Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Romans 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I commend to you our sister Phoebe, who is a servant of the church at Cenchreae, Natindeli bino Foebe, ndeko na biso ya mwasi, oyo azali mosali ya Lingomba ya Sankresi.
2 so that you may welcome her in the Lord as befits our Father's people, and help her with whatever she needs from you—she has supported many, myself included. Nazali kosenga na bino ete boyamba ye kati na Nkolo na lolenge oyo ebongi na basantu mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino, pamba te asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola.
3 Greet Prisca and Aquila, my fellow workers in Christ Jesus, Bopesa mbote na Prisika mpe Akilasi, baninga na ngai ya mosala kati na Yesu-Klisto.
4 who risked their own necks for my life—not only I thank them, but all the Gentile churches do too. Bandimaki ata kokufa mpo na ngai. Ngai moko kaka te nde nazali kotonda bango, kasi mpe Mangomba nyonso ya mikili ya Bapagano.
5 Greet also the church gathering in their home. Greet my dear Epaenetus, firstfruit of Asia for Christ. Bopesa mpe mbote na Lingomba oyo esanganaka na ndako na bango. Bopesa mbote na Epayineti, molingami na ngai, oyo azalaki moto ya liboso ya kondimela Klisto kati na mokili ya Azia.
6 Greet Mary, who has worked hard among you. Bopesa mbote na Mari oyo asalaki mosala makasi mpo na bino.
7 Greet Andronicus and Junia, my fellow Jews and fellow prisoners, notable among the apostles and in Christ before me. Bopesa mbote na Andronikusi mpe na Junia, bandeko na ngai mpe baninga na ngai ya boloko. Bazalaki bato ya lokumu kati na bantoma mpe bandimelaki Klisto liboso ete ngai nandimela.
8 Greet Ampliatus, my beloved in the Lord. Bopesa mbote na Ampiliatusi, molingami na ngai kati na Nkolo.
9 Greet Urbanus, our fellow worker in Christ, and my beloved Stachys. Bopesa mbote na Iribano, moninga na biso ya mosala kati na Klisto, mpe Sitakisi, molingami na ngai.
10 Greet Apelles, who is approved in Christ. Greet those who belong to the household of Aristobulus. Bopesa mbote na Apelesi oyo alakisaki penza ete azalaka ya Klisto. Bopesa mbote mpe na bavandi ya ndako ya Arisitobile.
11 Greet Herodion, my fellow Jew. Greet those in the household of Narcissus who are in the Lord. Bopesa mbote na Erodioni, ndeko na ngai. Bopesa mbote na bavandi ya ndako ya Narisise, oyo bazali kati na Nkolo.
12 Greet Tryphaena and Tryphosa, workers in the Lord. Greet my beloved Persis, who has worked hard in the Lord. Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Periside, mwasi molingami na ngai, oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo.
13 Greet Rufus, chosen in the Lord, and his mother and mine. Bopesa mbote na Rifisi, moponami kati na Nkolo. Bopesa mpe mbote na mama na ye, oyo azali mpe mama na ngai.
14 Greet Asyncritus, Phlegon, Hermes, Patrobas, Hermas, and the brothers and sisters who are with them. Bopesa mbote na Asenkrite, na Flegoni, na Erimesi, na Patrobasi, na Erimasi, mpe na bandeko nyonso oyo bazali na bango elongo.
15 Greet Philologus, Julia, Nereus and his sister, and Olympas, and all our Father's people with them. Bopesa mbote na Filologe, na Jili, na Nere mpe na Olipasi, ndeko na ye ya mwasi, elongo na basantu nyonso oyo bazali na bango elongo.
16 Greet one another with a holy kiss. All the churches of Christ greet you. Bopesanaka mbote bino na bino, na beze ya bule. Mangomba nyonso ya Klisto etindeli bino mbote.
17 Brothers and sisters, I urge you: watch for those causing division and obstacles, against the teaching you learned, and turn away from them. Bandeko, nabondeli bino : bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango.
18 For such people do not serve our Lord Christ but their own appetites, deceiving the unsuspecting's hearts with smooth talk and flattery. Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali.
19 Your obedience has reached everyone, so I rejoice over you; but I want you wise about what is good, innocent about what is evil. Pamba te bato nyonso bayebi botosi na bino, mpe motema na ngai etondaka mingi na esengo mpo na bino. Kasi nalingi ete bozala bato ya bwanya mpo na kosala bolamu, mpe bato oyo bazangi mbeba mpo na oyo etali mabe.
20 Our Father of peace will soon crush Satan under your feet; our Lord Jesus Christ's grace be with you. Etikali moke, Nzambe ya kimia akonyata-nyata Satana na se ya matambe na bino. Tika ete ngolu ya Yesu, Nkolo na biso, ezala na bino !
21 Timothy, my fellow worker, greets you; so do Lucius, Jason, and Sosipater, my fellow Jews. Timote, moninga na ngai ya mosala, elongo na Lusiusi, Jazoni mpe Sosipatere, oyo bazali bandeko na ngai, batindeli bino mbote.
22 I, Tertius, who wrote down this letter, greet you in the Lord. Ngai Teritiusi oyo nakomi mokanda oyo, napesi bino mbote kati na Nkolo.
23 Gaius, host to me and the whole church, greets you. Erastus, the city treasurer, and our brother Quartus also greet you. Gayusi, oyo ayambaki ngai mpe Lingomba mobimba kati na ndako na ye, apesi bino mpe mbote. Erasite, mobateli bomengo ya engumba, elongo na Karitisi, ndeko na biso, batindeli bino mbote. [
24 Not in this edition Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala na bino nyonso ! Amen.]
25 Now to him who can strengthen you—by my gospel and the proclamation of Jesus Christ, by the revealing of the mystery hidden for long ages past, Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu-Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe, oyo ebombama wuta kala,
26 but now revealed and made known through prophetic writings, by command of our eternal Father, to bring all nations to the obedience of faith, kasi sik’oyo emonisami mpe elakisami epai ya Bapagano na nzela ya makomi ya basakoli kolanda ndenge Nzambe ya seko na seko atindaki mpo ete bikolo nyonso ekoka kondimela Ye mpe kotosa Ye,
27 to our only wise Father, through Jesus Christ, be the glory forever! Amen. na Nzambe moko kaka ya bwanya, tika ete nkembo epesamela libela na libela na nzela ya Yesu-Klisto ! Amen !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]