Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Revelation 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The revelation of Jesus Christ, which our Father gave him to show his servants what must soon happen. Jesus made it known by sending his angel to his servant John, Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto. Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye.
2 who testified to our Father's word and to the testimony of Jesus Christ—all he saw. Lokola motatoli, Yoane asakolaki Liloba na Nzambe ndenge Yesu-Klisto ayebisaki ye yango ; asakolaki makambo nyonso oyo amonaki.
3 Blessed is the one who reads this prophecy aloud, and blessed those who hear and keep what's written in it—the time is near. Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene.
4 John, to the seven churches in Asia: grace and peace to you from the One who is, who was, and who is coming, and from the seven spirits before his throne, Yoane ; Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi,
5 and from Jesus Christ, the faithful witness, firstborn from the dead, ruler of earth's kings. To him who loves us and freed us from our sins by his blood, mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,
6 and made us a kingdom, priests to his Father—to him glory and dominion forever and ever. Amen. Ye oyo akomisaki biso ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe, Tata na Ye : Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !
7 Look, he is coming with the clouds—every eye will see him, even those who pierced him—and all earth's tribes will mourn over him. Yes, amen. « Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.
8 "I am the Alpha and the Omega," says the Sovereign God, "who is and who was and who is coming, the Almighty." « Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »
9 I, John, your brother and partner in the suffering, kingdom, and perseverance we have in Jesus, was on the island called Patmos because of the word of our Father and the testimony of Jesus. Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.
10 I was in the Spirit on the Lord's day and heard behind me a loud voice like a trumpet, Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo
11 saying, "Write what you see in a scroll and send it to the seven churches—Ephesus, Smyrna, Pergamum, Thyatira, Sardis, Philadelphia, and Laodicea." koloba : « Koma na buku makambo oyo ozali komona, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo : Efeso, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfi mpe Laodise. »
12 Then I turned to see the voice speaking to me, and when I turned I saw seven gold lampstands, Nalukaki kobaluka mpo na koluka koyeba nani oyo azali koloba na ngai. Mpe tango nabalukaki, namonaki bitelemiselo sambo ya minda, basala na wolo.
13 among the lampstands, one like a son of man—Jesus—dressed in a robe down to his feet, with a gold sash across his chest. Mpe kati na bitelemiselo yango, ezalaki na moto moko lokola Mwana na Moto. Alataki nzambala ya molayi mpe mokaba moko ya wolo zingazinga ya tolo na Ye.
14 The hair of his head was white, like wool, like snow; his eyes like fire's flame. Moto mpe suki na Ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe. Miso na Ye ezalaki lokola moto oyo ezali kopela makasi.
15 His feet were like burnished bronze, refined in a furnace; his voice like many waters roaring. Makolo na Ye ezalaki lokola bronze oyo babimisi sika longwa na fulu ya moto makasi, mpe mongongo na Ye ezalaki koyokana lokola makelele ya mayi ya ebale monene.
16 He held seven stars in his right hand, and a sharp two-edged sword came from his mouth, and his face shone like the sun at full strength. Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.
17 When I saw him, I fell at his feet as dead. He put his right hand on me, saying, "Don't be afraid. I am the first and the last, Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.
18 the living one. I was dead—look, I'm alive forever and ever! I hold the keys of Death and the grave. Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.
19 Write therefore what you have seen, what is now, and what will take place after this. Yango wana, koma makambo oyo omoni, oyo ezali sik’oyo, mpe oyo ekoya na sima.
20 This is the mystery of the seven stars you saw in my right hand, and the seven gold lampstands: the seven stars are the seven churches' angels, and the seven lampstands are the seven churches." Tala mabombami oyo ezali kati na minzoto sambo oyo omonaki na loboko na Ngai ya mobali, mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo : minzoto sambo elakisi ba-anjelu ya Mangomba sambo ; mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo elakisi Mangomba sambo. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]