Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Corinthians 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When I came to you, brothers and sisters, I didn't proclaim the testimony of our Father with fancy words or wisdom. Yango wana bandeko, tango ngai mpe nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalelaki te boyebi makasi ya koloba to ya bwanya.
2 For I resolved to know nothing among you except Jesus Christ, and him crucified. Pamba te, wana nazalaki elongo na bino, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te, longola kaka Yesu-Klisto mpe Yesu-Klisto oyo babakaki na ekulusu.
3 And I came to you in weakness, in fear, and with much trembling. Mpe tango nayaki epai na bino, nazalaki kati na bolembu, na kobanga mpe na kolenga.
4 My message and preaching relied not on persuasive words of wisdom, but on proof of the Holy Spirit and of power, Maloba mpe mateya na ngai ewutaki te na maloba ya bwanya ya bomoto mpo na kondimisa bino, kasi ewutaki na kotalisama ya Molimo mpe ya nguya,
5 so that your faith might not rest on human wisdom but on the power of our Father. mpo ete moboko ya kondima na bino ezala te bwanya ya bomoto, kasi ezala nde nguya ya Nzambe.
6 We do speak wisdom among the mature—not wisdom of this age, nor of this age's rulers, who are fading away. Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima ; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi.
7 No, we speak the wisdom of our Father, a hidden mystery our Father destined before time began, for our glory. Te ! Toteyaka nde mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili.
8 None of this age's rulers knew it; had they known, they would not have crucified the Lord of glory. Kati na bakonzi ya mokili oyo, moko te asosolaki yango ; pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu.
9 As it is written: "What no eye has seen, no ear heard, and no human heart conceived—these things our Father has prepared for those who love him." Kasi, kolanda ndenge ekomama : « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »
10 But our Father revealed them to us through the Spirit; for the Spirit searches all things, even our Father's depths. Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye ; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe.
11 Who knows a person's thoughts except their own spirit within them? So too, no one knows our Father's thoughts except our Father's Spirit. Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te ? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.
12 We received not the world's spirit, but the Spirit from our Father, so we might know what our Father freely gave us. Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.
13 We speak this, not in words human wisdom teaches but the Spirit teaches, explaining spiritual truths to spiritual people. Ezali biloko yango nde tolobelaka, na maloba ya bwanya ya bomoto te kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Boye, tolobelaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka.
14 The person without the Spirit does not accept what comes from the Spirit of our Father; it is foolish to him, and he cannot grasp it, because it takes spiritual discernment. Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.
15 The person who is spiritual discerns all things, but is himself subject to no one's judgment. Moto oyo atambolisamaka na Molimo asosolaka makambo nyonso ; kasi ye, bato basosolaka ye te, pamba te ekomama :
16 For "who has known our Father's mind, to instruct him?" But we have the mind of Christ. « Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli ? » Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]