Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Romans 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 We who are strong must carry the weaknesses of the weak, and not please ourselves. Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko.
2 Let each of us please his neighbor for his good, to build him up. Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye !
3 For even Christ did not please himself; as it is written, "Insults of those insulting you fell on me." Pamba te ezala Klisto, alukaki te komisepelisa Ye moko ; kasi alobaki, kolanda ndenge ekomama, « mafinga ya bato oyo bafingaki yo ekweyaki epai na ngai. »
4 Everything written before was written to teach us, so that through endurance and through Scripture's encouragement we might have hope. Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.
5 May our Father, who gives endurance and encouragement, give you harmony with each other, according to Christ Jesus, Tika ete Nzambe oyo apesaka bato molende mpe mpiko apesa bino makanisi moko, bamoko elongo na bamosusu, kolanda mokano ya Yesu-Klisto,
6 so that together, with one voice, you glorify our Father, the Father of our Lord Jesus Christ. mpo ete bopesa nkembo na Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na makanisi moko mpe na monoko moko.
7 Therefore welcome one another, as Christ also welcomed you, for the glory of our Father. Yango wana, boyambanaka, bamoko na bamosusu, ndenge Klisto ayambaki bino mpo na nkembo na Nzambe.
8 For I tell you Christ became a servant to the circumcised, to show our Father's truthfulness and confirm the promises to the ancestors, Pamba te nazali koloba na bino solo : Klisto akomaki Mosali ya Bayuda mpo na kokokisa bilaka oyo Nzambe apesaki epai ya bakoko na bango mpe kolakisa ete Nzambe azali Moyengebene.
9 and that the nations might glorify our Father for his mercy, as it is written, "Therefore I will praise you among the nations, and sing to your name." Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama : « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »
10 And again it says, "Rejoice, nations, with his people." Alobaki lisusu : « Bapagano, bosepela elongo na bato na Ye. »
11 And again, "Praise our Father, all you nations, and let all the peoples praise him." Mpe lisusu : « Bino bato ya bikolo nyonso, bokumisa Nkolo ! Tika ete bato ya mabota nyonso bakumisa Ye ! »
12 Again Isaiah says: "Jesse's root will come, rising to rule the nations; the nations will hope in him." Ezayi mpe alobaki : « Moto moko akobima wuta na libota ya Izayi, akotelema mpo na kokonza bikolo, mpe Bapagano bakotiela Ye elikya. »
13 May our Father, the source of hope, fill you with all joy and peace through faith, so by the Holy Spirit's power you overflow with hope. Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.
14 I'm convinced about you, my brothers and sisters, that you yourselves are full of goodness, filled with all knowledge, and able to instruct one another. Bandeko na ngai, nandimisami solo ete botondi na boboto, na boyebi nyonso mpe na makoki ya kolendisana, bamoko na bamosusu.
15 But I've written to you rather boldly on some points, reminding you, because of the grace our Father gave me, Nzokande, mpo na kolamusa makanisi na bino, nakomelaki bino, na molende nyonso, ndambo ya makambo kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai
16 to be Christ Jesus's minister to the nations, a priest of our Father's gospel, so the nations' offering would be acceptable, made holy by the Holy Spirit. ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.
17 In Christ Jesus, then, I have reason to boast of my work for our Father. Yango wana namikumisaka kati na Yesu-Klisto, na mosala oyo nasalaka mpo na Nzambe.
18 For I will not dare speak of anything except what Christ has done through me to bring the nations to obedience, by word and deed. Pamba te soki nakoki koloba, nakoloba kaka mpo na makambo oyo Klisto asalaki na nzela na ngai, mpo na komema Bapagano na kotosa Nzambe. Asalaki yango na nzela ya makambo oyo nalobaki mpe nasalaki
19 By the power of signs and wonders, by the power of the Spirit of our Father, I have fully proclaimed the gospel of Christ from Jerusalem all the way around to Illyricum. na nzela ya nguya Molimo na Nzambe, oyo emonisami kati na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, na bazingazinga nyonso kino na Iliri, nasakolaki Sango Malamu ya Klisto na mobimba na yango.
20 So I make it my aim to preach the gospel where Christ hasn't been named, so I wouldn't build on someone else's foundation, Pamba te nazwaki mokano ya koteya Sango Malamu na bisika oyo Kombo ya Klisto eyebanaki nanu te, mpo ete natonga na likolo ya moboko ya moto mosusu te,
21 but as it is written: "those never told about him will see, and those who haven't heard will understand." kasi kolanda ndenge ekomama : « Bato oyo babetela bango nanu lisolo te na tina na Ye bakomona, mpe ba-oyo bayoka nanu sango na Ye te bakososola. »
22 This is why I have so often been hindered from coming to you. Yango nde ezalaki mbala mingi kokanga ngai nzela ya koya epai na bino.
23 But now, with no more room to work in these regions, and having longed for many years to come to you, Kasi sik’oyo, nazali lisusu na esika te ya kosala mosala kati na etuka oyo ; bongo lokola wuta kala, nazalaka na posa makasi ya koya epai na bino,
24 I hope to see you in passing on my way to Spain, and have you send me on my way there, once I've enjoyed your company for a while. nazali kosala mabongisi ya kokokisa yango tango nakokende na Espane. Nazali na elikya ete, wana nakolekela epai na bino, nakomona bino mpe nakozwa lisungi na bino mpo na kokende kuna, sima na ngai kosepela kovanda elongo na bino ata na mwa tango moke.
25 But for now I am going to Jerusalem, bringing aid to our Father's people. Nzokande sik’oyo, nazali kokende na Yelusalemi mpo na komemela basantu lisungi.
26 Macedonia and Achaia gladly made a contribution for the poor among our Father's people in Jerusalem. Pamba te Mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi.
27 They were glad to do it, and indeed they owe it. For since the nations shared in Israel's spiritual blessings, the nations owe Jerusalem's people material support in return. Solo, bango moko nde bazwaki mokano ya kosala bongo mpo ete ezalaki lokola niongo epai na bango. Pamba te soki Bayuda bakabolaki makabo ya molimo elongo na bato ya bikolo ya bapaya, bango mpe basengeli kokabola biloko na bango elongo na Bayuda.
28 So after finishing this and safely delivering this collection to them, I'll leave for Spain through you. Soki nasilisi mosala oyo mpe napesi bango lisungi yango, nakolekela epai na bino tango nakokende na Espane.
29 I know that coming to you, I'll come with Christ's full blessing. Nayebi ete tango nakoya epai na bino, nakoya na mapamboli mingi ya Klisto.
30 Brothers and sisters, by our Lord Jesus Christ and the Spirit's love, I urge you to strive together with me in your prayers to our Father for me, Kasi nabondeli bino bandeko, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe ya bolingo ya Molimo : Bobundaka elongo na ngai kati na mabondeli oyo bosalaka epai ya Nzambe na tina na ngai
31 that I may be rescued from Judea's unbelievers, and my service for Jerusalem may please our Father's people, mpo ete nakangolama na maboko ya bato oyo bandimaka te kati na Yuda, mpe mpo ete basantu ya Yelusalemi bayamba malamu lisungi oyo nakomemela bango.
32 so that, by our Father's will, I may come to you with joy and rest together with you. Na bongo nde nakolonga kokoma epai na bino na esengo ; mpe soki Nzambe akolinga, nakopema mwa moke elongo na bino.
33 May our Father, the source of peace, be with you all. Amen. Tika ete Nzambe ya kimia azala elongo na bino nyonso ! Amen !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]