Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Revelation 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "To the angel of the church in Ephesus write: The one holding the seven stars in his right hand, walking among the seven golden lampstands, says this: Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo :
2 "I know your works, your labor, and your endurance, and that you cannot bear the wicked; you tested those calling themselves apostles but are not, and found them liars. Nayebi misala, pasi mpe molende na yo. Nayebi ete okoki te koyikela bato mabe mpiko ; nayebi lisusu ete omekaki bato oyo balobaka ete bazali bantoma, nzokande bazali na bango bantoma te, mpe omonaki penza ete bazali bakosi.
3 You have endured and borne up for my name, and have not grown weary. Nayebi malamu ete ozali na molende mpe oyokaki pasi makasi mpo na Kombo na Ngai, kasi olembaki te.
4 But I have this against you: you have abandoned the love you had at first. Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : obwaki bolingo na yo ya liboso.
5 So remember where you've fallen from; repent and do your first works. Otherwise I'm coming to you to remove your lampstand from its place—unless you repent. Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya ! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso ; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.
6 But you do have this: you hate the works of the Nicolaitans, which I also hate. Kasi ezali na likambo moko oyo nasepelaka na yango epai na yo : olingaka te misala ya bato ya lingomba ya Nikola, oyo Ngai mpe nalingaka te.
7 Whoever has an ear, let him hear what the Holy Spirit says to the churches. To the one who conquers I will give to eat from the tree of life in the paradise of our Father. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »
8 "To the angel of the church in Smyrna write: The first and the last, who died and lived again, says this: Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Simirne : « Tala maloba ya Ye oyo azali Ya liboso mpe Ya suka, Ye oyo akufaki mpe azali lisusu na bomoi :
9 "I know your suffering and poverty—yet you are rich—and slander from those claiming to be Jews but are not, Satan's synagogue. Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana.
10 Don't fear what you're about to suffer. The devil will throw some of you in prison to test you; you'll suffer ten days. Be faithful to death, and I'll give you the crown of life. Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.
11 Whoever has an ear, let him hear what the Holy Spirit tells the churches. Whoever conquers won't be hurt by the second death. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »
12 "To the angel of the church in Pergamum write: These are the words of him who has the sharp, two-edged sword: Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale :
13 "I know where you live—where Satan's throne is. Yet you hold to my name and never denied your faith in me, even when Antipas, my faithful witness, was killed among you, where Satan lives. Nayebi malamu esika oyo ovandaka. Ezali mpe kaka na esika yango nde Satana atie kiti na ye ya bokonzi. Okweyisaki te kondima na yo epai na Ngai, ezala na mikolo oyo babomaki Antipasi, motatoli na Ngai ya sembo, kati na engumba na bino epai wapi Satana avandaka.
14 But I have a few things against you: some there hold Balaam's teaching. He taught Balak to set a stumbling block before Israel, to eat food sacrificed to idols and commit sexual sin. Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.
15 So also you have some who hold the teaching of the Nicolaitans. Kati na Lingomba na yo, ozali mpe na bato oyo bakangama na mateya ya bato ya lingomba ya Nikola.
16 Repent, then. Otherwise I'll come to you soon and fight those who hold to it with the sword of my mouth. Boye, bongola motema na yo ! Soki te, nakoya kala mingi te epai na yo mpe nakobundisa bango na mopanga ya monoko na Ngai.
17 Anyone with an ear should hear what the Holy Spirit tells the churches. To the victor I will give hidden manna and a white stone inscribed with a new name that only its receiver knows. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »
18 "To the angel of the church in Thyatira write: The Son of our Father, whose eyes are like a flame of fire and feet like polished bronze, says: Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Tiyatire : « Tala maloba ya Mwana na Nzambe, Ye oyo miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela makasi, mpe makolo na Ye, lokola bronze ya motuya :
19 "I know your works—your love, faith, service, and endurance—and that your last works exceed the first. Nayebi misala, bolingo, kondima, etamboli mpe molende na yo ; nayebi mpe ete misala oyo ozali kosala sik’oyo ezali ebele koleka oyo osalaki liboso.
20 But I have this against you: you tolerate the woman Jezebel, who calls herself a prophet, teaching and misleading my servants into sexual sin and eating food sacrificed to idols. Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.
21 I gave her time to repent, but she won't repent of her sexual sin. Napesaki ye tango mpo ete abongola motema, kasi aboyi kaka kotika kindumba na ye.
22 I will throw her onto a sickbed, and those who commit adultery with her into great suffering, unless they turn from her deeds. Boye, nakobwaka ye na mbeto ya pasi makasi elongo na bato oyo basalaka kindumba elongo na ye. Kasi soki babongoli mitema mpe batiki kotambola kolanda mateya ya Jezabeli, nakobwaka bango te na mbeto ya pasi makasi.
23 And I will strike her children dead. Then all the churches will know I am he who searches mind and heart, and will repay each of you for your works. Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.
24 But to the rest of you in Thyatira who don't hold this teaching, who haven't learned Satan's so-called deep things: I lay no other burden on you. Kasi epai na bino oyo, kati na Tiyatire, bokangami te na mateya wana ya lokuta mpe boboyi koyekola mabombami ya mozindo ya Satana, kolanda ndenge babengaka yango, nazali koloba : ‹ Nakomemisa bino te mokumba mosusu na makasi ;
25 Only hold fast to what you have until I come. kasi, oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya. ›
26 Whoever conquers and keeps my works to the end, I will give them authority over the nations, Moto oyo akolonga, oyo akosala mokano na Ngai kino na suka, nakopesa ye bokonzi ya kokonza bikolo :
27 and he will rule them with an iron rod, shattering them like clay pots—as I also received authority from my Father. akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akopanza yango na biteni lokola mbeki,
28 And I will give him the morning star. ndenge Ngai mpe nazwaki bokonzi kowuta na Tata na Ngai. Nakopesa ye lisusu monzoto ya tongo.
29 Whoever has an ear, let him hear what the Holy Spirit says to the churches." Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]