Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Romans 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now accept the one who is weak in faith, but not to argue about their opinions. Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.
2 One person has faith to eat anything, while the one who is weak eats only vegetables. Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda.
3 The eater must not look down on the non-eater, and the non-eater must not judge the eater, for our Father has accepted him. Moto oyo aliaka bilei nyonso asengeli te kotiola moto oyo aponaka bilei, mpe moto oyo aponaka bilei asengeli te kosambisa moto oyo aliaka bilei nyonso, pamba te Nzambe asila koyamba ye.
4 Who are you to judge another's servant? Before his own master he stands or falls; he will stand—the Lord can make him stand. Boni, ozali nani mpo na kosambisa mosali ya moto mosusu ? Atelema to akweya, ezali likambo ya nkolo na ye. Tembe ezali te, akotelema kaka, pamba te Nkolo na ye azali na makoki ya kotelemisa ye.
5 One judges a day above another; another, every day alike. Each must be fully convinced in his own mind. Moko akanisaka ete mokolo songolo ezali bule koleka mokolo pakala, mpe mosusu akanisaka ete mikolo nyonso ezali kaka ndenge moko : tika ete moto na moto kati na bango andimisama makasi na makanisi na ye.
6 Whoever observes the day observes it for the Lord. Whoever eats, eats for the Lord, since he thanks our Father; whoever abstains, abstains for the Lord, and thanks our Father. Moto oyo akesenisaka mikolo asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo. Moto oyo aliaka bilei nyonso asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe ; mpe moto oyo aponaka bilei asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe.
7 For none of us lives for himself, and none of us dies for himself. Moko te kati na biso abikaka bomoi mpo na ye moko, mpe moko te akufaka mpo na ye moko.
8 If we live, we live for the Lord; if we die, we die for the Lord. Living or dying, we belong to the Lord. Soki tozali kobika bomoi, tozali kobika yango mpo na Nkolo ; soki mpe tokufi, tokufi mpo na Nkolo. Yango wana, tobika bomoi to tokufa, tozali kaka bato ya Nkolo.
9 Christ died and lived again for this: to be Lord of both the dead and the living. Ezali mpo na yango nde Klisto akufaki mpe asekwaki, mpo ete azala Nkolo ya bakufi mpe ya bato ya bomoi.
10 But you—why do you judge your brother? Or you—why do you despise your brother? We'll all stand before our Father's judgment seat. Bongo yo, mpo na nini ozali kosambisa to kotiola ndeko na yo ? Biso nyonso tokotelema na esambiselo ya Nzambe mpo na kosamba.
11 For it's written: "As I live, says our Father, every knee bows to me, every tongue confesses to me." Pamba te ekomama : « Na Kombo na Ngai, » elobi Nkolo, « mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe. »
12 So then, each of us will give an account of himself to our Father. Boye, moko na moko kati na biso akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko.
13 So stop judging each other. Instead decide never to put a stumbling block or trap before your brother. Yango wana, totika kosambisana biso na biso. Nzokande, bosalela mayele na bino te mpo na kobetisa ndeko moko libaku to mpo na kokweyisa ye.
14 I know, persuaded in the Lord Jesus, that nothing is unclean in itself; but to one who thinks it unclean, it is unclean. Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.
15 If food hurts your brother, you're no longer walking in love. Don't destroy someone Christ died for with your food. Boye soki, likolo ya bilei, ozali koyokisa ndeko na yo motema pasi, wana ozali lisusu kotambola na bolingo te. Likolo ya bilei, kobungisa te ndeko na yo, oyo Klisto akufelaki.
16 So do not let what you regard as good be spoken of as evil. Yango wana, tika ete bolamu na bino etiolama te.
17 The kingdom of our Father isn't eating and drinking, but righteousness and peace and joy in the Holy Spirit. Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.
18 Whoever serves Christ in this way is pleasing to our Father and approved by people. Moto oyo asalelaka Klisto na lolenge oyo asepelisaka Nzambe, mpe bato bandimaka ye.
19 So then, let us pursue whatever brings peace and builds each other up. Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.
20 Don't destroy our Father's work over food. All things are clean, but eating that makes someone stumble is wrong. Kobebisa mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku.
21 Good is not eating meat, drinking wine, or anything that makes your brother stumble. Likambo oyo eleki malamu ezali : koboya kolia misuni, koboya komela vino, koboya kosala eloko nyonso oyo ekoki kobetisa ndeko na yo libaku.
22 Keep your faith to yourself before our Father. Blessed is the one who doesn't judge himself by what he approves. Boye, batela mpo na yo moko liboso ya Nzambe, kondima oyo ozali na yango. Esengo na moto oyo amikweyisaka te na nzela ya makambo oyo andimaka !
23 Whoever doubts is condemned if he eats, since not from faith; whatever isn't from faith is sin. Kasi moto oyo alie, wana motema na ye ezali kopamela ye, asili kokweyisama na miso ya Nzambe, pamba te asali te kolanda kondima na ye ; mpe nyonso oyo esalemaka te kolanda kondima ezali lisumu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]