Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Titus 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 But as for you, speak what is fitting for sound teaching. Kasi yo, teya makambo oyo ekoki na malakisi ya peto.
2 Older men are to be sober-minded, dignified, self-controlled, sound in faith, love, and patient endurance. Teya na batata mibange ete balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bazala bato oyo bakoki na lokumu, bato na mayele, bato na kondima ya solo, bato na bolingo, mpe bato na molende.
3 Older women likewise: deeply respectful in behavior, not slanderers, not enslaved to much wine, but teachers of what is good, Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu,
4 so that they may train the young women to love their husbands and to love their children, mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango,
5 self-controlled, pure, working at home, good, submissive to their own husbands, so our Father's word isn't insulted. komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.
6 Likewise urge the younger men to be self-controlled. Lendisa mpe bilenge mibali ete bamibatelaka malamu.
7 In everything be an example of good works, with integrity and dignity in your teaching, Na makambo nyonso, zala ndakisa na nzela ya misala malamu ; mpe na mateya na yo, lakisa bosembo, longola maseki,
8 healthy words beyond criticism, so any opponent is ashamed, with nothing bad to say about us. salela maloba ya kimia mpe ezanga pamela, mpo ete bato oyo batelemelaka yo bayoka soni mpe bazanga mabe ya koloba na tina na biso.
9 Slaves must submit to their own masters in everything, pleasing them, not talking back, Teya bawumbu ete batosaka bankolo na bango na makambo nyonso, basalaka makasi mpo na kosepelisa bango, babendanaka na bango te
10 not stealing, but showing complete, good faithfulness, so they adorn, in everything, the teaching of our Father, our Savior. mpe bayibaka te. Kasi teya bango ete bamilakisaka tango nyonso lokola bato oyo bankolo na bango bakoki kotiela mitema, mpo ete bakomisa malakisi ya Nzambe Mobikisi na biso elengi.
11 For the grace of our Father has appeared, bringing salvation to all people, Pamba te ngolu ya Nzambe emonisami lokola etima ya lobiko mpo na bato nyonso.
12 teaching us to reject wickedness and worldly desires, and live self-controlled, upright, and godly lives in this present age, Elakisaka biso kotika mabe, kokabwana na baposa ya makambo ya mokili, kobika tango oyo na bwanya, na bosembo mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe,
13 waiting for the blessed hope and glorious appearing of our great God and Savior, Jesus Christ, wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama : komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo
14 who gave himself for us to redeem us from all lawlessness and purify for himself a people of his own, eager for good works. amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
15 Declare these things; encourage and rebuke with all authority. Let no one disregard you. Yango nde makambo oyo osengeli koteya. Lendisa mpe pamela na bokonzi nyonso. Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola yo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]