Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Corinthians 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Paul, called as an apostle of Christ Jesus by our Father's will, and Sosthenes our brother, Polo oyo abengama mpo na kozala ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko mobali Sositeni ;
2 to the church of our Father in Corinth: those made holy in Christ Jesus, called to be holy, with all everywhere who call on the name of our Lord Jesus Christ—their Lord and ours. Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :
3 Grace to you and peace from our Father and the Lord Jesus Christ. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
4 I always thank my Father for you, because of the grace our Father gave you in Christ Jesus, Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto ;
5 for in him you were enriched in every way, in all speech and all knowledge, pamba te, kati na makambo nyonso, botondisamaki na bomengo kati na Klisto, na oyo nyonso etali maloba mpe na oyo etali boyebi,
6 even as the testimony about Christ was confirmed among you, kolanda ndenge Nzambe azali kokokisa kati na bino litatoli na biso na tina na Klisto.
7 so that you lack no gift while eagerly waiting for our Lord Jesus Christ's revealing, Boye, bozangi ata likabo moko te ya ngolu ya Nzambe, wana bozali kozela na posa makasi komonisama ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
8 who will also keep you steady to the end, blameless on our Lord Jesus Christ's day. Ezali Ye nde akolendisa mpe bino kino na suka, mpo ete bozala bato bazangi pamela na mokolo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
9 Our Father is faithful, the one through whom you were called into deep communion with his Son, Jesus Christ our Lord. Pamba te Nzambe oyo abengaki bino mpo ete bozala moko na Mwana na Ye, Yesu-Klisto, Nkolo na biso, azali Moyengebene.
10 Brothers and sisters, I urge you, by the name of our Lord Jesus Christ: all agree; let no divisions split you, but be united in one mind and one purpose. Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te ; bozala motema moko mpe makanisi moko.
11 For Chloe's people have informed me, my brothers and sisters, that there is quarreling among you. Pamba te, bandeko na ngai, bavandi ya ndako ya Kloe bayebisi ngai ete koswana ezali kati na bino.
12 So: each of you says, "I'm with Paul," "I'm with Apollos," "I'm with Cephas," "I'm with Christ." Tala makambo oyo nalingi koloba : Moko kati na bino azali koloba : « Ngai nazali moto ya Polo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Apolosi ; » mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Petelo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Klisto. »
13 Is Christ divided? Was Paul crucified for you? Or were you baptized in the name of Paul? Boni, Klisto azali ya kokabwana ? Ezali Polo nde babakaki na ekulusu mpo na bino ? Ezali na kombo ya Polo nde bozwaki libatisi ?
14 I thank our Father that I baptized none of you except Crispus and Gaius, Nazongisaka matondi epai ya Nzambe ete nabatisa moto ata moko te kati na bino, longola kaka Krispisi mpe Gayusi,
15 so that no one can say you were baptized in my name. mpo ete moko te aloba ete bobatisamaki na kombo na ngai.
16 I also baptized Stephanas's household; beyond that, I don't know if I baptized anyone else. Solo, nabatisaki mpe libota ya Stefanasi. Longola bato oyo nawuti kotanga, nayebi te soki nabatisa moto mosusu.
17 Christ did not send me to baptize but to preach the good news—not with words of human wisdom, so the cross of Christ is not emptied of its power. Pamba te Klisto atindaki ngai te kobatisa bato, kasi atindaki ngai kosakola Sango Malamu. Mpo na yango, nasengeli te kosalela bwanya mpe elobeli malamu ya bomoto, noki te ekulusu ya Klisto ezanga nguya na yango.
18 The message of the cross is foolishness to those who are perishing, but to us being saved it is our Father's power. Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki ;
19 For it is written: I will destroy the wisdom of the wise, and set aside the discerning's insight. kolanda ndenge ekomama : « Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya, mpe nakokomisa mayele ya bato ya mayele bozoba. »
20 Where is the wise one? Where is the scholar? Where is this age's debater? Has not our Father made the world's wisdom foolish? Wapi moto ya bwanya ? Wapi molakisi ya Mobeko ? Wapi moto ya mayele ya tango oyo ? Boni, Nzambe akomisa te bwanya ya mokili liboma ?
21 For since, in our Father's wisdom, the world did not know him through its own wisdom, he was pleased to save believers through the foolishness of what we preach. Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.
22 For Jews ask for signs and Greeks seek wisdom, Lokola mpe Bayuda bazali koluka bikamwa, mpe Bagreki, bwanya,
23 but we proclaim Christ crucified—a stumbling block to Jews and foolishness to Gentiles, biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu : ezali penza libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bapagano.
24 but to those called, both Jews and Greeks, Christ is the power of our Father and the wisdom of our Father. Nzokande, mpo na bato oyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nguya mpe bwanya ya Nzambe.
25 For the foolishness of our Father is wiser than men, and the weakness of our Father, stronger than men. Pamba te liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato.
26 Consider your calling, brothers and sisters: not many wise by human standards, not many powerful, not many nobly born. Bandeko, bokanisa nanu oyo bozalaki tango Nzambe abengaki bino : kati na bino, moke bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke bazalaki bato minene, mpe moke bawutaki na mabota ya lokumu !
27 But our Father chose the world's foolish to shame the wise, and our Father chose the world's weak to shame the strong, Kasi, kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni.
28 and the world's lowly, despised things our Father chose—things that are not—to nullify things that are, Nzambe aponaki biloko ezanga tina, biloko ya kotiola, biloko oyo ezalaka te, mpo na kokomisa pamba biloko oyo mokili epesaka tina,
29 so that no one may boast before our Father. mpo ete moto ata moko te amikumisa liboso ya Nzambe.
30 From him you are in Christ Jesus, who became our wisdom from our Father—our righteousness and holiness and redemption, Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,
31 so that, as it is written, "Let the one who boasts, boast in the Lord." mpo ete, kolanda ndenge ekomama, « Tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa kati na Nkolo ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]