Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David built houses for himself in the city of David, prepared a place for the ark of our Father, and pitched a tent for it. Tango Davidi asilisaki kotonga bandako mpo na ye moko kati na engumba ya Davidi, abongisaki esika mpo na Sanduku ya Nzambe mpe atelemisaki ndako ya kapo mpo na yango.
2 Then David said, "No one but the Levites is to carry the ark of our Father, for our Father chose them to carry his ark and serve him forever." Davidi alobaki : « Moto moko te, longola kaka Balevi, akoki komema Sanduku ya Boyokani ya Nzambe, pamba te Yawe aponaki bango mpo na komema Sanduku na Ye mpe kosala mosala na Ye mpo na libela. »
3 David gathered all Israel at Jerusalem to bring the ark of our Father up to its prepared place. Davidi asangisaki kati na Yelusalemi bana nyonso ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Yawe na esika oyo abongisaki mpo na yango.
4 He gathered together the descendants of Aaron and the Levites: Davidi asangisaki lisusu bakitani ya Aron mpe Balevi :
5 from the sons of Kohath, Uriel the leader, with 120 of his relatives; Mpo na bakitani ya Keati : mokambi Urieli elongo na bandeko na ye ya libota nkama moko na tuku mibale ;
6 from the sons of Merari, Asaiah the leader, with 220 of his relatives; mpo na bakitani ya Merari : mokambi Asaya elongo na bandeko na ye ya libota nkama mibale na tuku mibale ;
7 from the sons of Gershom, Joel the leader, with 130 of his relatives; mpo na bakitani ya Gerishoni : mokambi Joeli elongo na bandeko na ye ya libota, nkama moko na tuku misato ;
8 from the sons of Elizaphan, Shemaiah the leader, with 200 of his relatives; mpo na bakitani ya Elitsafani : mokambi Shemaya elongo na bandeko na ye ya libota, nkama mibale ;
9 from the sons of Hebron, Eliel the leader, with eighty of his relatives; mpo na bakitani ya Ebron : mokambi Elieli elongo na bandeko na ye ya libota, tuku mwambe ;
10 from the sons of Uzziel, Amminadab the leader, with 112 of his relatives. mpo na bakitani ya Uzieli : mokambi Aminadabi elongo na bandeko na ye ya libota, nkama moko na zomi na mibale.
11 David called the priests Zadok and Abiathar, and the Levites Uriel, Asaiah, Joel, Shemaiah, Eliel, and Amminadab. Davidi abengaki Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari elongo na Balevi oyo : Urieli, Asaya, Joeli, Shemaya, Elieli mpe Aminadabi.
12 He said to them, "You are heads of the Levite families. Dedicate yourselves, you and your relatives, to bring up the ark of our Father to the place I have prepared for it. Alobaki na bango : « Bozali bakambi ya mabota ya Balevi, bino elongo na bandeko ya mabota na bino ; bomipetola mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na esika oyo nabongisi mpo na yango.
13 Because you did not carry it the first time, our Father broke out against us, since we did not seek him properly." Pamba te lokola bino Balevi bozalaki te na mbala ya liboso, yango wana Yawe, Nzambe na biso, asilikelaki biso makasi ; pamba te totunaki Ye te ndenge nini tokokaki komema yango kolanda mibeko. »
14 So the priests and the Levites consecrated themselves to bring up the ark of our Father. Boye, Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
15 The Levites carried our Father's ark on their shoulders with the poles, as Moses commanded, by the word of our Father. Bongo Balevi bamemaki na banzete Sanduku ya Nzambe na mapeka na bango ndenge kaka Moyize atindaki, kolanda Liloba na Yawe.
16 David told the Levite leaders to appoint their relatives as singers, raising joyful voices to lyres, harps, and cymbals. Davidi alobaki na bakambi ya Balevi ete bapona, kati na bandeko na bango, bayembi mpo na koyemba banzembo ya esengo, na bibetelo mindule : nzenze, lindanda mpe manzanza.
