-baal. Neri abotaki Kishi ; Kishi abotaki Saulo ; Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala.
40 And the son of Jonathan was Merib-baal, and Merib-baal fathered Micah. Jonatan abotaki mwana mobali, Meriba-Bala. Meriba-Bala abotaki Mishe.
41 The sons of Micah: Pithon, Melech, Tahrea, and Ahaz. Bana mibali ya Mishe : Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi.
42 And Ahaz fathered Jarah, and Jarah fathered Alemeth, Azmaveth, and Zimri; and Zimri fathered Moza. Akazi abotaki Yayera ; Yayera abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri ; Zimiri abotaki Motsa ;
43 And Moza fathered Binea, and Rephaiah was his son, Eleasah his son, and Azel his son. Motsa abotaki Bineya ; Bineya abotaki Refaya ; Refaya abotaki Eleasa ; Eleasa abotaki Atseli.
44 Azel had six sons, named Azrikam, Bocheru, Ishmael, Sheariah, Obadiah, and Hanan—these were Azel's sons. Atseli abotaki bana mibali motoba : Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani. Bango nde bazalaki bana mibali ya Atseli.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]