Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Revelation 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "To the angel of the church in Sardis write: The one holding the seven Spirits of our Father and the seven stars says: I know your works. You have a name for being alive, but you are dead. Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde : « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo : Nayebi misala na yo ; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa.
2 "Wake up! Strengthen what is left and about to die, for I have not found your works finished before my Father. Lamuka ! Lendisa bato oyo batikali mpe ba-oyo bakomi pene ya kokufa, pamba te namoni ete misala na yo ezali ya kokoka te liboso ya Nzambe na Ngai.
3 So remember how you received and heard; keep it, and turn back. If you don't stay awake, I'll come like a thief, and you won't know what hour I come to you. Yango wana, kanisa malamu mateya oyo ozwaki mpe oyokaki ; tosa mpe bongola motema na yo. Kasi soki olamuki te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba te ngonga oyo nakoya epai na yo.
4 But you have a few in Sardis who haven't stained their clothes; they will walk with me in white, for they are worthy. Nzokande, kati na Sarde, ozali na ndambo ya bato oyo babebisaki te bilamba na bango. Bakotambola elongo na Ngai, na bilamba ya pembe, pamba te babongi na yango.
5 The conqueror will be dressed like them in white, and I will never wipe his name from the book of life. I will acknowledge his name before my Father and before his angels. Moto oyo akolonga, bakolatisa ye bilamba ya pembe lokola bango. Nakolongola kombo na ye te na buku ya bomoi, kasi nakondima yango liboso ya Tata na Ngai mpe liboso ya ba-anjelu na Ye.
6 Whoever has an ear, let him hear what the Holy Spirit says to the churches. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »
7 "And write to the angel of the church in Philadelphia: The holy one, the true one, who holds David's key, who opens and no one shuts, who shuts and no one opens, says this: Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.
8 "I know your works. Look, I've put an open door before you that no one can shut, because you have little power, yet kept my word and didn't deny my name. Nayebi misala na yo. Tala, natiaki liboso na yo ekuke moko ya kofungwama, ekuke oyo moko te akoki kokanga. Nayebi ete ozali na nguya moke, obatelaki Liloba na Ngai mpe owanganaki te Kombo na Ngai.
9 I will give some from Satan's synagogue—who call themselves Jews but are not; they lie—I will make them come and bow before your feet, and know I have loved you. Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.
10 Because you kept my word of endurance, I too will keep you from the hour of trial coming on the whole world to test those living on earth. Lokola obatelaki etinda na Ngai ya kozala na molende, Ngai mpe nakobatela yo na tango ya pasi oyo ekokweyela mokili mobimba mpo na komeka bavandi na yango.
11 I am coming soon. Hold fast what you have, so that no one may seize your crown. Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.
12 Whoever conquers, I will make him a pillar in my Father's temple, and he will never leave it. On him I will write my Father's name, and the name of my Father's city, the new Jerusalem coming down out of heaven from my Father, and my new name. Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.
13 Whoever has an ear, let him hear what the Holy Spirit says to the churches. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »
14 "To the angel of the church in Laodicea write: The Amen says, the faithful and true witness, the beginning of our Father's creation. Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Laodise : Tala maloba ya Amen, Motatoli ya sembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikelamu nyonso ya Nzambe :
15 "I know your works: you are neither cold nor hot. I wish you were cold or hot! Nayebi misala na yo, mpe nayebi malamu ete ozali malili te mpe ozali moto te ; nalingaki nde ozala malili to moto.
16 So, because you are lukewarm—neither hot nor cold—I am about to spit you out of my mouth. Kasi lokola ozali malili te mpe ozali moto te, nazali kosanza yo wuta na monoko na Ngai.
17 Because you say, 'I'm rich, I've grown wealthy, and need nothing,' unaware you are miserable, pitiful, poor, blind, and naked. Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu.
18 I advise you: buy from me fire-refined gold, so you become rich; white clothes to wear, so your naked shame isn't exposed; and ointment for your eyes, so you can see. Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.
19 Those whom I love, I rebuke and discipline. So be earnest and repent. Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.
20 Look! I stand knocking at the door. Whoever hears my voice and opens the door, I'll come in to him, eat with him, and he with me. Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.
21 Whoever conquers I will seat with me on my throne, as I also conquered and sat with my Father on his throne. Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi.
22 Whoever has an ear, let him hear what the Holy Spirit says to the churches." Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]