17 The Levites appointed Heman son of Joel; his relative Asaph son of Berechiah; and their relatives the Merarites, Ethan son of Kushaiah. Balevi baponaki Emani, mwana mobali ya Joeli ; Azafi, mwana mobali ya Berekia, kati na bandeko na ye ya mibali ; Etani, mwana mobali ya Kushaya, kati na bana ya Merari, na bandeko na ye ya mibali.
18 And with them, their relatives of second rank: Zechariah, Jaaziel, Shemiramoth, Jehiel, Unni, Eliab, Benaiah, Maaseiah, Mattithiah, Eliphelehu, Mikneiah, Obed-edom, and Jeiel, the gatekeepers. Mpe mpo na kosunga bango, baponaki Balevi mosusu : Zakari, Beni, Yazieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Benaya, Maaseya, Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli. Bango nyonso bazalaki bakengeli bikuke.
19 The singers Heman, Asaph, and Ethan were to sound the bronze cymbals; Babeti miziki : Emani, Azafi mpe Etani ; bango bazalaki kobeta manzanza oyo basala na bronze.
20 Zechariah, Aziel, Shemiramoth, Jehiel, Unni, Eliab, Maaseiah, and Benaiah were to play the harps according to Alamoth; Zakari, Azieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Maaseya mpe Benaya ; bango bazalaki kobeta nzenze na mongongo ya soprano.
21 and Mattithiah, Eliphelehu, Mikneiah, Obed-edom, Jeiel, and Azaziah were to lead with lyres according to the Sheminith. Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi, Yeyeli mpe Azazia ; bango bazalaki kobeta mandanda ya basinga mwambe mpo na kotambolisa banzembo.
22 Chenaniah, chief of the Levites, was in charge of the singing; he directed the music because he was skilled. Kenania, mokambi ya Balevi, aponamaki mpo na kotambolisa banzembo ; pamba te ayebaki mosala yango malamu.
23 Berechiah and Elkanah were to be gatekeepers for the ark. Berekia mpe Elikana, bazalaki bakengeli ya Sanduku ya Boyokani.
24 Shebaniah, Joshaphat, Nethanel, Amasai, Zechariah, Benaiah, and Eliezer, the priests, were to blow the trumpets before the ark of our Father; Obed-edom and Jehiah were gatekeepers for the ark. Banganga-Nzambe Shebania, Jozafati, Netaneeli, Amasayi, Zakari, Benaya mpe Eliezeri ; bazalaki kobeta kelelo liboso ya Sanduku ya Nzambe. Obedi-Edomi mpe Yeyiya bazalaki mpe bakengeli Sanduku ya Boyokani.
25 David, Israel's elders, and the commanders of thousands went to bring the ark of our Father's covenant up from Obed-edom's house with joy. Davidi, bakambi ya Isalaele mpe bakonzi ya basoda nkoto moko bakendeki kozwa na esengo Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na ndako ya Obedi-Edomi.
26 Because our Father helped the Levites carrying the ark of our Father's covenant, they sacrificed seven bulls and seven rams. Mpe mpo ete Yawe asunga Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, babonzaki lokola mbeka bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali.
27 David wore a fine linen robe, as did all the Levites carrying the ark, the singers, and Chenaniah, leader of the singing; David also had on a linen ephod. Davidi elongo na Balevi nyonso oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani, bayembi mpe Kenania, mokambi ya bayembi : bango nyonso balataki banzambala ya lino ya talo. Kasi Davidi abakisaki lisusu efode ya lino na likolo.
28 All Israel brought up the ark of our Father's covenant with shouts of joy, horn blasts, trumpets, and cymbals, sounding harps and lyres. Bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na kobeta milolo ya esengo, na kobeta maseke, bakelelo, manzanza, banzenze mpe mandanda.
29 As the ark of our Father's covenant entered the city of David, Michal daughter of Saul looked through the window. When she saw King David dancing and celebrating, she despised him in her heart. Tango Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina na esengo, ayinaki ye kati na motema na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]