Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Corinthians 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Brothers and sisters, I couldn't speak to you as people of the Spirit, but as people of the flesh—infants in Christ. Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola na bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola na bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola na bana mike kati na Klisto.
2 I gave you milk, not solid food, since you weren't yet ready. Even now you still aren't ready. Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi te, pamba te bolingaki te kokoka kolia yango. Ezala sik’oyo, bokokoka na bino mpe kaka te kolia yango,
3 You're still fleshly. Since jealousy and rivalry are among you, aren't you fleshly, living by human standards? pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto ? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ?
4 For when one says, "I follow Paul," and another, "I follow Apollos," aren't you acting like mere humans? Tango moko azali koloba : « Ngai nazali moto ya Polo, » mpe mosusu : « Ngai nazali moto ya Apolosi, » boni, bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ?
5 What then is Apollos? What is Paul? Servants through whom you believed, each as the Lord gave him. Boni, Apolosi azali nani ? Polo mpe azali nani ? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango.
6 I planted, Apollos watered, but our Father made it grow. Ngai nalonaki, Apolosi asopaki mayi, kasi Nzambe azalaki kokolisa.
7 So neither planter nor waterer is anything—only our Father, who makes it grow. Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina ; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina.
8 The planter and the waterer are one; each will get his own reward for his own labor. Moto oyo aloni mpe moto oyo asopi mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moko na moko akozwa lifuti na ye moko kolanda mosala na ye.
9 For we are our Father's fellow workers; you are his field, his building. Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe ; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe.
10 By the grace our Father gave me, I laid a foundation like a wise master builder, and another builds on it. Let each watch how he builds on it. Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.
11 For no one can lay any foundation other than the one already laid, which is Jesus Christ. Pamba te moko te akoki kotonga moboko mosusu, longola kaka oyo esili kotongama, oyo ezali Yesu-Klisto.
12 Now if anyone builds on the foundation with gold, silver, precious stones, wood, hay, or straw, Nzokande, soki moto asaleli wolo to palata to mabanga ya talo to mabaya to makasa to mpe matiti mpo na kotonga na likolo ya moboko yango,
13 each one's work will become clear, for the Day will reveal it, because fire exposes it, and that same fire will test what sort each one's work is. mokolo ya kosambisama ekomonisa mosala na ye polele ; pamba te ekozala mokolo ya moto, mpe moto ekomeka mosala ya moto na moto.
14 If the work that anyone has built survives, he will receive a reward. Soki mosala ya moto oyo atongaki na likolo ya moboko eziki te, motongi yango akozwa lifuti.
15 If anyone's work burns up, he'll suffer loss—yet be saved himself, but only as through fire. Kasi soki eziki, motongi akozwa eloko te. Ye moko kaka nde akobika, kasi ekozala lokola moto oyo asili kobika na likama ya moto.
16 Don't you know you are our Father's temple, and our Father's Spirit lives in you? Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe, mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino ?
17 If anyone destroys the temple of our Father, our Father will destroy him. For the temple of our Father is holy, and that temple is you. Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye ; pamba te Tempelo ya Nzambe ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango.
18 Let no one deceive himself. If anyone among you thinks he is wise in this age, let him become foolish, so he may become wise. Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya.
19 For this world's wisdom is foolishness to our Father. For Scripture says, "He traps the wise in their cunning," Pamba te bwanya ya mokili ezali bozoba na miso ya Nzambe. Kolanda ndenge ekomama : « Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango ; »
20 and again, "Our Father knows the thoughts of the wise, that they are futile." mpe lisusu : « Nkolo ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezali na tina te, »
21 So let no one boast about people. For all things are yours, yango wana tika ete moko te aluka lokumu kati na bato, pamba te nyonso ezali ya bino :
22 whether Paul or Apollos or Cephas, or world or life or death, or present or future—all are yours, ezala Polo, Apolosi, Petelo, mokili, bomoi, kufa, tango oyo tozali sik’oyo to tango oyo ezali koya. Nyonso ezali ya bino ;
23 and you are Christ's, and Christ is our Father's. kasi bino, bozali bato ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]